< 1 Samuele 31 >

1 Bato ya Filisitia bazalaki kobundisa Isalaele, kasi bato ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa.
Imidlertid angreb Filisterne Israel; og Israels Mænd flygtede for Filisterne, og de faldne laa rundt om paa Gilboas Bjerg.
2 Bato ya Filisitia balandaki Saulo elongo na bana na ye ya mibali, kasi babomaki bana na ye ya mibali: Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa.
Og Filisterne forfulgte Saul og hans Sønner og dræbte Sauls Sønner, Jonatan, Abinadab og Malkisjua.
3 Bongo bitumba ekomaki mpo na koboma Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki Saulo, ye Saulo alengaki na somo.
Kampen rasede om Saul, og han blev opdaget af Bueskytterne og grebes af stor Angst for dem.
4 Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye: « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. » Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango.
Da sagde Saul til sin Vaabendrager: »Drag dit Sværd og gennembor mig, for at ikke disse uomskaarne skal komme og gennembore mig og mishandle mig!« Men Vaabendrageren vilde ikke, thi han gøs tilbage derfor. Da tog Saul Sværdet og styrtede sig i det;
5 Tango soda oyo amemaki bibundeli na ye amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga na ye mpe akufaki elongo na Saulo.
og da Vaabendrageren saa, at Saul var død, styrtede ogsaa han sig i sit Sværd og fulgte ham i Døden.
6 Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali, soda oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe basoda na ye nyonso bakufaki bango nyonso elongo mokolo wana.
Saaledes fulgtes denne Dag Saul, hans tre Sønner, hans Vaabendrager og alle hans Mænd i Døden.
7 Tango bato ya Isalaele, oyo bazalaki na ngambo mosusu ya lubwaku mpe ba-oyo bazalaki na ngambo mosusu ya Yordani bamonaki ete mampinga ya Isalaele esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango.
Men da Israels Mænd i Byerne i Dalen og ved Jordan saa, at Israels Mænd var flygtet, og at Saul og hans Sønner var faldet, forlod de Byerne og flygtede, hvorpaa Filisterne kom og besatte dem.
8 Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa.
Da Filisterne Dagen efter kom for at plyndre de faldne, fandt de Saul og hans tre Sønner liggende paa Gilboas Bjerg;
9 Bakataki moto ya Saulo, bazwaki bibundeli na ye mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko mpe kati na bato na bango.
de huggede da Hovedet at ham, afførte ham hans Vaaben og sendte Bud rundt i Filisternes Land for at bringe deres Afguder og Folket Glædesbudet.
10 Batiaki bibundeli ya Saulo kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko, Asitarite, mpe badiembikaki nzoto na ye na mir ya Beti-Sheani.
Vaabnene lagde de i Astartes Tempel, men Kroppen hængte de op paa Bet-Sjans Mur.
11 Tango bavandi ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo,
Men da Indbyggerne i Jabesj i Gilead hørte, hvad Filisterne havde gjort ved Saul,
12 bilombe na bango nyonso batelemaki mpe batambolaki butu mobimba mpo na kokoma na Beti-Sheani. Bongo sima na bango kokitisa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali wuta na mir, bazongaki na Yabeshi epai wapi batumbaki yango.
brød alle vaabenføre Mænd op, og efter at have gaaet hele Natten igennem tog de Sauls og hans Sønners Kroppe ned fra Bet-Sjans Mur, bragte dem med til Jabesj og brændte dem der.
13 Bazwaki mikuwa na bango, bakundaki yango na Yabeshi, na se ya nzete ya tamarisi, mpe bakilaki bilei mikolo sambo.
Saa tog de deres Ben og jordede dem under Tamarisken i Jabesj og fastede syv Dage.

< 1 Samuele 31 >