< 1 Timote 4 >

1 Molimo alobi polele ete, na tango ya suka, ebele bakosundola kondima, pamba te bakolanda milimo ya lokuta mpe mateya oyo ewuti na milimo mabe.
But the Spirit saith expressly, that in later times some shall fall away from the faith, giving heed to seducing spirits and doctrines of devils,
2 Ezali bato ya bilongi mibale nde bakobanda kokosa bango na nzela ya mateya, pamba te mitema ya bato yango ya bilongi mibale ebeba lokola nde bazikisa yango na ebende ya moto.
through the hypocrisy of men that speak lies, branded in their own conscience as with a hot iron;
3 Bakopekisa libala mpe bakopesa na bato mitindo ete balia biloko mosusu te; nzokande Nzambe akela nyonso mpo ete bandimi oyo bayebi solo basungama na yango na kozongiselaka Ye matondi.
forbidding to marry, [and commanding] to abstain from meats, which God created to be received with thanksgiving by them that believe and know the truth.
4 Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango,
For every creature of God is good, and nothing is to be rejected, if it be received with thanksgiving:
5 pamba te ebulisamaka na nzela ya Liloba na Nzambe mpe libondeli.
for it is sanctified through the word of God and prayer.
6 Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.
If thou put the brethren in mind of these things, thou shalt be a good minister of Christ Jesus, nourished in the words of the faith, and of the good doctrine which thou hast followed [until now]:
7 Boye, boya masolo ya bozoba, oyo etiolaka Nzambe; boya mpe bilobaloba ya mibange basi. Mipesa nde na botosi kati makambo ya Nzambe;
but refuse profane and old wives’ fables. And exercise thyself unto godliness:
8 pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.
for bodily exercise is profitable for a little; but godliness is profitable for all things, having promise of the life which now is, and of that which is to come.
9 Yango nde liloba ya solo, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango.
Faithful is the saying, and worthy of all acceptation.
10 Tala mpo na nini tosalaka mpe tobundaka makasi: ezali mpo ete tosili kotia elikya na biso kati na Nzambe na bomoi oyo azali Mobikisi ya bato nyonso mpe mingi-mingi ya bandimi na Ye.
For to this end we labour and strive, because we have our hope set on the living God, who is the Saviour of all men, specially of them that believe.
11 Teya makambo yango mpe tinda bato kosalela yango.
These things command and teach.
12 Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.
Let no man despise thy youth; but be thou an ensample to them that believe, in word, in manner of life, in love, in faith, in purity.
13 Kino tango nakoya, zala na molende ya kotanga Makomi, ya koteya mpe ya kopesa malakisi.
Till I come, give heed to reading, to exhortation, to teaching.
14 Kozwa na pamba te likabo oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya lisakoli, tango lisanga ya bakambi ya Lingomba batielaki yo maboko.
Neglect not the gift that is in thee, which was given thee by prophecy, with the laying on of the hands of the presbytery.
15 Zwa makambo yango na motuya mpe mipesa na yango mpo ete bato nyonso bamona ete ozali kokende liboso.
Be diligent in these things; give thyself wholly to them; that thy progress may be manifest unto all.
16 Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.
Take heed to thyself, and to thy teaching. Continue in these things; for in doing this thou shalt save both thyself and them that hear thee.

< 1 Timote 4 >