< 1 Samuele 5 >

1 Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi.
ופלשתים לקחו את ארון האלהים ויבאהו מאבן העזר אשדודה
2 Bato ya Filisitia bakotisaki Sanduku ya Nzambe kati na tempelo ya Dagoni, nzambe na bango, mpe batiaki yango pembeni ya ekeko ya Dagoni.
ויקחו פלשתים את ארון האלהים ויבאו אתו בית דגון ויציגו אתו אצל דגון
3 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye.
וישכמו אשדודים ממחרת והנה דגון נפל לפניו ארצה לפני ארון יהוה ויקחו את דגון וישבו אתו למקומו
4 Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo; kaka nzoto na ye nde etikalaki.
וישכמו בבקר ממחרת והנה דגון נפל לפניו ארצה לפני ארון יהוה וראש דגון ושתי כפות ידיו כרתות אל המפתן--רק דגון נשאר עליו
5 Yango wana, kino na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagoni mpe bato mosusu oyo bakotaka na tempelo ya nzambe Dagoni, na Asidodi, banyataka zingazinga ya ekotelo te.
על כן לא ידרכו כהני דגון וכל הבאים בית דגון על מפתן דגון--באשדוד עד היום הזה
6 Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu.
ותכבד יד יהוה אל האשדודים וישמם ויך אתם בעפלים (בטחרים) את אשדוד ואת גבוליה
7 Tango bato ya Asidodi bamonaki makambo oyo ekomelaki bango, balobaki: — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli lisusu te kozala awa elongo na biso, pamba te Nzambe oyo anyokoli biso mingi na nguya na Ye; anyokoli biso mpe anyokoli Dagoni, nzambe na biso.
ויראו אנשי אשדוד כי כן ואמרו לא ישב ארון אלהי ישראל עמנו--כי קשתה ידו עלינו ועל דגון אלהינו
8 Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango: — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Nzambe ya Isalaele. Bazongisaki: — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli kokende na Gati. Boye bamemaki Sanduku ya Nzambe ya Isalaele na Gati.
וישלחו ויאספו את כל סרני פלשתים אליהם ויאמרו מה נעשה לארון אלהי ישראל ויאמרו גת יסב ארון אלהי ישראל ויסבו את ארון אלהי ישראל
9 Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango: Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo.
ויהי אחרי הסבו אתו ותהי יד יהוה בעיר מהומה גדולה מאד ויך את אנשי העיר מקטן ועד גדול וישתרו להם עפלים (טחרים)
10 Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni. Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki: — Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso.
וישלחו את ארון האלהים עקרון ויהי כבוא ארון האלהים עקרון ויזעקו העקרנים לאמר הסבו אלי את ארון אלהי ישראל להמיתני ואת עמי
11 Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia; balobaki na bango: — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango.
וישלחו ויאספו את כל סרני פלשתים ויאמרו שלחו את ארון אלהי ישראל וישב למקומו ולא ימית אתי ואת עמי כי היתה מהומת מות בכל העיר כבדה מאד יד האלהים שם
12 Bato oyo bakufaki te bazwaki bokono ya pota ya libumu, mpe koganga ya engumba emataki kino na likolo.
והאנשים אשר לא מתו הכו בעפלים (בטחרים) ותעל שועת העיר השמים

< 1 Samuele 5 >