< 1 Samuele 9 >
1 Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame.
Now there was a Benjamite, a powerful man, whose name was Kish son of Abiel, the son of Zeror, the son of Becorath, the son of Aphiah of Benjamin.
2 Azalaki na mwana mobali; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko; azalaki mbinga koleka bango nyonso.
And he had a son named Saul, choice and handsome, without equal among the Israelites—a head taller than any of the people.
3 Mokolo moko, ba-ane ya tata na ye, Kishi, ebungaki; mpe Kishi alobaki na mwana na ye, Saulo: « Kamata mosali moko ya mobali kati na basali mpo ete akende elongo na yo koluka ba-ane. »
One day the donkeys of Saul’s father Kish wandered off, and Kish said to his son Saul, “Take one of the servants and go look for the donkeys.”
4 Boye, Saulo akatisaki etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe etando ya Shalisha; kasi bamonaki yango te. Bakotaki na etuka ya Shalimi, kasi ba-ane ezalaki kuna te; bakomaki kino na etuka ya Benjame, kasi bamonaki yango kaka te.
So Saul passed through the hill country of Ephraim and then through the land of Shalishah, but did not find the donkeys. He and the servant went through the region of Shaalim, but they were not there. Then they went through the land of Benjamin, and still they did not find them.
5 Tango bakomaki na mokili ya Tsufi, Saulo alobaki na mosali oyo azalaki elongo na ye: — Yaka, tozonga; noki te tata na ngai akotika kokanisa ba-ane, kasi akokoma komitungisa mpo na biso.
When they reached the land of Zuph, Saul said to his servant, “Come, let us go back, or my father will stop worrying about the donkeys and start worrying about us.”
6 Mosali azongisaki: — Zela moke! Kati na engumba wana, ezali na moto moko ya Nzambe; azali penza moto ya lokumu; makambo nyonso oyo ye alobaka, ezangaka te kokokisama. Tokende kuna sik’oyo, tango mosusu akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda.
“Look,” said the servant, “in this city there is a man of God who is highly respected; everything he says surely comes to pass. Let us go there now. Perhaps he will tell us which way to go.”
7 Saulo alobaki na mosali na ye: — Likambo te! Tokende epai na ye! Kasi tokopesa eloko nini epai ya moto na Nzambe? Pamba te kati na libenga na biso, biloko ya kolia ezali lisusu te; tozali ata na kado te ya kopesa epai ya moto na Nzambe. Tozali na eloko nini?
“If we do go,” Saul replied, “what can we give the man? For the bread in our packs is gone, and there is no gift to take to the man of God. What do we have?”
8 Mosali azongiselaki Saulo: — Tala, nazali na mbongo moko ya palata; nakopesa yango epai ya moto na Nzambe, mpe akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda.
The servant answered him again. “Look,” he said, “I have here in my hand a quarter shekel of silver. I will give it to the man of God, and he will tell us our way.”
9 Na tango ya kala, kati na Isalaele, moto oyo azalaki kokende kotuna toli ya Nzambe azalaki koloba: « Tokende epai ya moto oyo azwaka bimoniseli. » Pamba te moto oyo bazali kobenga lelo « mosakoli, » bazalaki kobenga ye na kala « moto oyo azwaka bimoniseli. »
(Formerly in Israel, a man on his way to inquire of God would say, “Come, let us go to the seer.” For the prophet of today was formerly called the seer.)
10 Saulo alobaki na mosali na ye: — Malamu! Tokende! Boye, bakendeki na engumba epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda.
“Good,” said Saul to his servant. “Come, let us go.” So they set out for the city where the man of God was.
11 Wana bazalaki komata ngomba oyo ekenda na engumba, bakutanaki na bana basi oyo bazalaki kobima mpo na koluka mayi. Batunaki bango: — Boni, ezalaka awa na moto oyo azwaka bimoniseli?
And as they were climbing the hill to the city, they met some young women coming out to draw water and asked, “Is the seer here?”
12 Bazongiselaki ye: — Iyo! Azali liboso na bino. Kasi bosala noki; awuti kokoma kaka sik’oyo kati na engumba na biso, pamba te bato bakobonza lelo mbeka, na esambelo ya likolo ya ngomba.
“Yes, he is ahead of you,” they answered. “Hurry now, for today he has come to the city because the people have a sacrifice on the high place.
13 Soki kaka bokoti na engumba, bomona ye mbala moko, liboso ete amata na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kolia; pamba te bato bakoki kobanda kolia te soki ye akomi nanu te: asengeli nanu kopambola mbeka liboso ete bato oyo babengami babanda kolia. Bomata sik’oyo, mpe bokomona ye na ngonga oyo.
As soon as you enter the city, you will find him before he goes up to the high place to eat. The people will not eat until he comes, because he must bless the sacrifice; after that, the guests will eat. Go up at once; you will find him.”
