< 2 Masolo ya Kala 14 >

1 Abiya akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. Na tango oyo Asa azalaki mokonzi, mokili ezalaki na kimia mibu zomi.
アビヤその先祖等とともに寝りてダビデの邑に葬られその子アサこれに代りて王となれりアサの代になりて其國十年の間平穩なりき
2 Asa asalaki makambo ya malamu mpe ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
アサはその神ヱホバの目に善と視正義と視たまふ事を行へり
3 Alongolaki bitumbelo ya banzambe ya bapaya mpe bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko mpe akweyisaki makonzi ya bikeko ya nzambe mwasi Ashera.
即ち異なる祭壇を取のぞき諸の崇邱を毀ち柱像を打碎きアシラ像を斫倒し
4 Apesaki mitindo na bato ya Yuda ete baluka Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe batosa mibeko mpe malako na Ye.
ユダに命じてその先祖等の神ヱホバを求めしめその律法と誡命を行はしめ
5 Kati na bingumba nyonso ya Yuda, mokonzi Asa alongolaki bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo malasi. Boye, na tango na ye, mokili ezalaki na kimia.
ユダの一切の邑々より崇邱と日の像とを取除けり而して國は彼の前に平穩なりき
6 Atongaki bingumba makasi kati na Yuda mpo ete mokili ezalaki na kimia. Na mibu wana, moto moko te abundisaki ye, pamba te Yawe apesaki ye bopemi.
彼また守衛の邑數箇をユダに建たり是はその國平安を得て此年頃戰爭なかりしに因る即ちヱホバ彼に安息を賜ひしなり
7 Alobaki na Yuda: « Totonga bingumba oyo, tozingela yango na bamir, na bandako milayi mpe na bikuke elongo na bikangelo na yango. Mokili ezali kati na bopemi liboso na biso, pamba te tolukaki Yawe, Nzambe na biso; tolukaki Ye, mpe Ye apesi biso bopemi na bangambo nyonso. » Boye, batongaki mpe balongaki na mabongisi na bango.
彼すなはちユダに言けるは我儕是等の邑を建てその四周に石垣を築き戌樓を起し門と門閂とを設けん我儕の神ヱホバを我儕求めしに因て此國なほ我儕の前にあり我ら彼を求めたれば四方において我らに平安を賜へりと斯彼ら阻滞なく之を建了たり
8 Asa azalaki na mampinga ya basoda nkoto nkama misato ya bato ya Yuda, oyo bazalaki komema banguba minene mpe makonga, mpe ya basoda nkoto nkama mibale na tuku mwambe ya bato ya Benjame, oyo bazalaki komema banguba mike mpe kobeta matolotolo: bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
アサの軍勢はユダより出たる者三十萬ありて楯と戈とを執りベニヤミンより出たる者二十八萬ありて小楯を執り弓を彎く是みな大勇士なり
9 Zera, moto ya Kushi, elongo na mampinga ya basoda monkoko moko mpe bashar nkama misato, abundisaki mampinga ya Asa mpe akomaki kino na Maresha.
茲にエテオピア人ゼラ軍勢百萬人戰車三百輌を率ゐて攻きたりマレシヤに至りければ
10 Asa abimelaki ye, mpe batandamaki na molongo ya bitumba na se ya Tsefata, pene ya Maresha.
アサこれにむかひて進み出で共にマレシヤのゼパタの谷において戰爭の陣列を立つ
11 Asa abelelaki Yawe, Nzambe na ye; alobaki: « Oh Yawe, moko te akokani na Yo, moko te akoki kosunga moto ya bolembu liboso ya moto na nguya. Oh Yawe, Nzambe na biso, sunga biso! Pamba te totiaka elikya na biso kati na Yo. Ezali na Kombo na Yo nde toyaki kobundisa mampinga oyo ya monene. Oh Yawe, ozali Nzambe na biso! Tika ete moto alonga Yo te! »
時にアサその神ヱホバにむかひて呼はりて言ふヱホバよ力ある者を助くるも力なき者を助くるも汝においては異ること無し我らの神ヱホバよ我らを助けたまへ我らは汝に倚賴み汝の名に託りて往て此群集に敵るヱホバよ汝は我らの神にましませり人をして汝に勝せたまふ勿れと
12 Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki.
ヱホバすなはちアサの前とユダの前においてエテオピア人を撃敗りたまひしかばエテオピア人逃はしりけるに
13 Asa elongo na mampinga na ye balandaki bato ya Etiopi kino na Gerari. Bato bakufaki, bakokaki te kobikisa bomoi na bango, pamba te bango nyonso babebisamaki liboso ya Yawe mpe mampinga na Ye. Mampinga ya basoda ya Yuda bazwaki bomengo ebele ya bitumba;
アサと之に從がふ民かれらをゲラルまで追撃り斯エテオピア人は倒れて再び振ふことを得ざりき其は彼等ヱホバとその軍旅に打敗られたればなりユダの人々の得たる掠取物は甚だ多りき
14 babebisaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Gerari, pamba te Yawe akweyiselaki bango somo na Ye ya makasi. Bazwaki na makasi biloko kati na bingumba nyonso, pamba te biloko ya kozwa ezalaki ebele penza kati na yango.
かれらはまたゲラルの四周の邑々を盡く撃やぶれり是その邑々ヱホバを畏れたればなり是において彼らその一切の邑より物を掠めたりしがその中より得たる掠取物は夥多かりき
15 Babebisaki mpe bitonga ya bibwele, bamemaki bantaba mpe bameme ebele elongo na bashamo. Bongo, bazongaki na Yelusalemi.
また家畜のをる天幕を襲ふて羊と駱駝を多く奪ひ取り而してヱルサレムに歸りぬ

< 2 Masolo ya Kala 14 >