< 2 Masolo ya Kala 12 >

1 Tango bokonzi ya Roboami elendisamaki mpe ye moko akomaki makasi, ye mpe Isalaele mobimba basundolaki Mobeko ya Yawe.
Kad je Roboam utvrdio kraljevstvo i ojačao, napustio je Jahvin zakon i on i sav Izrael s njim.
2 Boye, lokola bazalaki lisusu kotosa Yawe te, Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi na mobu ya mitano ya bokonzi ya Roboami.
Ali pete godine Roboamova kraljevanja navali egipatski kralj Šišak na Jeruzalem, koji se bijaše iznevjerio Jahvi.
3 Ayaki wuta na Ejipito elongo na bashar nkoto moko na nkama mibale, basoda nkoto tuku motoba oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na mampinga ya basoda ebele oyo motango na bango ekokaki kotangama te: basoda ya mokili ya Libi, ya Suki mpe ya Kushi.
Došao je sa tisuću i dvjesta bojnih kola i sa šezdeset tisuća konjanika, a narodu koji je došao s njim iz Egipta - Libijcima, Sukijcima i Etiopljanima - nije bilo broja.
4 Abotolaki bingumba batonga makasi ya Yuda mpe akendeki kino na Yelusalemi.
Osvojivši tvrde judejske gradove, dopro je do Jeruzalema.
5 Bongo, mosakoli Shemaya akendeki epai ya Roboami mpe bakambi ya Yuda oyo basanganaki na Yelusalemi tango bamonaki Shishaki kopusana. Alobaki na bango: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Bosundolaki Ngai, yango wana Ngai mpe nasundoli bino na maboko ya Shishaki. »
Tada dođe prorok Šemaja k Roboamu i judejskim knezovima, koji se bijahu skupili u Jeruzalemu bježeći od Šišaka, i reče im: “Ovako veli Jahve: 'Vi ste ostavili mene, pa i ja ostavljam vas u ruke Šišaku.'”
6 Mokonzi elongo na bakambi ya Isalaele bamikitisaki, bandimaki mabe na bango mpe balobaki: — Yawe azali sembo!
Tada se poniziše izraelski knezovi i kralj i rekoše: “Pravedan je Jahve!”
7 Tango Yawe amonaki ete basili komikitisa, Yawe alobaki lisusu epai ya Shemaya: — Lokola basili komikitisa na kondima mabe na bango, nakobebisa bango te; kasi kala mingi te, nakokangola bango, mpe kanda na Ngai ekokitela Yelusalemi te na nzela ya Shishaki.
Kad ih Jahve vidje gdje se poniziše, dođe njegova riječ Šemaji: “Ponizili su se; neću ih uništiti, nego ću im uskoro dati spasenje te se moja srdžba neće oboriti na Jeruzalem preko Šišaka.
8 Nzokande bakokoma bawumbu na ye mpe, na bongo, bakoyeba bokeseni nini ezali kati na kosalela Ngai mpe kosalela bakonzi ya bamboka mosusu.
Bit će mu sluge, da vide što znači služiti meni, a što zemaljskim kraljevstvima.”
9 Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi, azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba ya wolo oyo Salomo asalisaki.
Tako egipatski kralj Šišak navali na Jeruzalem, opljačka blago iz Doma Jahvina i riznicu kraljeva dvora; sve je uzeo; uze i zlatne štitove što ih bijaše napravio Salomon.
10 Na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli ekotelo ya ndako ya mokonzi.
Namjesto njih kralj Roboam napravi tučane štitove i povjeri ih zapovjednicima straže koja je čuvala vrata kraljevskoga dvora.
11 Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki kokende elongo na ye, bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli.
Kad je god kralj išao u Dom Jahvin, stražari su ih uzimali, a poslije ih vraćali u stražaru.
12 Lokola mokonzi Roboami amikitisaki na kondima mabe na ye, Yawe akitiselaki ye te kanda na Ye mpe abebisaki ye penza te. Kutu, emonanaki lisusu makambo malamu kati na Yuda.
Kad se, dakle, ponizio, odvratio se od njega Jahvin gnjev te ga nije sasvim uništio, jer i u Judeji bijaše dobra.
13 Mokonzi Roboami alendisaki bokonzi na ye, na Yelusalemi mpe akonzaki. Azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia kuna Kombo na Ye. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.
Potom se kralj Roboam utvrdi u Jeruzalemu i stade kraljevati. Roboamu je bila četrdeset i jedna godina kad se zakraljio, a sedamnaest je godina kraljevao u Jeruzalemu, u gradu koji Jahve izabra između svih izraelskih plemena da ondje postavi Ime svoje. Majka mu se zvala Naama, a bila je Amonka.
14 Roboami asalaki mabe, pamba te amipesaki te, na motema na ye mobimba, mpo na koluka Yawe.
Činio je zlo, jer nije pregnuo srcem da traži Jahvu.
15 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Shemaya mpe ya momoni makambo Ido, buku epai wapi emonani milongo ya mbotama. Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami.
Roboamova prva i posljednja djela - i ratovi koji su se neprestano vodili između Roboama i Jeroboama - zapisani su u povijesti proroka Šemaje i u plemenskom popisu vidioca Adona.
16 Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Abiya, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Potom Roboam počinu sa svojim ocima i bi sahranjen u Davidovu gradu; na njegovo se mjesto zakraljio sin mu Abija.

< 2 Masolo ya Kala 12 >