< 2 Masolo ya Kala 10 >

1 Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi.
Rehoboam went to Shechem, for all Israel had come to Shechem to make him king.
2 Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito.
When Jeroboam the son of Nebat heard of it (for he was in Egypt, where he had fled from the presence of King Solomon), Jeroboam returned out of Egypt.
3 Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami; bongo ye Jeroboami elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye:
They sent and called him; and Jeroboam and all Israel came, and they spoke to Rehoboam, saying,
4 — Tata na yo anyokolaki biso makasi. Kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso; bongo biso, tokosalela yo.
“Your father made our yoke grievous. Now therefore make the grievous service of your father and his heavy yoke which he put on us, lighter, and we will serve you.”
5 Roboami azongisaki: — Bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai. Mpe bato bakendeki.
He said to them, “Come again to me after three days.” So the people departed.
6 Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango: — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo?
King Rehoboam took counsel with the old men, who had stood before Solomon his father while he yet lived, saying, “What counsel do you give me about how to answer these people?”
7 Bazongiselaki ye: — Soki omitalisi lokola moto malamu epai ya bato oyo, soki olobeli bango na boboto mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.
They spoke to him, saying, “If you are kind to these people, please them, and speak good words to them, then they will be your servants forever.”
8 Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye.
But he abandoned the counsel of the old men which they had given him, and took counsel with the young men who had grown up with him, who stood before him.
9 Atunaki bango: — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai: « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso? »
He said to them, “What counsel do you give, that we may give an answer to these people, who have spoken to me, saying, ‘Make the yoke that your father put on us lighter’?”
10 Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki: — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo: « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi; kasi yo, lembisela biso yango! » Yebisa bango: « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene.
The young men who had grown up with him spoke to him, saying, “Thus you shall tell the people who spoke to you, saying, ‘Your father made our yoke heavy, but make it lighter on us;’ thus you shall say to them, ‘My little finger is thicker than my father’s waist.
11 Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
Now whereas my father burdened you with a heavy yoke, I will add to your yoke. My father chastised you with whips, but I will chastise you with scorpions.’”
12 Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango: « Bozongela ngai sima na mikolo misato. »
So Jeroboam and all the people came to Rehoboam the third day, as the king asked, saying, “Come to me again the third day.”
13 Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi;
The king answered them roughly; and King Rehoboam abandoned the counsel of the old men,
14 alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango: — Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
and spoke to them after the counsel of the young men, saying, “My father made your yoke heavy, but I will add to it. My father chastised you with whips, but I will chastise you with scorpions.”
15 Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokokisa Liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo.
So the king didn’t listen to the people; for it was brought about by God, that the LORD might establish his word, which he spoke by Ahijah the Shilonite to Jeroboam the son of Nebat.
16 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye: — Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo! Wana bana nyonso ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo,
When all Israel saw that the king didn’t listen to them, the people answered the king, saying, “What portion do we have in David? We don’t have an inheritance in the son of Jesse! Every man to your tents, Israel! Now see to your own house, David.” So all Israel departed to their tents.
17 Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda.
But as for the children of Israel who lived in the cities of Judah, Rehoboam reigned over them.
18 Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi ya misala makasi, kasi bana ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi.
Then King Rehoboam sent Hadoram, who was over the men subject to forced labor; and the children of Israel stoned him to death with stones. King Rehoboam hurried to get himself up to his chariot, to flee to Jerusalem.
19 Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo.
So Israel rebelled against David’s house to this day.

< 2 Masolo ya Kala 10 >