< 1 Timote 1 >
1 Polo, ntoma ya Yesu-Klisto kolanda mokano ya Nzambe Mobikisi na biso mpe ntoma ya Yesu-Klisto, elikya na biso;
Paul, apôtre de Jésus-Christ, par ordre de Dieu notre Sauveur et de Jésus-Christ notre espérance,
2 Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima: Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso!
à Timothée, mon enfant légitime en la foi: que la grâce, la miséricorde et la paix, te soient données de la part de Dieu le Père et de Jésus-Christ notre Seigneur!
3 Ndenge nasengaki na yo tango nazalaki na Masedwane, tikala awa kati na Efeso mpo ete opesa bato mosusu mitindo ete batika koteya mateya ya lokuta
Je te rappelle l’exhortation que je te fis, à mon départ pour la Macédoine, lorsque je t’engageai à rester à Éphèse, afin de recommander à certaines personnes de ne pas enseigner d’autres doctrines,
4 to bakangama te na masapo ya pamba-pamba mpe na botangi milongo ya mbotama, oyo ezangi suka. Makambo ya bongo ebimisaka kaka tembe, na esika ete esunga mpo ete mosala na Nzambe, oyo toyebi na nzela ya kondima, ekende liboso.
et de ne pas s’attacher à des fables et à des généalogies sans fin, qui produisent des discussions plutôt qu’elles n’avancent l’œuvre de Dieu dans la foi.
5 Tina ya mitindo yango ezali bolingo oyo ewuti na motema ya peto, na makanisi ya malamu mpe na kondima ya solo.
Le but du commandement, c’est une charité venant d’un cœur pur, d’une bonne conscience, et d’une foi sincère.
6 Bato mosusu basili kobunga mosika ya makambo yango mpe bamipesi na masolo ezanga tina;
Quelques-uns, s’étant détournés de ces choses, se sont égarés dans de vains discours;
7 balingi kozala balakisi ya Mobeko, kasi bazali kososola te makambo oyo bazali koloba mpe oyo bazali kobetela sete.
ils veulent être docteurs de la loi, et ils ne comprennent ni ce qu’ils disent, ni ce qu’ils affirment.
8 Toyebi ete mibeko ezalaka malamu soki moto azali kosalela yango na ndenge oyo ebongi.
Nous n’ignorons pas que la loi est bonne, pourvu qu’on en fasse un usage légitime,
9 Toyebi lisusu ete mibeko esalema te mpo na bato ya malamu kasi mpo na bato mabe mpe batomboki, mpo na bato oyo batosaka Nzambe te mpe bato ya masumu, mpo na bato ya mbindo mpe batioli makambo ya bule, ba-oyo bakoki ata koboma tata mpe mama, mpo na babomi ya bato,
sachant bien que la loi n’est pas faite pour le juste, mais pour les méchants et les rebelles, les impies et les pécheurs, les irréligieux et les profanes, les parricides, les meurtriers,
10 mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,
les impudiques, les infâmes, les voleurs d’hommes, les menteurs, les parjures, et tout ce qui est contraire à la saine doctrine,
11 kolanda Sango Malamu oyo napesamelaki mokumba, Sango Malamu ya nkembo ya Nkolo-Na-Esengo.
conformément à l’Évangile de la gloire du Dieu bienheureux, Évangile qui m’a été confié.
12 Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,
Je rends grâces à celui qui m’a fortifié, à Jésus-Christ notre Seigneur, de ce qu’il m’a jugé fidèle,
13 atako liboso nazalaki kofinga mpe konyokola Ye mpe nazalaki moto na kanza; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo oyo nazalaki kosala mpe nazalaki na kondima te.
en m’établissant dans le ministère, moi qui étais auparavant un blasphémateur, un persécuteur, un homme violent. Mais j’ai obtenu miséricorde, parce que j’agissais par ignorance, dans l’incrédulité;
14 Nkolo na biso atondisaki ngai na ngolu na Ye, elongo na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu-Klisto.
et la grâce de notre Seigneur a surabondé, avec la foi et la charité qui est en Jésus-Christ.
15 Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango: Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.
C’est une parole certaine et entièrement digne d’être reçue, que Jésus-Christ est venu dans le monde pour sauver les pécheurs, dont je suis le premier.
16 Kasi mpo na tina wana, Nzambe ayokelaki ngai mawa mpo ete, kati na ngai oyo naleki na masumu, Yesu-Klisto atalisa motema monene na Ye, oyo ezangi ndelo lokola ndakisa epai ya bato oyo bakondimela Ye mpo na kozwa bomoi ya seko. (aiōnios )
Mais j’ai obtenu miséricorde, afin que Jésus-Christ fît voir en moi le premier toute sa longanimité, pour que je servisse d’exemple à ceux qui croiraient en lui pour la vie éternelle. (aiōnios )
17 Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela! Amen. (aiōn )
Au roi des siècles, immortel, invisible, seul Dieu, soient honneur et gloire, aux siècles des siècles! Amen! (aiōn )
18 Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo: kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,
Le commandement que je t’adresse, Timothée, mon enfant, selon les prophéties faites précédemment à ton sujet, c’est que, d’après elles, tu combattes le bon combat,
19 na kobatelaka kondima mpe motema ya malamu, oyo bato mosusu basili kobwaka kino kobungisa kondima na bango.
en gardant la foi et une bonne conscience. Cette conscience, quelques-uns l’ont perdue, et ils ont fait naufrage par rapport à la foi.
20 Kati na bango, ezali na Imene mpe Alekizandre, ba-oyo nakabi na maboko ya Satana mpo ete bayeba ete basengeli te kofinga Nzambe.
De ce nombre sont Hyménée et Alexandre, que j’ai livrés à Satan, afin qu’ils apprennent à ne pas blasphémer.