< 1 Samuele 6 >
1 Sima na Sanduku ya Yawe kosala sanza sambo kati na mokili ya bato ya Filisitia,
Awurade Apam Adaka no dii Filistifo asase so asram ason.
2 bato ya Filisitia babengisaki Banganga-Nzambe mpe bato ya soloka, balobaki na bango: — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Yawe? Boyebisa biso ndenge nini tokoki kozongisa yango na esika na yango.
Na Filistifo no frɛɛ wɔn asɔfo ne wɔn asamanfrɛfo bisaa wɔn se, “Dɛn na yɛnyɛ Awurade Apam Adaka yi? Monkyerɛ yɛn ɔkwan a yɛmfa so nsan mfa nkɔ asase a efi so no so.”
3 Bazongisaki: — Soki bolingi kozongisa Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango ya pamba te, kasi bozongisa yango elongo na bambeka mpo na masumu; bongo bokobika na bokono, mpe bokoyeba mpo na nini loboko na Yawe etikaki te konyokola bino.
Wɔka kyerɛɛ wɔn se, “Monsan mfa Israel Nyankopɔn Apam Adaka no nkɔ faako a mokɔfaa no, na momfa akyɛde nka ho. Momfa afɔdi afɔre nka ho, na ama ɔyaredɔm no agyae. Na sɛ ɔyaredɔm no annyae a, ɛbɛma moahu sɛ ɛnyɛ Onyankopɔn na ɔde bae.”
4 Bato ya Filisitia batunaki: — Mbeka ya masumu ya lolenge nini tosengeli kobonzela Yawe? Bazongisaki: — Kolanda motango ya bakambi ya bato ya Filisitia, bobonzela Ye biloko mitano ya wolo, oyo ekotalisa bapota ya libumu, mpe bampuku mitano ya wolo; pamba te ezala bino to bakambi na bino, bokweyelaki kaka etumbu ya ndenge moko.
Wobisae se, “Ɛno de, na afɔdi afɔre bɛn na yɛmfa nkɔ?” Na wɔka kyerɛɛ wɔn se, “Esiane sɛ ɔyaredɔm no abɔ mo ne mo asodifo baanum nti, monyɛ sikakɔkɔɔ te sɛ pɔmpɔ sɛso anum ne sikakɔkɔɔ akisi sɛso anum te sɛ nea asodifo no dodow te.
5 Bosala bililingi oyo ekotalisa bapota na bino ya libumu, mpe oyo ekotalisa bampuku oyo ezali kobebisa mokili na bino; mpe bopesa nkembo na Nzambe ya Isalaele. Tango mosusu, akolongola loboko na Ye na likolo na bino, na likolo ya banzambe na bino, mpe na likolo ya mokili na bino.
Monyɛ saa nneɛma yi nyinaa mfa nkyerɛ nidi a mowɔ ma Israel Nyankopɔn. Na ebia, obegyaa mo, mo anyame ne mo asase amanehunu no.
6 Tina nini kozala moto makasi lokola Faraon mpe bato ya Ejipito? Bokanisa ete sima na Nzambe konyokola bango, batikaki bana ya Isalaele kokende na nzela na bango.
Monnyɛ asoɔden, nnyɛ atuatewfo, sɛnea Farao ne Misraimfo yɛe no. Wɔamma Israelfo ankɔ kosii sɛ Onyankopɔn maa ɔyaredɔm tew guu wɔn so.
7 Boye bino, bosala sik’oyo shario moko ya sika; bozwa bangombe mibale ya basi oyo ezali komelisa mpe oyo nanu balatisi te ekangiseli na kingo. Bokangisa bangombe yango na shario, kasi bozongisa bana na yango na lopango.
“Afei, monyɛ teaseɛnam foforo, na monhwehwɛ anantwibere abien a afei na wɔawo mma foforo. Monhwɛ sɛ wɔntwee teaseɛnam da. Momfa anantwi no nsesa teaseɛnam no na montetew wɔn mma no mfi wɔn ho, mfa wɔn nkogu wɔn buw mu.
8 Bokamata Sanduku ya Yawe mpe botia yango na likolo ya shario. Pembeni ya Sanduku ya Yawe, botia kati na mwa sanduku moko ya moke biloko ya wolo oyo bokobonzela Yawe lokola bambeka mpo na masumu. Sima, botika yango kokende.
Momfa Awurade Apam Adaka no nsi teaseɛnam no mu, na momfa adakawa a sikakɔkɔɔ akisi sɛso ne sikakɔkɔɔ pɔmpɔ sɛso wɔ mu no nsi nkyɛn. Afei, momma anantwi no nkɔ baabiara a wɔpɛ.
9 Kasi bokotala yango malamu: soki Sanduku ya Yawe ezwi nzela ya Beti-Shemeshi mpo na kokende na mokili na yango, wana elakisi ete Yawe nde akweyiselaki biso pasi makasi yango; soki te, wana tokoyeba ete ezalaki na yango loboko na Yawe te, kasi oyo ekomelaki biso ezalaki na yango kaka libaku.
Na sɛ wɔtra yɛn asase hye, na wokodu Bet-Semes a, ɛbɛma yɛahu sɛ, ɛyɛ Awurade na ɔde saa amanehunu kɛse yi baa yɛn so. Na sɛ amma no saa a, yebehu sɛ saa ɔyaredɔm a ɛbaa yɛn so no yɛ akwanhyia bi, na mmom, emfi Awurade, wɔ ɔkwan biara so.”
