< 1 Timote 6 >
1 Bato nyonso oyo bazali bawumbu basengeli kotala bankolo na bango lokola bato oyo babongi na limemia makasi, mpo ete Kombo ya Nzambe mpe malakisi na biso efingama te.
Xoossaa sunthaynne nu timirttey cayettonna mela aylletethan de7eyssati banttana haariya godata bonchcho.
2 Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.
Ammaniya godati de7iya aylleti, entta godati enttaw isha gidiya gisho entta kadhoppo. Entta oosuwan maaddettiya godati, ammaneyssatanne dosettidayssata gidiya gisho entti kaseyssafe aathidi oothanaw bessees. Neeni hayssa tamaarssanawunne entti oothana mela zoranaw bessees.
3 Soki moto apesi malakisi mosusu mpe aboyi kokangama na maloba ya solo ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, elongo na malakisi oyo ekoki na botosi kati na makambo ya Nzambe,
Oonikka dumma timirttiya tamaarssiyaba gidikko, nu Godaa Yesuus Kiristtoosa tuma qaalaranne nu ammanuwa timirttiyara gayttenna.
4 azali moto na lolendo, ayebi eloko te, azali kobela bokono ya kotia tembe mpe ya koswana na tina na maloba oyo ebotaka zuwa, koswana, kofingana, kokaniselana mabe
He uray otoron sugetteesippe attin aykkoka erenna. Enttaw issi qofa bolla palamanawunne ooyettanaw iita amoy de7ees. Hessi qanaate, ooshshi, cashshe, iita sidhe,
5 mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.
giigonna palamaa kaalethees. Qassi enttaw iita wozani de7ees; tumaakka balidosona; entti Xoossaa ammanoy duretethas oge gidi qoppoosona.
6 Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango.
Shin taw de7iyabay gidana giya asas tuma ayyaana de7oy gita wodhe.
7 Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba.
Nuuni ha alamiya aykkoka ehibookko; qassi iyappe aykkoka ekkidi bookko.
8 Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.
Nuus kathinne ma7oy de7ikko hessi gidana.
9 Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.
Shin duretethi koyeyssati paaceninne xihen geloosona. Qassi enttana duge dafiyanne dhayssiya eeyatethinne qohiya amon kunddoosona.
10 Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.
Miishe siiqoy iitatetha ubbaas pultto. Issoti issoti miishe amottishe ammanoppe balettidi daro meton banttana yeggidosona.
11 Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
Shin neno, Xoossaa asoo, hessafe baqata. Xillotethaa, Xoossaa daano, ammano, siiqo, dandda7anne ashkketethaa kaalla.
12 Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele. (aiōnios )
Ammano baaxiya loytha baaxeta. Daro asaa sinthan ne markkattida ne ammanuwabaa, Xoossay nena iyaw xeegida merinaa de7uwa oykka. (aiōnios )
13 Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato:
Ubbaas de7o immiya Xoossaa sinthaninne, Phenxe Philaaxoosa sinthan lo77o markka markkattida Kiristtoos Yesuusa sinthan ta nena kiittays.
14 Batela mobeko oyo, kokakola yango ata moke te, mpe sala ete bamona yo na pamela ata moko te, kino Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya
Nu Godaa Yesuus Kiristtoosi qonccana gakkanaw ha kiitaa balinne borey baynna naaga.
15 na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,
Ba xalaala ubbaa haariya bonchcho Xoossay, kawota kawoy, godata Goday, ba qoppida qamman Yesuus Kiristtoosa zaari kiittana.
16 Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela! Amen! (aiōnios )
Issi iya xalaali hayqqenna. Oonikka shiiqanaw dandda7onna poo7on de7ees. Oonikka iya be7ibeenna; qassi be7anawukka dandda7enna. Bonchchoynne merinaa wolqqay iyaw gido. Amin7i. (aiōnios )
17 Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango. (aiōn )
Ha alamiya dureti coo dhayiya shalon otorttonna melanne ceeqqonna mela oda. Nuus koshshiyabaa palahisidi immiya nuna anjjiya, dure Xoossan ammanettana mela entta kiitta. (aiōn )
18 Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.
Entti lo77o ooso oothanaada lo77o ooson duretanaada, keehatanne haratas shaakkeyssata gidana mela kiitta.
19 Ezali na nzela wana nde bakomibombela bomengo lokola moboko ya makasi mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bakoka kozwa bomoi ya solo.
Hessi enttaw sinthas mino baaso gidiya gisho, he wode entti tuma de7oy ay daaniyakko erana.
20 Timote, batela malamu nyonso oyo Nzambe apesa yo. Kima bilobaloba ya bato oyo bafingaka Nzambe, mpe makanisi ya oyo babengaka « Boyebi » na kozanga koyeba, pamba te etongaka kondima te.
Ximotiyoosa, issi issi asay, “Eratethi” giya eeya palamappenne hada odappe baqata; new imettida hadaraa naaga.
21 Bato mingi babungisaki kondima na bango mpo ete bakangamaki na boyebi yango. Tika ete ngolu ezala elongo na bino nyonso!
Issoti issoti nuus eratethi de7ees yaagishe ammanuwa aggidosona. Xoossaa aadho keehatethay hintte ubbaara gido.