14 Boye bakendeki na engumba; mpe wana bazalaki kokota kati na yango, Samuele abimaki liboso na bango tango azalaki kokende na esambelo ya likolo ya ngomba.
So Saul and his servant went up toward the city, and as they were entering it, there was Samuel coming toward them on his way up to the high place.
15 Nzokande, mokolo moko liboso ete Saulo akoma, Yawe amonisaki likambo yango epai ya Samuele.
Now on the day before Saul’s arrival, the LORD had revealed to Samuel,
16 Alobaki na ye: « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »
“At this time tomorrow I will send you a man from the land of Benjamin, and you are to anoint him leader over My people Israel; he will save them from the hand of the Philistines. For I have looked upon My people, because their cry has come to Me.”
17 Tango Samuele amonaki Saulo na mosika, Yawe alobaki na ye: « Tala moto oyo nalobelaki yo; ye nde akokonza bato na Ngai. »
When Samuel saw Saul, the LORD told him, “Here is the man of whom I spoke; he shall rule over My people.”
18 Saulo apusanaki pembeni ya Samuele, na ekuke ya engumba, mpe atunaki ye: — Nabondeli yo, okoki kolakisa ngai ndako ya moto oyo azwaka bimoniseli?
Saul approached Samuel in the gateway and asked, “Would you please tell me where the seer’s house is?”
19 Samuele azongiselaki Saulo: — Ngai oyo moto oyo azwaka bimoniseli. Kende liboso na ngai, na esambelo ya likolo ya ngomba; pamba te, lelo, okolia elongo na ngai. Bongo lobi na tongo, nakotika yo kozonga, mpe nakoyebisa yo makambo nyonso oyo ezali kati na motema na yo.
“I am the seer,” Samuel replied. “Go up before me to the high place, for you shall eat with me today. And when I send you off in the morning, I will tell you all that is in your heart.
20 Komitungisa na yo te na tina na ba-ane na yo, oyo ebungaki wuta mikolo misato, pamba te esili komonana. Bongo nani nkolo biloko nyonso ya motuya oyo ezali kati na Isalaele? Ezali biloko na yo mpe libota mobimba ya tata na yo.
As for the donkeys you lost three days ago, do not worry about them, for they have been found. And upon whom is all the desire of Israel, if not upon you and all your father’s house?”
21 Saulo azongisaki: — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo?
Saul replied, “Am I not a Benjamite from the smallest tribe of Israel, and is not my clan the least of all the clans of Benjamin? So why would you say such a thing to me?”
22 Samuele amemaki Saulo elongo na mosali na ye, akotisaki bango na esika ya feti mpe avandisaki bango liboso ya babengami: bazalaki bato pene tuku misato.
Then Samuel took Saul and his servant, brought them into the hall, and seated them in the place of honor among those who were invited—about thirty in all.
23 Samuele alobaki na moto oyo azalaki kolamba: « Yaka na ndambo ya biloko oyo nayebisaki yo ete otia yango pembeni. »
And Samuel said to the cook, “Bring the portion I gave you and told you to set aside.”
24 Moto oyo azalaki kolamba azwaki mopende mpe nyonso oyo ekangani na yango, mpe atiaki yango liboso ya Saulo. Samuele alobaki na Saulo: « Tala ndambo ya biloko oyo babombelaki yo. Lia yango, pamba te babombelaki yo yango wuta tango nabengisaki bato. » Boye, na mokolo wana, Saulo aliaki elongo na Samuele.
So the cook picked up the leg and what was attached to it and set it before Saul. Then Samuel said, “Here is what was kept back. It was set apart for you. Eat, for it has been kept for you for this occasion, from the time I said, ‘I have invited the people.’” So Saul dined with Samuel that day.
25 Bongo balongwaki nzela moko na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kokita na engumba, mpe Samuele asololaki na Saulo, na veranda ya ndako na ye.
And after they had come down from the high place into the city, Samuel spoke with Saul on the roof of his house.
26 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balamukaki. Samuele abengaki Saulo na veranda mpe alobaki na ye: « Bongama, nazali kokende kotika yo na nzela na yo. » Sima na Saulo kobongama, abimaki libanda nzela moko na Samuele.
They got up early in the morning, and just before dawn Samuel called to Saul on the roof, “Get ready, and I will send you on your way!” So Saul arose, and both he and Samuel went outside together.
27 Wana bazalaki kokende mpe bakomaki na mondelo ya engumba, Samuele alobaki na Saulo: « Loba na mosali na yo ete aleka liboso na biso. » Boye mosali alekaki liboso, mpe Samuele alobaki lisusu na Saulo: « Telema awa sik’oyo mpo ete napesa yo sango oyo ewuti epai ya Nzambe. »
As they were going down to the edge of the city, Samuel said to Saul, “Tell the servant to go on ahead of us, but you stay for a while, and I will reveal to you the word of God.” So the servant went on.