< 1 Timote 5 >

1 Kogangela mobange te, kasi lendisa ye lokola nde azali tata na yo. Lendisa bilenge mibali lokola bandeko,
Don't rebuke a man who is older than you. Instead, encourage him as if he were your father. Treat younger men as brothers,
2 bamama mibange lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi, na motema peto.
older women as mothers, younger women as sisters, with the highest standards of decency.
3 Sunga malamu basi oyo bakufisa mibali, oyo bazali penza kokelela.
Help widows who don't have a family.
4 Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.
For the Christian responsibility of a widow's children or grandchildren is to do their duty for their own family, and repay their parents by helping them out. This is what pleases God.
5 Mwasi akufisa mobali, oyo atikala penza ye moko mpe azali kokelela atiaka elikya na ye kati na Nzambe mpe asambelaka butu mpe moyi mpo na kosenga lisungi epai ya Nzambe.
Now a real widow, having no family, alone and without support, puts her hope in God and prays for help night and day.
6 Kasi mwasi akufisa mobali, oyo amipesaka na bisengo azali ya kokufa atako azali na bomoi.
But a widow who concentrates on pleasing herself is already dead, even though she's still physically alive.
7 Pesa bango malako yango mpo ete batambola na bomoi ezanga pamela.
Give people these instructions so that they will be above criticism.
8 Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
But those who don't look after their relatives, especially their own family, have denied their beliefs, and are worse than those who don't believe.
9 Mpo ete mwasi atangama na molongo ya basi bakufisa mibali, oyo Lingomba azali na mokumba ya kosunga, asengeli kozala na mibu tuku motoba ya mbotama to koleka, kozala mwasi ya makangu te,
Only widows over sixty who have been faithful to their husbands should be put on the list.
10 kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu: abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.
The widow should have a reputation for doing good. Did she bring up children properly? Has she been hospitable? Has she washed the feet of church members? Has she helped those who were in trouble? Has she really tried to do good in every way?
11 Kasi kotanga te bilenge basi bakufisa mibali na molongo ya basi bakufisa mibali; pamba te soki posa na bango ya nzoto elamuki mpe epengwisi bango na miso ya Klisto, bakoluka lisusu kobala,
Don't take on widows who are younger, because when their physical desires make them want to re-marry they abandon their dedication to Christ.
12 mpe, likolo na yango, bakomema ngambo mpo ete balongisi te ekateli na bango ya liboso.
In this they are guilty of breaking their previous commitment.
13 Mpe tina mosusu oyo okotanga bango te na molongo ya basi bakufisa mibali ezali ete bakokoma bagoyigoyi mpe bakokoma koyengayenga na bandako ya bato mosusu. Na bongo, bakokoma bagoyigoyi kaka te, kasi mpe bato na bilobaloba, bato na songisongi mpe bato oyo balobaka makambo oyo basengeli kutu koloba te.
They also get used to a lazy life, just visiting each other in their homes. Not only lazy, but they gossip and meddle, talking about things they shouldn't.
14 Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.
So my best advice is that younger widows marry and have children and take care of the home. That way there's no opportunity for criticism from the Enemy.
15 Likambo ya pasi ezali ete mingi kati na bango basili kobunga nzela mpo na kolanda Satana.
However, some have already gone the way of Satan.
16 Soki, kati na Lingomba, ezali na mwasi mondimi oyo, kati na libota na ye, azali na basi bakufisa mibali, tika ete asunga bango; mpe tika ete Lingomba emema mokumba na bango te mpo ete ekoka kosunga basi bakufisa mibali, oyo basengeli penza na lisungi mpo ete bakelela.
Any Christian woman who has widows in the family should help them, so that the church is not burdened with the responsibility, and can help those widows who are truly in need.
17 Bakambi oyo batambolisaka malamu misala ya Lingomba basengeli kozwa lifuti mbala mibale, mingi-mingi ba-oyo basalaka mosala ya kopanza Sango malamu mpe ya koteya.
Elders who direct the church well should be seen as doubly valuable, particularly those who work in speaking the Word and in teaching.
18 Pamba te Makomi elobi: « Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma, » mpe « mosali asengeli na lifuti na ye. »
As Scripture says, “Don't muzzle the ox when it's threshing out the grain.” Also, “The worker deserves to be paid.”
19 Kondimaka te maloba ya moto oyo ayei ye moko kofunda mokambi ya Lingomba epai na yo; okondima ye kaka soki ayei elongo na bato mibale to misato lokola batatoli mpo na kolendisa bosolo ya likambo yango.
Don't entertain any accusation against an elder unless two or three witnesses support it.
20 Na miso ya bato nyonso, pamelaka bakambi oyo basali masumu mpo ete bato mosusu bakoma na botosi.
Censure those who sin in front of everyone as a warning to others as well.
21 Liboso ya Nzambe, ya Yesu-Klisto mpe ya ba-anjelu oyo baponama, napesi yo mokumba ya kobatela mitindo oyo na kozanga kopona bilongi.
Before God and Christ Jesus, and the holy angels, I instruct you to follow these instructions without bias. Don't do anything from an attitude of favoritism.
22 Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.
Don't be in a hurry to lay hands on anyone; and don't get involved in the sins of others. Keep yourself pure.
23 Okomelaka mayi kaka te, kasi melaka mpe mwa masanga ya vino mpo ete esunga yo mpo na pasi na yo ya libumu mpe mpo na bokono oyo ozwaka mbala na mbala.
Don't just drink water, but use a little bit of wine because of your bad stomach—you're sick so often!
24 Ezali na bato oyo masumu na bango emonanaka polele liboso ete basambisa bango, kasi masumu ya bamosusu emonanaka sima na tango.
The sins of some people are really obvious, and they are clearly guilty, but the sins of others are not seen until later.
25 Ezali mpe ndenge moko mpo na misala malamu: emonanaka polele. Kasi misala oyo ekomonana polele te ekotikala ya kobombama te mpo na libela.
Similarly some good works are obvious, and even those that are hidden won't be for long.

< 1 Timote 5 >