< 1 Timote 3 >

1 Tala liloba oyo ezali penza ya solo: Moto nyonso oyo alingi kozala mokambi kati na Lingomba aponi mosala ya kitoko.
Πιστὸς ὁ λόγος· εἴ τις ἐπισκοπῆς ὀρέγεται, καλοῦ ἔργου ἐπιθυμεῖ.
2 Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala: moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,
δεῖ οὖν τὸν ἐπίσκοπον ἀνεπίλημπτον εἶναι, μιᾶς γυναικὸς ἄνδρα, νηφάλιον, σώφρονα, κόσμιον, φιλόξενον, διδακτικόν,
3 molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,
μὴ πάροινον, μὴ πλήκτην (μὴ αἰσχροκερδῆ, *K*) ἀλλ᾽ ἐπιεικῆ, ἄμαχον, ἀφιλάργυρον,
4 moto oyo akambaka malamu libota na ye moko, asenzelaka ete bana na ye batosa ye mpe asalaka bongo na lolenge oyo ebongi na limemia ya kokoka.
τοῦ ἰδίου οἴκου καλῶς προϊστάμενον, τέκνα ἔχοντα ἐν ὑποταγῇ μετὰ πάσης σεμνότητος.
5 Moto oyo ayebi te kokamba malamu libota na ye akokoka ndenge nini kobatela Lingomba ya Nzambe?
Εἰ δέ τις τοῦ ἰδίου οἴκου προστῆναι οὐκ οἶδεν, πῶς ἐκκλησίας θεοῦ ἐπιμελήσεται;
6 Mokambi ya Lingomba asengeli te kozala moto oyo abongoli motema sika, noki te akotonda na lolendo mpe akozwa etumbu lokola Satana.
μὴ νεόφυτον, ἵνα μὴ τυφωθεὶς εἰς κρίμα ἐμπέσῃ τοῦ διαβόλου.
7 Mokambi ya Lingomba asengeli mpe kozala moto oyo akenda sango ya malamu kati na bato oyo bazali bandimi te mpo ete abatela lokumu na ye mpe akweya te na mitambo ya Satana.
δεῖ δὲ (αὐτὸν *k*) καὶ μαρτυρίαν καλὴν ἔχειν ἀπὸ τῶν ἔξωθεν, ἵνα μὴ εἰς ὀνειδισμὸν ἐμπέσῃ καὶ παγίδα τοῦ διαβόλου.
8 Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona. Basengeli kozala: bato oyo babongi na limemia, bato ya maloba mibale te, balangwi masanga te mpe bato oyo balukaka mbongo te na banzela ya mabe.
Διακόνους ὡσαύτως σεμνούς, μὴ διλόγους, μὴ οἴνῳ πολλῷ προσέχοντας, μὴ αἰσχροκερδεῖς,
9 Basengeli koyeba kobatela mabombami ya kondima kati na motema ya peto.
ἔχοντας τὸ μυστήριον τῆς πίστεως ἐν καθαρᾷ συνειδήσει.
10 Esengeli komeka bango liboso; bongo soki emonani ete bazangi pamela, wana nde bakoki kosala lokola badiakona.
καὶ οὗτοι δὲ δοκιμαζέσθωσαν πρῶτον, εἶτα διακονείτωσαν ἀνέγκλητοι ὄντες.
11 Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala: basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.
Γυναῖκας ὡσαύτως σεμνάς, μὴ διαβόλους, (νηφαλίους, *N(k)O*) πιστὰς ἐν πᾶσιν.
12 Diakona asengeli kozala mobali ya mwasi moko mpe asengeli kokamba malamu bana na ye mpe ndako na ye.
διάκονοι ἔστωσαν μιᾶς γυναικὸς ἄνδρες, τέκνων καλῶς προϊστάμενοι καὶ τῶν ἰδίων οἴκων.
13 Pamba te badiakona oyo basalaka mosala na bango malamu bazwaka esika ya lokumu mpe bakomaka na elikya makasi kati na kondima na bango epai na Yesu-Klisto.
οἱ γὰρ καλῶς διακονήσαντες βαθμὸν ἑαυτοῖς καλὸν περιποιοῦνται καὶ πολλὴν παρρησίαν ἐν πίστει τῇ ἐν Χριστῷ Ἰησοῦ.
14 Atako nazali na elikya ya kokutana na yo kala mingi te, kasi nakomeli yo kaka malako oyo
Ταῦτά σοι γράφω ἐλπίζων ἐλθεῖν πρὸς σὲ (ἐν *no*) (τάχει· *N(k)O*)
15 mpo ete, soki nawumeli mpo na koya, oyeba ndenge nini bato basengeli kotambola kati na Ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe na bomoi, likonzi mpe moboko ya bosolo.
ἐὰν δὲ βραδύνω, ἵνα εἰδῇς πῶς δεῖ ἐν οἴκῳ θεοῦ ἀναστρέφεσθαι, ἥτις ἐστὶν ἐκκλησία θεοῦ ζῶντος, στῦλος καὶ ἑδραίωμα τῆς ἀληθείας.
16 Tala makambo oyo tondimaka elongo: Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.
Καὶ ὁμολογουμένως μέγα ἐστὶν τὸ τῆς εὐσεβείας μυστήριον, (ὃς *N(K)O*) ἐφανερώθη ἐν σαρκί, ἐδικαιώθη ἐν πνεύματι, ὤφθη ἀγγέλοις, ἐκηρύχθη ἐν ἔθνεσιν, ἐπιστεύθη ἐν κόσμῳ, ἀνελήμφθη ἐν δόξῃ.

< 1 Timote 3 >