< 1 Timote 6 >

1 Bato nyonso oyo bazali bawumbu basengeli kotala bankolo na bango lokola bato oyo babongi na limemia makasi, mpo ete Kombo ya Nzambe mpe malakisi na biso efingama te.
οσοι εισιν υπο ζυγον δουλοι τουσ ιδιουσ δεσποτασ πασησ τιμησ αξιουσ ηγεισθωσαν ινα μη το ονομα του θεου και η διδασκαλια βλασφημηται
2 Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.
οι δε πιστουσ εχοντεσ δεσποτασ μη καταφρονειτωσαν οτι αδελφοι εισιν αλλα μαλλον δουλευετωσαν οτι πιστοι εισιν και αγαπητοι οι τησ ευεργεσιασ αντιλαμβανομενοι ταυτα διδασκε και παρακαλει
3 Soki moto apesi malakisi mosusu mpe aboyi kokangama na maloba ya solo ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, elongo na malakisi oyo ekoki na botosi kati na makambo ya Nzambe,
ει τισ ετεροδιδασκαλει και μη προσερχεται υγιαινουσιν λογοισ τοισ του κυριου ημων ιησου χριστου και τη κατ ευσεβειαν διδασκαλια
4 azali moto na lolendo, ayebi eloko te, azali kobela bokono ya kotia tembe mpe ya koswana na tina na maloba oyo ebotaka zuwa, koswana, kofingana, kokaniselana mabe
τετυφωται μηδεν επισταμενοσ αλλα νοσων περι ζητησεισ και λογομαχιασ εξ ων γινεται φθονοσ ερισ βλασφημιαι υπονοιαι πονηραι
5 mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.
διαπαρατριβαι διεφθαρμενων ανθρωπων τον νουν και απεστερημενων τησ αληθειασ νομιζοντων πορισμον ειναι την ευσεβειαν αφιστασο απο των τοιουτων
6 Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango.
εστιν δε πορισμοσ μεγασ η ευσεβεια μετα αυταρκειασ
7 Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba.
ουδεν γαρ εισηνεγκαμεν εισ τον κοσμον δηλον οτι ουδε εξενεγκειν τι δυναμεθα
8 Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.
εχοντεσ δε διατροφασ και σκεπασματα τουτοισ αρκεσθησομεθα
9 Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.
οι δε βουλομενοι πλουτειν εμπιπτουσιν εισ πειρασμον και παγιδα και επιθυμιασ πολλασ ανοητουσ και βλαβερασ αιτινεσ βυθιζουσιν τουσ ανθρωπουσ εισ ολεθρον και απωλειαν
10 Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.
ριζα γαρ παντων των κακων εστιν η φιλαργυρια ησ τινεσ ορεγομενοι απεπλανηθησαν απο τησ πιστεωσ και εαυτουσ περιεπειραν οδυναισ πολλαισ
11 Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
συ δε ω ανθρωπε του θεου ταυτα φευγε διωκε δε δικαιοσυνην ευσεβειαν πιστιν αγαπην υπομονην πραοτητα
12 Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele. (aiōnios g166)
αγωνιζου τον καλον αγωνα τησ πιστεωσ επιλαβου τησ αιωνιου ζωησ εισ ην εκληθησ και ωμολογησασ την καλην ομολογιαν ενωπιον πολλων μαρτυρων (aiōnios g166)
13 Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato:
παραγγελλω σοι ενωπιον του θεου του ζωοποιουντοσ τα παντα και χριστου ιησου του μαρτυρησαντοσ επι ποντιου πιλατου την καλην ομολογιαν
14 Batela mobeko oyo, kokakola yango ata moke te, mpe sala ete bamona yo na pamela ata moko te, kino Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya
τηρησαι σε την εντολην ασπιλον ανεπιληπτον μεχρι τησ επιφανειασ του κυριου ημων ιησου χριστου
15 na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,
ην καιροισ ιδιοισ δειξει ο μακαριοσ και μονοσ δυναστησ ο βασιλευσ των βασιλευοντων και κυριοσ των κυριευοντων
16 Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela! Amen! (aiōnios g166)
ο μονοσ εχων αθανασιαν φωσ οικων απροσιτον ον ειδεν ουδεισ ανθρωπων ουδε ιδειν δυναται ω τιμη και κρατοσ αιωνιον αμην (aiōnios g166)
17 Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango. (aiōn g165)
τοισ πλουσιοισ εν τω νυν αιωνι παραγγελλε μη υψηλοφρονειν μηδε ηλπικεναι επι πλουτου αδηλοτητι αλλ εν τω θεω τω ζωντι τω παρεχοντι ημιν παντα πλουσιωσ εισ απολαυσιν (aiōn g165)
18 Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.
αγαθοεργειν πλουτειν εν εργοισ καλοισ ευμεταδοτουσ ειναι κοινωνικουσ
19 Ezali na nzela wana nde bakomibombela bomengo lokola moboko ya makasi mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bakoka kozwa bomoi ya solo.
αποθησαυριζοντασ εαυτοισ θεμελιον καλον εισ το μελλον ινα επιλαβωνται τησ αιωνιου ζωησ
20 Timote, batela malamu nyonso oyo Nzambe apesa yo. Kima bilobaloba ya bato oyo bafingaka Nzambe, mpe makanisi ya oyo babengaka « Boyebi » na kozanga koyeba, pamba te etongaka kondima te.
ω τιμοθεε την παραθηκην φυλαξον εκτρεπομενοσ τασ βεβηλουσ κενοφωνιασ και αντιθεσεισ τησ ψευδωνυμου γνωσεωσ
21 Bato mingi babungisaki kondima na bango mpo ete bakangamaki na boyebi yango. Tika ete ngolu ezala elongo na bino nyonso!
ην τινεσ επαγγελλομενοι περι την πιστιν ηστοχησαν η χαρισ μετα σου αμην

< 1 Timote 6 >