< 1 Samuele 30 >

1 Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango.
Le troisième jour, David et ses hommes arrivèrent à Tsiklag. Les Amalécites avaient fait une incursion dans le Sud et à Tsiklag, ils avaient frappé Tsiklag et l'avaient incendiée,
2 Bakangaki na bowumbu basi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna, ezala bilenge to mikolo, kasi babomaki moko te kati na bango. Bamemaki bango mpe bazongelaki nzela na bango.
et ils avaient fait prisonniers les femmes et tous ceux qui s'y trouvaient, petits et grands. Ils n'en tuèrent aucun, mais les emportèrent et s'en allèrent.
3 Tango Davidi mpe bato na ye bakomaki na engumba Tsikilagi, bakutaki yango ebebisama na moto. Basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakomaki bawumbu.
Lorsque David et ses hommes arrivèrent à la ville, voici qu'elle était brûlée par le feu; leurs femmes, leurs fils et leurs filles avaient été emmenés captifs.
4 Davidi mpe bato na ye balelaki makasi kino bazangaki makasi ya kolela.
Alors David et le peuple qui était avec lui élevèrent la voix et pleurèrent jusqu'à ce qu'ils n'aient plus la force de pleurer.
5 Bamemaki mpe na bowumbu basi mibale ya Davidi: Ayinoami, moto ya Jizireyeli; mpe Abigayili, moto ya Karimeli, oyo akufisaki mobali, Nabali.
Les deux femmes de David furent emmenées en captivité: Ahinoam, la Jizreelite, et Abigaïl, la femme de Nabal, le Carmélite.
6 Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.
David était dans une grande angoisse, car le peuple parlait de le lapider, car l'âme de tout le peuple était affligée, chacun pour ses fils et pour ses filles; mais David se fortifiait en Yahvé, son Dieu.
7 Boye Davidi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki: « Memela ngai efode. » Mpe Abiatari amemelaki ye yango.
David dit au prêtre Abiathar, fils d'Ahimélec: « Apporte-moi l'éphod, je te prie. » Abiathar apporta l'éphod à David.
8 Bongo Davidi atunaki Yawe: — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi? Nakokoka na ngai kokanga bango? Yawe azongiselaki ye: — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.
David consulta Yahvé en disant: « Si je poursuis cette troupe, l'atteindrai-je? » Il lui répondit: « Poursuis, car tu les rattraperas sûrement, et tu les récupéreras tous sans faute. »
9 Davidi akendeki elongo na basoda na ye, nkama motoba. Bakomaki na moluka ya lubwaku ya Besori epai wapi ba-oyo bazalaki kotikala na sima batelemaki;
Et David partit, lui et les six cents hommes qui étaient avec lui, et il arriva au torrent de Besor, où étaient restés ceux qui étaient restés en arrière.
10 pamba te mibali nkama mibale balembaki makasi, bongo bakokaki te kokatisa moluka. Kasi Davidi elongo na basoda na ye, nkama minei, bakobaki kolanda.
David poursuivit sa route avec quatre cents hommes, car deux cents hommes restèrent en arrière, qui étaient si faibles qu'ils ne purent franchir le torrent de Besor.
11 Basoda ya Davidi bakutanaki na mobali moko ya Ejipito kati na zamba mpe bamemaki ye epai ya Davidi. Bapesaki ye mayi ya komela mpe biloko ya kolia.
Ils trouvèrent un Égyptien dans les champs, l'amenèrent à David, lui donnèrent du pain, et il mangea, et lui donnèrent de l'eau à boire.
12 Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato.
Ils lui donnèrent un morceau d'un gâteau de figues et deux grappes de raisins secs. Quand il eut mangé, son esprit revint à lui, car il n'avait pas mangé de pain ni bu d'eau depuis trois jours et trois nuits.
13 Davidi atunaki ye: — Ozali na ngambo ya banani mpe owuti wapi? Azongiselaki ye: — Nazali moto ya Ejipito mpe mowumbu ya moto moko ya Amaleki. Esali mikolo misato wuta nkolo na ngai atikalaki kosundola ngai mpo ete nazalaki kobela.
David lui demanda: « A qui appartiens-tu? D'où viens-tu? » Il dit: « Je suis un jeune homme d'Égypte, serviteur d'un Amalécite; mon maître m'a abandonné, car il y a trois jours, je suis tombé malade.
14 Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.
Nous avons fait une incursion dans le sud des Kéréthiens, dans ce qui appartient à Juda et dans le sud de Caleb, et nous avons brûlé Ziklag par le feu. »
15 Davidi atunaki ye: — Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali? Azongisaki: — Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali.
David lui dit: « Veux-tu me faire descendre dans cette troupe? » Il lui dit: « Jure-moi par Dieu que tu ne me tueras pas et que tu ne me livreras pas aux mains de mon maître, et je te ferai descendre dans cette troupe. »
16 Boye amemaki Davidi na esika oyo bato ya Amaleki bazalaki. Mpe bamonaki ete bazalaki ya kopanzana na mboka mobimba, bazalaki kolia, komela mpe kobina mpo na ebele ya bomengo ya bitumba oyo babotolaki na mokili ya bato ya Filisitia mpe ya Yuda.
