< 1 Samuele 29 >

1 Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.
ויקבצו פלשתים את כל מחניהם אפקה וישראל חנים בעין אשר ביזרעאל
2 Wana bakambi ya bato ya Filisitia batambolaki liboso ya mampinga na bango ya bankama mpe ya bankoto ya basoda, Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na sima elongo na mokonzi Akishi.
וסרני פלשתים עברים למאות ולאלפים ודוד ואנשיו עברים באחרנה--עם אכיש
3 Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki: — Ba-Ebre oyo bazali kosala nini awa? Akishi alobaki na bango: — Ezali Davidi, mosali ya Saulo, mokonzi ya Isalaele. Azali elongo na ngai wuta mibu mpe mikolo; mpe natikali nanu kokanga ye ata na mbeba moko te.
ויאמרו שרי פלשתים מה העברים האלה ויאמר אכיש אל שרי פלשתים הלוא זה דוד עבד שאול מלך ישראל אשר היה אתי זה ימים או זה שנים ולא מצאתי בו מאומה מיום נפלו עד היום הזה
4 Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia batombokelaki Akishi mpe balobaki: — Zongisa moto oyo! Tika ete azonga na esika oyo otiaki ye; asengeli te kokende elongo na biso na bitumba, noki te akobalukela biso na tango ya bitumba. Mpe ndenge nini moto oyo akoki kosepelisa lisusu mokonzi na ye, soki na komema mito ya bato na biso moko te?
ויקצפו עליו שרי פלשתים ויאמרו לו שרי פלשתים השב את האיש וישב אל מקומו אשר הפקדתו שם ולא ירד עמנו במלחמה ולא יהיה לנו לשטן במלחמה ובמה יתרצה זה אל אדניו--הלוא בראשי האנשים ההם
5 Ezali Davidi wana te oyo na tina na ye babandaki koyemba mpe kobina: « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »
הלוא זה דוד אשר יענו לו במחלות לאמר הכה שאול באלפיו ודוד ברבבתו
6 Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye: — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te.
ויקרא אכיש אל דוד ויאמר אליו חי יהוה כי ישר אתה וטוב בעיני צאתך ובאך אתי במחנה--כי לא מצאתי בך רעה מיום באך אלי עד היום הזה ובעיני הסרנים לא טוב אתה
7 Boye, zonga mpe kende na kimia; kosala eloko moko te oyo ekosepelisa te bakambi ya bato ya Filisitia.
ועתה שוב ולך בשלום ולא תעשה רע בעיני סרני פלשתים
8 Davidi atunaki Akishi: — Nasali nini? Eloko nini ya mabe oyo omoni epai ya mosali na yo wuta mokolo oyo nayaki epai na yo kino lelo? Mpo na nini nakoki te kokende kobundisa banguna ya mokonzi, nkolo na ngai?
ויאמר דוד אל אכיש כי מה עשיתי ומה מצאת בעבדך מיום אשר הייתי לפניך עד היום הזה כי לא אבוא ונלחמתי באיבי אדני המלך
9 Akishi azongiselaki Davidi: — Nayebi ete osepelisaka ngai lokola Anjelu na Nzambe, Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia balobi: « Asengeli te kokende elongo na biso na bitumba. »
ויען אכיש ויאמר אל דוד ידעתי כי טוב אתה בעיני כמלאך אלהים אך שרי פלשתים אמרו לא יעלה עמנו במלחמה
10 Boye, lamuka na tongo makasi, yo mpe basoda ya nkolo na yo, oyo bayaki elongo na yo. Bolamuka na tongo makasi mpe bokende wana moyi ekobima.
ועתה השכם בבקר ועבדי אדניך אשר באו אתך והשכמתם בבקר ואור לכם ולכו
11 Boye, Davidi mpe bato na ye batelemaki na tongo makasi mpo na kozonga na mokili ya bato ya Filisitia; mpe bato ya Filisitia bakendeki na Jizireyeli.
וישכם דוד הוא ואנשיו ללכת בבקר לשוב אל ארץ פלשתים ופלשתים עלו יזרעאל

< 1 Samuele 29 >