< 2 Masolo ya Kala 11 >

1 Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki mabota ya Yuda mpe ya Benjame, aponaki bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami.
Roboam donc s'en vint à Jérusalem, et assembla la maison de Juda, et celle de Benjamin, qui furent cent quatre-vingt mille hommes d'élite, propres à la guerre, pour combattre contre Israël, [et] pour réduire le Royaume en sa puissance.
2 Kasi Yawe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe:
Mais la parole de l'Eternel fut adressée à Sémahia, homme de Dieu, en disant:
3 — Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda, mpe bana nyonso ya Isalaele oyo bazali kati na Yuda mpe Benjame:
Parle à Roboam fils de Salomon, Roi de Juda, et à tous ceux d'Israël qui sont en Juda, et en Benjamin, en disant:
4 « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Bokende te kobundisa bandeko na bino! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › » Batosaki Liloba na Yawe, bazongaki na bandako na bango mpe batikaki mabongisi ya kobundisa Jeroboami.
Ainsi a dit l'Eternel: Vous ne monterez point, et vous ne combattrez point contre vos frères; retournez-vous-en chacun en sa maison; car ceci a été fait de par moi; et ils obéirent à la parole de l'Eternel, et s'en retournèrent sans aller contre Jéroboam.
5 Wana Roboami avandaki na Yelusalemi, atongaki bamir zingazinga ya bingumba ebele ya Yuda mpo na kolendisa yango.
Roboam demeura donc à Jérusalem, et bâtit des villes en Juda pour forteresses.
6 Alendisaki Beteleemi, Etami, Tekoa,
Il bâtit Beth-léhem, Hetam, Tekoah,
7 Beti-Tsuri, Soko, Adulami,
Beth-sur, Soco, Hadullam,
8 Gati, Maresha, Zifi,
Gath, Maresa, Ziph,
9 Adorayimi, Lakishi, Azeka,
Adorajim, Lakis, Hazéka,
10 Tsorea, Ayaloni mpe Ebron. Oyo nde ezalaki bingumba batonga makasi kati na Yuda mpe Benjame.
Tsorah, Ajalon, et Hébron, qui étaient des villes de forteresse en Juda et en Benjamin.
11 Atongaki zingazinga na yango bamir, atiaki kuna bayangeli mpe bibombelo ya biloko ya kolia, ya mafuta mpe ya vino.
Il fortifia donc ces forteresses, et y mit des Gouverneurs, et des provisions de vivres, d'huile, et de vin;
12 Kati na bingumba yango nyonso, atiaki banguba minene mpe makonga mpo na kokomisa yango makasi koleka. Boye Yuda mpe Benjame ekomaki ya Roboami.
Et en chaque ville, des boucliers, et des javelines, et il les fortifia bien. Ainsi Juda et Benjamin lui furent soumis.
13 Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bazalaki kati na Isalaele mobimba bayaki kosangana na Roboami wuta na bituka na bango nyonso.
Et les Sacrificateurs et les Lévites qui étaient dans tout Israël, se joignirent à lui de toutes leurs contrées.
14 Balevi batikaki bandako mpe mabele na bango, bakendeki na Yuda mpe na Yelusalemi, pamba te Jeroboami mpe bana na ye ya mibali bapekisaki bango kosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe ya Yawe.
Car les Lévites laissèrent leurs faubourgs et leurs possessions, et vinrent dans la [Tribu] de Juda, et à Jérusalem: parce que Jéroboam et ses fils les avaient rejetés, afin qu'ils ne servissent plus de Sacrificateurs à l'Eternel.
15 Boye, ye moko Jeroboami aponaki banganga-nzambe mpo na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe mpo na banzambe ya bikeko oyo asalaki na lolenge ya bantaba ya mibali mpe ya bana ngombe.
Car [Jéroboam] s'était établi des sacrificateurs pour les hauts lieux, pour les démons, et pour les veaux qu'il avait faits.
16 Bato ya mabota nyonso ya Isalaele, oyo balukaka Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mitema na bango mobimba balandaki Balevi, na Yelusalemi, mpo na kobonzela Yawe, Nzambe ya batata na bango, mbeka.
Et après eux ceux d'entre toutes les Tribus d'Israël qui avaient appliqué leur cœur à chercher l'Eternel le Dieu d'Israël, vinrent à Jérusalem, pour sacrifier à l'Eternel le Dieu de leurs pères.
17 Mibu misato, balendisaki bokonzi ya Yuda mpe nguya ya Roboami, mwana mobali ya Salomo; pamba te mibu misato yango, balandaki ndakisa ya Davidi mpe ya Salomo.
Et ils fortifièrent le Royaume de Juda, et renforcèrent Roboam fils de Salomon, pendant trois ans, parce qu'on suivit le train de David et de Salomon pendant trois ans.
18 Roboami abalaki Maalati, mwana mwasi ya Yerimoti, mwana mobali ya Davidi mpe ya Abiyaili, mwana mwasi ya Eliabi, mwana mobali ya Izayi.
Or Roboam prit pour femme Mahalath, fille de Jérimoth, fils de David; [et] Abihaïl fille d'Eliab, fils d'Isaï;
19 Maalati abotelaki Roboami bana mibali oyo: Yewushi, Shemaria mpe Zaami.
Laquelle lui enfanta ces fils, Jéhus, Sémaria, et Zaham.
20 Sima, Roboami abalaki Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, oyo abotelaki ye: Abiya, Atayi, Ziza mpe Shelomiti.
Et après elle il prit Mahaca, fille d'Absalom, qui lui enfanta Abija, Hattaï, Ziza, et Sélomith.
21 Roboami alingaki mingi Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, koleka basi mpe bamakangu na ye nyonso. Azalaki na basi zomi na mwambe mpe bamakangu tuku motoba; mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mwambe mpe bana basi tuku motoba.
Mais Roboam aima Mahaca, fille d'Absalom, plus que toutes ses [autres] femmes, et que ses concubines; car il avait pris dix-huit femmes et soixante concubines, dont il eut vingt-huit fils, et soixante filles.
22 Roboami aponaki Abiya, mwana mobali ya Maaka, mpo ete azala mokambi ya liboso ya bandeko na ye ya mibali, pamba te azalaki na makanisi ya kokomisa ye mokonzi.
Et Roboam établit pour Chef Abija, fils de Mahaca, afin qu'il fût le Chef de ses frères; car [son intention était] de le faire Roi.
23 Boye, asalelaki mayele ya kopanza bana na ye nyonso ya mibali kati na bituka nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, kati na bingumba nyonso batonga makasi; apesaki bango bilei mpe basi ebele.
Et il s'avisa prudemment de disperser tous ses enfants par toutes les contrées de Juda et de Benjamin, [savoir] par toutes les villes fortes, et leur donna abondamment de quoi vivre; et il demanda pour eux beaucoup de femmes.

< 2 Masolo ya Kala 11 >