< 2 Masolo ya Kala 1 >

1 Salomo, mwana mobali ya Davidi, alendisamaki makasi na bokonzi na ye, pamba te Yawe, Nzambe na ye, azalaki elongo na ye mpe akomisaki ye moto monene penza.
And Solomon, son of David, strengthened himself over his kingdom, —and, Yahweh, his God, was with him, and made him surpassingly great.
2 Salomo abengisaki Isalaele mobimba: bakonzi ya bankoto ya basoda, bakonzi ya bankama ya basoda, basambisi, bakambi ya Isalaele mobimba mpe bakambi ya mabota.
And Solomon gave word to all Israel—to the rulers of thousands, and hundreds, and to the judges, and to all the leaders of all Israel, ancestral chiefs;
3 Bongo, Salomo elongo na lisanga mobimba bakendeki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni, pamba te Ndako ya kapo ya Bokutani ya Nzambe, oyo Moyize, mosali na Yawe, atelemisaki na esobe ezalaki kuna.
and Solomon, and all the convocation with him, went to the high place that was in Gibeon, —for, there, was the tent of meeting of God, which Moses the servant of Yahweh made in the desert.
4 Nzokande, Davidi amemaki Sanduku ya Nzambe, wuta na Kiriati-Yearimi kino na esika oyo abongisaki mpo na yango, pamba te atelemisaki mpo na yango Ndako ya kapo kati na Yelusalemi.
Howbeit, the ark of God, had David brought up from Kiriath-jearim, into the place that David had prepared for it, —for he had pitched for it a tent, in Jerusalem.
5 Kasi etumbelo ya bronze oyo Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri mpe koko ya Wuri, atongaki ezalaki liboso ya Mongombo. Ezalaki kuna nde Salomo elongo na lisanga mobimba balukaki Yawe.
Also, the altar of bronze that Bezalel son of Uri son of Hur had made, was there before the habitation of Yahweh, —so Solomon and the convocation sought it.
6 Salomo akendeki na etumbelo ya bronze, liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe abonzaki kuna bambeka ya kotumba nkoto moko.
And Solomon went up thither, unto the altar of bronze before Yahweh, which belonged to the tent of meeting, —and caused to go up thereon a thousand ascending-sacrifices.
7 Na butu wana, Nzambe abimelaki Salomo mpe alobaki na ye: — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.
During that night, God appeared unto Solomon, —and said unto him, Ask what I shall give thee.
8 Salomo azongiselaki Nzambe: — Otalisi bolamu monene epai ya Davidi, tata na ngai, mpe otie ngai mokonzi na esika na ye.
And Solomon said unto God, Thou thyself, didst deal with David my father in great lovingkindness, —and hast made me king in his stead.
9 Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya Davidi, tata na ngai, ekokisama! Pamba te ezali Yo nde otie ngai mokonzi ya bato oyo bazali ebele lokola putulu ya mabele.
Now, O Yahweh Elohim, let thy word with David my father be brought to pass, -for, thou, hast made me king over a people, for multitude like the dust of the earth.
10 Pesa ngai bwanya mpe boyebi mpo ete nakoka kotambolisa bato oyo. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo?
Now, wisdom and knowledge, give thou unto me, that I may go out before this people, and may come in, —for who can judge this thy people, that is so great?
11 Nzambe alobaki na Salomo: — Lokola likambo oyo ezali posa ya motema na yo; lokola osengi bozwi te, bomengo to lokumu te to mpe kufa ya banguna na yo te; lokola osengi te bomoi molayi, kasi osengi bwanya mpe boyebi mpo na kotambolisa bato na Ngai, oyo natie yo mokonzi na bango,
And God said unto Solomon, Because this was near thy heart, and thou hast not asked riches, wealth, or honour, or the life of them that hate thee, nor even, many days, hast thou asked, —but hast asked for thyself, wisdom and knowledge, that thou mayest judge my people, over whom I have made thee king,
12 bwanya mpe boyebi ekopesamela yo, mpe nakopesa yo lisusu bozwi, bomengo mpe lokumu oyo mokonzi moko te, liboso na yo, atikala kozwa, mpe mokonzi moko te, sima na yo, akotikala kozwa.
wisdom and knowledge, are granted unto thee, —moreover, riches and wealth and honour, will I give thee, such as the kings who were before thee did not possess, neither shall they who come after thee possess the like.
13 Bongo Salomo alongwaki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni epai wapi akendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe azongaki na Yelusalemi. Mpe akomaki mokonzi ya Isalaele.
And Solomon came from the high place that was in Gibeon unto Jerusalem, from before the tent of meeting, —and reigned over Israel.
14 Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda; azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda.
And Solomon gathered chariots and horsemen, and came to have a thousand and four hundred chariots, and twelve thousand horsemen, —and he settled them in chariot cities, and with the king, in Jerusalem.
15 Mokonzi asalaki ete wolo mpe palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku.
And the king made silver and gold in Jerusalem, like stones, and, cedars, made he like the sycomores that are in the lowland, for abundance.
16 Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue.
And the horses which Solomon had were, an export, out of Egypt, —and a, company of royal merchants, used to fetch a drove, at a price;
17 Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri.
and they built and brought forth out of Egypt a chariot, for six hundred [shekels] of silver, and a horse, for a hundred and fifty, -and, so, for all the kings of the Hittites and the kings of Syria, by their means, brought they them forth.

< 2 Masolo ya Kala 1 >