< 1 Batesalonika 5 >

1 Mpe mpo na oyo etali tango to mokolo, bandeko, tomoni ete ezali na tina te ya kokomela bino,
περι δε των χρονων και των καιρων αδελφοι ου χρειαν εχετε υμιν γραφεσθαι
2 pamba te boyebi malamu ete mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka kati na butu.
αυτοι γαρ ακριβως οιδατε οτι η ημερα κυριου ως κλεπτης εν νυκτι ουτως ερχεται
3 Tango bato bakokoma koloba: « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.
οταν γαρ λεγωσιν ειρηνη και ασφαλεια τοτε αιφνιδιος αυτοις εφισταται ολεθρος ωσπερ η ωδιν τη εν γαστρι εχουση και ου μη εκφυγωσιν
4 Kasi bino bandeko, bozali kati na molili te mpo ete mokolo yango ekanga bino na mbalakata lokola moyibi.
υμεις δε αδελφοι ουκ εστε εν σκοτει ινα η ημερα υμας ως κλεπτης καταλαβη
5 Pamba te bino nyonso bozali bana ya pole mpe bana ya moyi. Tozali bato ya butu te to bato ya molili te.
παντες υμεις υιοι φωτος εστε και υιοι ημερας ουκ εσμεν νυκτος ουδε σκοτους
6 Yango wana tolalaka pongi te lokola bato mosusu, kasi tosenzelaka mpe tomibatelaka malamu.
αρα ουν μη καθευδωμεν ως και οι λοιποι αλλα γρηγορωμεν και νηφωμεν
7 Pamba te bato oyo balalaka pongi balalaka na butu, mpe ba-oyo balangwaka masanga balangwaka na butu.
οι γαρ καθευδοντες νυκτος καθευδουσιν και οι μεθυσκομενοι νυκτος μεθυουσιν
8 Kasi lokola tozali bato ya moyi, tika ete tosenzela malamu, tolata kondima mpe bolingo lokola ebombelo ya tolo, mpe tolata elikya ya lobiko lokola ekoti ya ebende.
υμεις δε ημερας οντες νηφωμεν ενδυσαμενοι θωρακα πιστεως και αγαπης και περικεφαλαιαν ελπιδα σωτηριας
9 Pamba te Nzambe abongisa biso te mpo na kanda na Ye, kasi mpo ete tozwa lobiko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,
οτι ουκ εθετο ημας ο θεος εις οργην αλλ εις περιποιησιν σωτηριας δια του κυριου ημων ιησου χριστου
10 oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.
του αποθανοντος υπερ ημων ινα ειτε γρηγορωμεν ειτε καθευδωμεν αμα συν αυτω ζησωμεν
11 Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.
διο παρακαλειτε αλληλους και οικοδομειτε εις τον ενα καθως και ποιειτε
12 Bandeko, tosengi na bino ete bondimaka bato oyo basalaka mosala makasi kati na bino, oyo bamitungisaka mpo na bino kati na Nkolo mpe bapesaka bino makebisi.
ερωτωμεν δε υμας αδελφοι ειδεναι τους κοπιωντας εν υμιν και προισταμενους υμων εν κυριω και νουθετουντας υμας
13 Bomemiaka bango makasi kati na bolingo mpo na mosala na bango. Bobikaka na kimia kati na bino.
και ηγεισθαι αυτους υπερεκπερισσου εν αγαπη δια το εργον αυτων ειρηνευετε εν εαυτοις
14 Bandeko, tozali kolendisa bino: bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.
παρακαλουμεν δε υμας αδελφοι νουθετειτε τους ατακτους παραμυθεισθε τους ολιγοψυχους αντεχεσθε των ασθενων μακροθυμειτε προς παντας
15 Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.
ορατε μη τις κακον αντι κακου τινι αποδω αλλα παντοτε το αγαθον διωκετε και εις αλληλους και εις παντας
16 Bozalaka na esengo tango nyonso;
παντοτε χαιρετε
17 bosambelaka na kolemba te;
αδιαλειπτως προσευχεσθε
18 bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.
εν παντι ευχαριστειτε τουτο γαρ θελημα θεου εν χριστω ιησου εις υμας
19 Bopekisaka te mosala ya Molimo Mosantu,
το πνευμα μη σβεννυτε
20 botiolaka masakoli te
προφητειας μη εξουθενειτε
21 kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu.
παντα [ δε ] δοκιμαζετε το καλον κατεχετε
22 Boboyaka mabe ya lolenge nyonso.
απο παντος ειδους πονηρου απεχεσθε
23 Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.
αυτος δε ο θεος της ειρηνης αγιασαι υμας ολοτελεις και ολοκληρον υμων το πνευμα και η ψυχη και το σωμα αμεμπτως εν τη παρουσια του κυριου ημων ιησου χριστου τηρηθειη
24 Ye oyo azali kobenga bino azali sembo, mpe Ye nde akokokisa yango.
πιστος ο καλων υμας ος και ποιησει
25 Bandeko, bobondelaka mpo na biso.
αδελφοι προσευχεσθε περι ημων
26 Bopesaka bandeko nyonso mbote na nzela ya beze ya bule.
ασπασασθε τους αδελφους παντας εν φιληματι αγιω
27 Nasengi na bino, na Kombo ya Nkolo, ete botangelaka bandeko nyonso mokanda oyo.
ορκιζω υμας τον κυριον αναγνωσθηναι την επιστολην πασιν τοις αγιοις αδελφοις
28 Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino!
η χαρις του κυριου ημων ιησου χριστου μεθ υμων αμην

< 1 Batesalonika 5 >