10 Bato ya Filisitia basalaki ndenge bayebisaki bango: bazwaki bangombe mibale ya basi oyo ezalaki komelisa mpe bakangisaki yango na shario. Kasi bazongisaki bana na yango na lopango.
Wɔyɛɛ saa. Wɔfaa anantwi abien a wɔawo foforo de wɔn saa teaseɛnam no so, na wɔde wɔn mma no guu buw mu.
11 Batiaki Sanduku ya Yawe na likolo ya shario; bongo na pembeni na yango, batiaki mwa sanduku oyo ya moke, oyo kati na yango ezalaki na bampuku ya wolo mpe bililingi ya bapota na bango ya libumu.
Wɔde Awurade Apam Adaka no sii teaseɛnam no mu. Wɔde adakawa a sikakɔkɔɔ akisi sɛso ne sikakɔkɔɔ pɔmpɔ sɛso wɔ mu no sii ho.
12 Bangombe yango ya basi ekendeki mbala moko na nzela ya Beti-Shemeshi, elandaki kaka nzela yango mpe, nzela-nzela, ezalaki kolela; ebalukaki te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. Nzokande bakambi ya bato ya Filisitia balandaki yango na mosika kino na mondelo ya Beti-Shemeshi.
Afei, anantwi no de su faa ɔtempɔn a ɛkɔ Bet-Semes no so tee. Filistifo asodifo dii wɔn akyi ara kosii Bet-Semes hye so.
13 Na eleko yango, bato ya Beti-Shemeshi bazalaki kobuka ble, na lubwaku. Bongo tango batombolaki miso mpe bamonaki Sanduku, basepelaki makasi.
Saa bere no, na Bet-Semesfo retwa wɔn atoko wɔ obon no mu. Enti wɔpagyaw wɔn ani huu Adaka no, wodii ahurusi.
14 Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.
Teaseɛnam no koduu ɔbarima bi a wɔfrɛ no Yosua a ofi Bet-Semes afuw mu no, egyinaa ɔbotan kɛse bi ho. Nnipa no twitwaa nnua a wɔde yɛɛ teaseɛnam no mu. Na wɔde anantwi no bɔɔ ɔhyew afɔre maa Awurade.
15 Balevi bakitisaki Sanduku ya Yawe elongo na mwa sanduku ya moke oyo kati na yango ezalaki na biloko ya wolo, mpe batiaki yango na likolo ya libanga monene. Na mokolo wana, bato ya Beti-Shemeshi babonzaki bambeka ya kotumba mpe makabo epai na Yawe.
Lewifo no mu bebree faa adaka no ne adakawa a sika agude wɔ mu no, na wɔde guu ɔbotan kɛse no so. Saa da no, Bet-Semesfo bɔɔ ɔhyew afɔre ne aduan afɔre bebree maa Awurade.
16 Bakambi yango mitano ya bato ya Filisitia bamonaki makambo nyonso wana mpe bazongaki na Ekroni kaka mokolo wana.
Filistifo asodifo baanum no hwɛɛ eyinom nyinaa, na da no ara, wɔsan kɔɔ Ekron.
17 Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu: moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni.
Sikakɔkɔɔ mpɔmpɔ sɛso a Filistifo no de kɔɔ sɛ asodi afɔre, de maa Awurade no yɛ akyɛde a efi Asdod, Gasa, Askelon, Gat ne Ekron asodifo nkyɛn.
18 Ezalaki mpe na bampuku ya wolo, kolanda motango ya bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bakambi mitano oyo bazalaki koyangela: kobanda na bingumba batonga makasi, bamboka na yango ya mike kino na libanga ya monene oyo, na likolo na yango, batiaki Sanduku ya Yawe mpe oyo, kino na mokolo ya lelo, ezali na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi.
Sikakɔkɔɔ akisi sɛso anum no nso gyina hɔ ma Filistifo nkuropɔn anum no ne nkurow a atwa ho ahyia no a na asodifo baanum no hwɛ so no. Ɔbotan kɛse a na ɛwɔ Bet-Semes a wɔde Awurade Apam Adaka no sii no nso da so tim Yosua afum besi nnɛ sɛ nkae ade a ɛkyerɛ asɛm a esii wɔ hɔ no.
19 Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe: kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi.
Na Awurade kunkum Bet-Semesfo no mmarima aduɔson sɛ wɔahwɛ Awurade Apam Adaka no mu. Na nea Awurade yɛe no nti, nnipa no twaa agyaadwo pa ara.
20 Bato ya Beti-Shemeshi balobaki: « Nani akoki kotelema liboso ya Yawe, Nzambe oyo ya bule? Sanduku ekokende epai ya nani soki elongwe awa epai na biso? »
Wosu bisae se, “Hena na obetumi agyina Awurade, Ɔkronkronni Nyankopɔn anim? Ɛhe na yebetumi de adaka yi afi ha akɔ?”
21 Bongo batindaki bantoma koloba na bato ya Kiriati-Yearimi: « Bato ya Filisitia bazongisi Sanduku ya Yawe; boya kozwa yango mpe bomema yango epai na bino. »
Enti wɔsomaa abɔfo kɔɔ Kiriat-Yearimfo nkyɛn kɔka kyerɛɛ wɔn se, “Filistifo no asan de Awurade Apam Adaka no aba. Yɛsrɛ mo, mommra ha mmegye!”