< 1 Samuele 1 >

1 Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.
Once there was a man from Ramathaim-zophim in the hill country of Ephraim. His name was Elkanah, son of Jeroham, son of Elihu, son of Tohu, son of Zuph, from the tribe of Ephraim.
2 Elikana azalaki na basi mibale: moko, kombo na ye ezalaki « Penina; » mosusu, « Ana. » Penina azalaki na bana, kasi Ana azalaki na mwana te.
He had two wives. The name of the first wife was Hannah, and the name of the second, Peninnah. Peninnah had children, but Hannah had none.
3 Mibu nyonso, Elikana azalaki kolongwa na engumba na ye mpo na kokende kogumbamela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe kobonzela Ye mbeka na Silo epai wapi Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki Banganga-Nzambe.
Every year Elkanah would leave his town and go to worship and sacrifice to the Lord Almighty at Shiloh, where Eli's two sons, Hophni and Phinehas, were the Lord's priests.
4 Bongo, soki mokolo na ye ya kobonza mbeka ekoki, Elikana azalaki na momesano ya kopesa biteni ya mbeka na ye epai ya Penina, mwasi na ye, mpe epai ya bana nyonso ya Penina, ya mibali mpe ya basi.
Whenever Elkanah offered a sacrifice, he would give portions of it to Peninnah his wife and to all her sons and daughters.
5 Kasi epai ya Ana, azalaki kopesa biteni yango mbala mibale, pamba te azalaki kolinga ye, atako Yawe akangaki ye mabota.
He would give an extra portion to Hannah, to show his love for her even though the Lord hadn't given her any children.
6 Nzokande, lokola Yawe akangaki ye mabota, mbanda na ye azalaki kaka kotiola ye tango nyonso mpo ete atomboka.
Her rival—the other wife—would taunt her badly to upset her because the Lord hadn't given her any children.
7 Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te,
This went on for years. Whenever Hannah went to the Lord's Temple, Peninnah would taunt her until she cried and couldn't eat.
8 Elikana, mobali na ye, atunaki ye: « Ana, mpo na nini ozali kolela? Mpo na nini ozali kolia te? Mpo na nini ozali na mawa boye? Boni, ngai nazali na motuya te mpo na yo koleka bana mibali zomi? »
“Hannah, what are you crying for?” her husband Elkanah would ask. “Why don't you eat? Why are you so upset? Aren't I better to you than ten sons?”
9 Mokolo moko, sima na bango kolia mpe komela na Silo, Ana atelemaki mpe akendeki na Ndako ya Yawe. Ezalaki na ngonga oyo Nganga-Nzambe Eli avandaki na kiti, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe.
One time when they had finished eating and drinking in Shiloh, Hannah got up and went to the Temple. Eli the priest was sitting on his seat by the entrance to the Lord's Temple.
10 Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi.
She was terribly upset, and prayed to the Lord as she cried and cried.
11 Bongo apesaki elaka, alobaki: « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »
She made a vow, asking, “Lord Almighty, if only you would pay attention to the suffering of your servant and remember me, and not forget me but give me a son, then I will dedicate him to the Lord for his whole life, and no razor shall ever touch his head.”
12 Lokola azalaki kobenda libondeli na ye molayi liboso ya Yawe, Eli azalaki kotala malamu-malamu monoko na ye.
As Hannah went on praying before the Lord, Eli watched her mouth.
13 Mpe wana Ana azalaki kobondela na se ya motema, bibebu na ye ezalaki koningana, kasi mongongo ezalaki koyokana te. Mpe Eli akanisaki ete Ana alangwe masanga.
Hannah was praying in her head, and though her lips were moving, her voice made no sound. Eli thought she must be drunk.
14 Eli alobaki na Ana: — Kino tango nini okozala na milangwa? Longola milangwa na yo.
“Do you have to come here drunk?” he asked. “Get rid of your wine!”
15 Ana azongisaki: — Te, nkolo na ngai! Nalangwe te, nameli ata vino to masanga makasi te. Kasi nazali na mawa mingi; nazalaki kosopa motema na ngai epai na Yawe.
“It's not that, my lord,” Hannah replied. “I'm a very miserable woman. I haven't been drinking wine or beer; I'm just pouring my heart out to the Lord.
16 Kozwa mwasi mowumbu na yo te lokola mwasi ya mobulu, pamba te ezali mawa ya motema na ngai mpe monene ya pasi na ngai nde etindi ngai kobondela kino tango oyo.
Please don't think I'm a bad woman! I have been praying because of all my troubles and grief.”
17 Eli azongisaki: — Kende na kimia, mpe tika ete Nzambe ya Isalaele apesa yo, oyo osengi Ye.
“Go in peace, and may the God of Israel give you what you have asked him for,” Eli replied.
18 Ana alobaki: — Tika ete mwasi mowumbu na yo azwa ngolu na miso na yo. Boye Ana azongaki, aliaki mpe elongi na ye ezalaki lisusu ya mawa te.
“Thank you for your kindness to your servant,” she said. Then she went on her way, had something to eat, and she didn't look sad any more.
19 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.
Elkanah and Hannah got up early the next morning to worship the Lord and then they went home to Ramah. Elkanah made love to his wife Hannah, and the Lord honored her request.
20 Boye Ana akomaki na zemi mpe, sima na mwa mikolo, abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Samuele, » pamba te alobaki: « Mpo ete nasengaki ye epai na Yawe. »
In due course she became pregnant and gave birth to a son. She named him Samuel, saying, “Because I asked the Lord for him.”
21 Na mobu oyo elandaki, Elikana, elongo na libota na ye mobimba, akendeki lisusu kobonzela Yawe mbeka ya mibu nyonso mpe kokokisa elaka na ye.
Elkanah and all his family went to make the yearly sacrifice to the Lord and to fulfill his vow.
22 Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye: — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe; bongo akovanda kuna mpo na libela.
But Hannah did not go. She told her husband, “Once the boy is weaned I will take him to be presented to the Lord and to remain there forever.”
23 Elikana, mobali na ye, alobaki: — Oyo omoni ete ezali malamu, sala yango. Vanda awa kino okokata mwana komela mabele. Tika ete Yawe asunga yo mpo ete okokisa kaka elaka na yo. Boye Ana atikalaki na ndako, akobaki komelisa mwana mabele kino tango akataki ye komela.
“Do as you see fit,” her husband Elkanah replied. “Stay here until you have weaned him. May the Lord fulfill what he has said.” So Hannah stayed behind and nursed her son until she had weaned him.
24 Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino.
When she had weaned him, Hannah took the boy with her, along with a three-year-old bull, an ephah of flour, and a wineskin containing wine. Even though the boy was young, she brought him to the Lord's Temple at Shiloh.
25 Sima na bango koboma ngombe mpo na kobonza yango lokola mbeka, bamemaki mwana epai ya Eli.
After they had slaughtered the bull, they presented the boy to Eli.
26 Ana alobaki na ye: — Limbisa ngai, nkolo na ngai; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.
“Please, my lord,” said Hannah, “as surely as you live, my lord, I am the woman who stood here with you praying to the Lord.
27 Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.
I prayed for this boy, and since the Lord has given me what I asked him for,
28 Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe: bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango.
now I'm giving him to the Lord. As long as he lives he will be dedicated to the Lord.” And he worshiped the Lord there.

< 1 Samuele 1 >