< 1 Timote 1 >

1 Polo, ntoma ya Yesu-Klisto kolanda mokano ya Nzambe Mobikisi na biso mpe ntoma ya Yesu-Klisto, elikya na biso;
奉我们救主 神和我们的盼望基督耶稣之命,作基督耶稣使徒的保罗
2 Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima: Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso!
写信给那因信主作我真儿子的提摩太。愿恩惠、怜悯、平安从父 神和我们主基督耶稣归与你!
3 Ndenge nasengaki na yo tango nazalaki na Masedwane, tikala awa kati na Efeso mpo ete opesa bato mosusu mitindo ete batika koteya mateya ya lokuta
我往马其顿去的时候,曾劝你仍住在以弗所,好嘱咐那几个人不可传异教,
4 to bakangama te na masapo ya pamba-pamba mpe na botangi milongo ya mbotama, oyo ezangi suka. Makambo ya bongo ebimisaka kaka tembe, na esika ete esunga mpo ete mosala na Nzambe, oyo toyebi na nzela ya kondima, ekende liboso.
也不可听从荒渺无凭的话语和无穷的家谱;这等事只生辩论,并不发明 神在信上所立的章程。
5 Tina ya mitindo yango ezali bolingo oyo ewuti na motema ya peto, na makanisi ya malamu mpe na kondima ya solo.
但命令的总归就是爱;这爱是从清洁的心和无亏的良心,无伪的信心生出来的。
6 Bato mosusu basili kobunga mosika ya makambo yango mpe bamipesi na masolo ezanga tina;
有人偏离这些,反去讲虚浮的话,
7 balingi kozala balakisi ya Mobeko, kasi bazali kososola te makambo oyo bazali koloba mpe oyo bazali kobetela sete.
想要作教法师,却不明白自己所讲说的所论定的。
8 Toyebi ete mibeko ezalaka malamu soki moto azali kosalela yango na ndenge oyo ebongi.
我们知道律法原是好的,只要人用得合宜;
9 Toyebi lisusu ete mibeko esalema te mpo na bato ya malamu kasi mpo na bato mabe mpe batomboki, mpo na bato oyo batosaka Nzambe te mpe bato ya masumu, mpo na bato ya mbindo mpe batioli makambo ya bule, ba-oyo bakoki ata koboma tata mpe mama, mpo na babomi ya bato,
因为律法不是为义人设立的,乃是为不法和不服的,不虔诚和犯罪的,不圣洁和恋世俗的,弑父母和杀人的,
10 mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,
行淫和亲男色的,抢人口和说谎话的,并起假誓的,或是为别样敌正道的事设立的。
11 kolanda Sango Malamu oyo napesamelaki mokumba, Sango Malamu ya nkembo ya Nkolo-Na-Esengo.
这是照着可称颂之 神交托我荣耀福音说的。
12 Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,
我感谢那给我力量的我们主基督耶稣,因他以我有忠心,派我服事他。
13 atako liboso nazalaki kofinga mpe konyokola Ye mpe nazalaki moto na kanza; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo oyo nazalaki kosala mpe nazalaki na kondima te.
我从前是亵渎 神的,逼迫人的,侮慢人的;然而我还蒙了怜悯,因我是不信不明白的时候而做的。
14 Nkolo na biso atondisaki ngai na ngolu na Ye, elongo na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu-Klisto.
并且我主的恩是格外丰盛,使我在基督耶稣里有信心和爱心。
15 Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango: Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.
“基督耶稣降世,为要拯救罪人。”这话是可信的,是十分可佩服的。在罪人中我是个罪魁。
16 Kasi mpo na tina wana, Nzambe ayokelaki ngai mawa mpo ete, kati na ngai oyo naleki na masumu, Yesu-Klisto atalisa motema monene na Ye, oyo ezangi ndelo lokola ndakisa epai ya bato oyo bakondimela Ye mpo na kozwa bomoi ya seko. (aiōnios g166)
然而,我蒙了怜悯,是因耶稣基督要在我这罪魁身上显明他一切的忍耐,给后来信他得永生的人作榜样。 (aiōnios g166)
17 Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela! Amen. (aiōn g165)
但愿尊贵、荣耀归与那不能朽坏、不能看见、永世的君王、独一的 神,直到永永远远。阿们! (aiōn g165)
18 Tala mitindo oyo nazali kopesa na yo Timote, mwana na ngai, kolanda masakoli oyo elobamaki na tina na yo: kolanda masakoli yango, bunda etumba ya malamu,
我儿提摩太啊,我照从前指着你的预言,将这命令交托你,叫你因此可以打那美好的仗。
19 na kobatelaka kondima mpe motema ya malamu, oyo bato mosusu basili kobwaka kino kobungisa kondima na bango.
常存信心和无亏的良心。有人丢弃良心,就在真道上如同船破坏了一般。
20 Kati na bango, ezali na Imene mpe Alekizandre, ba-oyo nakabi na maboko ya Satana mpo ete bayeba ete basengeli te kofinga Nzambe.
其中有许米乃和亚历山大;我已经把他们交给撒但,使他们受责罚就不再谤渎了。

< 1 Timote 1 >