< 1 Timote 2 >
1 Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso,
I exhort therefore, first of all, that supplications, prayers, intercessions, thanksgivings, be made for all men;
2 mpo na bakonzi mpe mpo na bakambi nyonso, mpo ete tokoka kobika bomoi ya boboto, ya kimia, ya botosi kati na makambo ya Nzambe, mpe bomoi ya bosantu.
for kings and all that are in high place; that we may lead a tranquil and quiet life in all godliness and gravity.
3 Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso,
This is good and acceptable in the sight of God our Saviour;
4 oyo alingi ete bato nyonso babikisama mpe bayeba solo.
who willeth that all men should be saved, and come to the knowledge of the truth.
5 Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato: ezali moto moko, Yesu-Klisto
For there is one God, one mediator also between God and men, [himself] man, Christ Jesus,
6 oyo amikabaki lokola mbeka mpo na kokangola bato nyonso. Yango nde litatoli oyo epesamaki na tango oyo abongisa.
who gave himself a ransom for all; the testimony [to be borne] in its own times;
7 Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.
whereunto I was appointed a preacher and an apostle (I speak the truth, I lie not), a teacher of the Gentiles in faith and truth.
8 Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.
I desire therefore that the men pray in every place, lifting up holy hands, without wrath and disputing.
9 Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,
In like manner, that women adorn themselves in modest apparel, with shamefastness and sobriety; not with braided hair, and gold or pearls or costly raiment;
10 kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.
but (which becometh women professing godliness) through good works.
11 Na tango ya mateya, basi basengeli kovanda nye mpe kozala na botosi.
Let a woman learn in quietness with all subjection.
12 Napesi te na mwasi nzela ya koteya to ya kozala na bokonzi na likolo ya mobali; mwasi asengeli nde kovanda nye.
But I permit not a woman to teach, nor to have dominion over a man, but to be in quietness.
13 Solo Nzambe asalaki liboso Adamu, mpe sima, Eva.
For Adam was first formed, then Eve;
14 Ezali Adamu te moto akosamaki; ezali mwasi nde akosamaki mpe abukaki mobeko ya Nzambe,
and Adam was not beguiled, but the woman being beguiled hath fallen into transgression:
15 kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.
but she shall be saved through the childbearing, if they continue in faith and love and sanctification with sobriety.