Quand il l'eut fait descendre, voici qu'ils se répandirent sur toute la surface du sol, mangeant, buvant et dansant, à cause de tout le grand butin qu'ils avaient enlevé du pays des Philistins et du pays de Juda.
17 Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki.
David les frappa depuis le crépuscule jusqu'au soir du jour suivant. Pas un seul d'entre eux n'en sortit, à l'exception de quatre cents jeunes gens qui montèrent sur des chameaux et s'enfuirent.
18 Davidi akangolaki biloko nyonso oyo bato ya Amaleki bazwaki elongo na basi na ye mibale.
David récupéra tout ce que les Amalécites avaient pris, et il sauva ses deux femmes.
19 Moto na bango moko te azangaki: ezala elenge, mokolo, mwana mobali, mwana mwasi, eloko moko kati na bomengo ya bitumba to eloko moko kati na biloko oyo babotolaki bango. Davidi azongaki na biloko nyonso.
Il ne leur manquait rien, ni petit ni grand, ni fils ni filles, ni butin, ni rien de ce qu'ils avaient pris. David les ramena tous.
20 Davidi akamataki bameme mpe bangombe nyonso. Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya bibwele mpo na kolakisa yango nzela bazalaki koloba: « Tala bomengo ya bitumba ya Davidi. »
David prit tous les troupeaux de bœufs et de vaches, qu'ils conduisirent devant les autres bêtes, et il dit: « Voici le butin de David. »
21 Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote.
David arriva auprès des deux cents hommes qui étaient si faibles qu'ils ne pouvaient pas suivre David, qu'ils avaient aussi fait séjourner au torrent de Besor; et ils sortirent à la rencontre de David et du peuple qui était avec lui. Lorsque David s'approcha du peuple, il le salua.
22 Kasi kati na bato oyo bakendeki elongo na Davidi, bato nyonso ya mabe mpe batomboki balobaki: — Lokola bakendeki na biso te, tokoki kokabola na bango te bomengo ya bitumba. Tika ete moto na moto azwa kaka mwasi na ye elongo na bana na ye mpe akende.
Alors tous les méchants et les vauriens de ceux qui étaient allés avec David prirent la parole et dirent: « Parce qu'ils n'ont pas marché avec nous, nous ne leur donnerons rien du butin que nous avons récupéré, si ce n'est à chacun sa femme et ses enfants, afin qu'il les conduise et s'en aille. »
23 Kasi Davidi alobaki: — Te, bandeko na ngai ya mibali! Bokoki kosala boye te mpo na biloko oyo Yawe apesi biso! Pamba te abateli biso mpe akabi na maboko na biso mampinga nyonso oyo eyaki kobundisa biso.
David dit alors: « N'agissez pas ainsi, mes frères, avec ce que l'Éternel nous a donné, qui nous a préservés et qui a livré entre nos mains la troupe qui était venue contre nous.
24 Nani akoki kondima bino na makambo oyo bozali koloba? Eteni ya moto oyo atikalaki kokengela biloko mpe eteni ya moto oyo akendeki na bitumba esengeli kozala ndenge moko. Tokokabola nyonso ndenge moko.
Qui vous écoutera dans cette affaire? Car, de même que sa part est celle de celui qui descend au combat, de même sa part sera celle de celui qui reste avec les bagages. Ils auront la même part. »
25 Kobanda mokolo wana kino lelo, Davidi akomisaki yango mobeko mpe malako kati na Isalaele.
Il en fut ainsi à partir de ce jour, et il en fit une loi et une ordonnance pour Israël jusqu'à ce jour.
26 Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki: « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. »
Lorsque David arriva à Ziklag, il envoya une partie du butin aux anciens de Juda, même à ses amis, en disant: « Voici un présent pour vous, tiré du butin des ennemis de l'Éternel. »
27 Atindaki ndambo epai ya ba-oyo bazalaki na Beteli, na ngambo ya sude ya Ramoti mpe na Yatiri;
Il l'envoya à ceux qui étaient à Béthel, à ceux qui étaient à Ramoth du Sud, à ceux qui étaient à Jattir,
28 mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Aroeri, na Sipimoti, na Eshitemoa;
à ceux qui étaient à Arœr, à ceux qui étaient à Siphmoth, à ceux qui étaient à Eshtemoa,
29 mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Rakali, kati na bingumba ya bato ya Yerameeli, ya bato ya Keni;
à ceux qui étaient à Racal, à ceux qui étaient dans les villes des Jerahmeelites, à ceux qui étaient dans les villes des Kenites,
30 epai ya ba-oyo bazalaki na Orima, na Bori-Ashani, na Ataki;
à ceux qui étaient à Horma, à ceux qui étaient à Borashan, à ceux qui étaient à Athach,
31 epai ya ba-oyo bazalaki na Ebron mpe na bisika nyonso oyo Davidi mpe bato na ye balekaki.
à ceux qui étaient à Hébron, et à tous les endroits où David lui-même et ses hommes avaient l'habitude de séjourner.

< 1 Samuele 30 >