< 1 Samuele 28 >
1 Na tango wana, bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda mpo na kobundisa Isalaele. Akishi alobaki na Davidi: — Osengeli koyeba ete yo mpe bato na yo bokokende na bitumba elongo na ngai.
Vào lúc ấy, người Phi-li-tin tập trung lực lượng đi đánh Ít-ra-ên. Vua A-kích nói với Đa-vít: “Ngươi dẫn thuộc hạ theo ta ra trận.”
2 Davidi azongiselaki Akishi: — Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala. Akishi alobaki na Davidi: — Malamu mingi! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai.
Đa-vít đáp: “Vâng, vua sẽ thấy khả năng chiến đấu của chúng tôi.” A-kích nói: “Được lắm. Rồi ngươi sẽ làm vệ sĩ cho ta suốt đời.”
3 Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.
Khi Sa-mu-ên qua đời, toàn dân Ít-ra-ên khóc thương và chôn ông trong thành Ra-ma, quê hương ông. Sau-lơ đã diệt trừ những người làm nghề đồng bóng và phù thủy trong nước.
4 Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa.
Quân Phi-li-tin đóng đồn ở Su-nem; còn Sau-lơ và quân Ít-ra-ên tập trung ở Ghinh-bô-a.
5 Tango Saulo amonaki mampinga ya bato ya Filisitia, abangaki mpe somo etondaki na motema na ye.
Khi thấy đoàn quân Phi-li-tin, Sau-lơ hoảng sợ.
6 Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli.
Vua cầu hỏi Chúa Hằng Hữu, nhưng Ngài không đáp dù dưới hình thức báo mộng, dùng bảng U-rim, hay qua các tiên tri.
7 Bongo, Saulo alobaki na basali na ye: — Bolukela ngai mwasi oyo asololaka na bakufi mpo ete nakende kotuna ye. Basali na ye bazongisaki: — Tala, ezali na mwasi moko na Eyini-Dori.
Sau-lơ nói với các quân sư: “Hãy tìm cho ta một bà bóng để ta hỏi vài điều.” Các quân sư của vua đáp: “Có một bà bóng ở Ên-đô-rơ.”
8 Boye Saulo amibongolaki, alataki bilamba mosusu mpe akendeki epai ya mwasi yango, na butu, elongo na mibali mibale. Alobaki: — Nabondeli yo, solola na bakufi mpo na ngai, mpe bimisela ngai moto oyo nakotanga kombo na ye.
Sau-lơ cải trang và đang đêm dẫn hai người đi đến nhà bà bóng, Ông nói: “Xin bà cầu hồn một người cho tôi.”
9 Kasi mwasi yango alobaki na ye: — Oyebi solo makambo oyo Saulo asalaki. Abenganaki na mokili, bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. Bongo mpo na nini otieli bomoi na ngai motambo mpo na kobomisa ngai?
Bà bóng đáp: “Chắc ông biết việc vua giết các người làm nghề đồng bóng và phù thủy trong Ít-ra-ên. Sao ông còn cài bẫy để giết tôi?”
10 Saulo alapaki ndayi epai na ye na Kombo na Yawe, alobaki: « Na Kombo na Yawe, okozwa solo etumbu te mpo na yango. »
Sau-lơ chỉ Danh Chúa Hằng Hữu mà thề: “Thật như Chúa Hằng Hữu hằng sống, sẽ không có điều gì xấu xảy đến cho bà.”
11 Bongo mwasi yango atunaki: — Nabimisela yo nani? Saulo azongisaki: — Bimisela ngai Samuele.
Nghe thế, bà bóng hỏi: “Ông muốn cầu hồn ai?” Sau-lơ đáp: “Sa-mu-ên.”
12 Tango mwasi yango amonaki Samuele, agangaki makasi mpe alobaki na Saulo: — Mpo na nini okosi ngai? Ozali Saulo!
Khi thấy Sa-mu-ên hiện lên, bà bóng la hoảng, nói với Sau-lơ: “Tại sao vua lừa tôi? Vua là Sau-lơ!”
13 Mokonzi alobaki na ye: — Kobanga te, omoni nini? Mwasi alobaki na Saulo: — Namoni nzambe moko kobima na mabele.
Vua trấn an: “Đừng sợ! Ngươi thấy gì?” Bà nói: “Tôi thấy một vị thần từ dưới đất lên.”
14 Saulo atunaki ye: — Azali ndenge nini? Mwasi azongisaki: — Ezali mobange mobali moko nde azali komata mpe alati kazaka. Bongo tango Saulo asosolaki ete ezali Samuele, akitaki mpe agumbamaki elongi kino na mabele.
Sau-lơ hỏi: “Hình dáng vị ấy như thế nào?” Bà đáp: “Một ông già khoác chiếc áo choàng.” Sau-lơ biết đó là Sa-mu-ên, nên sấp mình dưới đất, vái lạy.
15 Samuele alobaki na Saulo: — Mpo na nini otungisi ngai mpe obimisi ngai? Saulo alobaki: — Nazali na pasi makasi: bato ya Filisitia bazali kobundisa ngai; bongo Nzambe apesi ngai mokongo, azali koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to ya bandoto. Yango wana nabengi yo mpo ete oyebisa ngai likambo nini nakoki kosala.
Sa-mu-ên hỏi Sau-lơ: “Sao vua quấy rầy tôi, gọi tôi lên làm gì?” Sau-lơ thưa: “Tôi ở trong tình cảnh nguy khốn. Quân Phi-li-tin đến đánh, nhưng Đức Chúa Trời bỏ tôi, không đáp lời tôi cầu hỏi dù qua lời tiên tri hay qua giấc mộng, nên túng thế tôi phải cầu ông, mong ông dạy tôi điều phải làm.”
16 Samuele alobaki: — Mpo na nini ozali kotuna ngai, awa Yawe asili kopesa yo mokongo mpe akomi monguna na yo?
Sa-mu-ên nói: “Vua còn hỏi tôi làm gì nữa, một khi Chúa Hằng Hữu bỏ và chống nghịch vua?
17 Yawe akokisi kaka makambo oyo asakolaki na nzela na ngai: Yawe abotoli bokonzi na maboko na yo mpe apesi yango na moninga na yo, Davidi,
Chúa Hằng Hữu sẽ thực hiện những điều Ngài đã phán dặn tôi nói trước đây, lấy ngôi nước khỏi tay vua, trao cho Đa-vít, láng giềng của vua.
18 pamba te otosaki Yawe te mpe okweyiselaki te bato ya Amaleki kanda ya Yawe na koboma bango nyonso. Yango wana Yawe asali yo bongo lelo.
Nguyên do vì vua không tuân lệnh Chúa Hằng Hữu, không cho người A-ma-léc nếm lửa giận của Ngài.
19 Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia.
Hơn thế nữa, Chúa Hằng Hữu sẽ phó vua, và quân Ít-ra-ên vào tay người Phi-li-tin; và ngày mai, vua với các con vua sẽ ở một nơi với tôi.”
20 Mbala moko, Saulo abombamaki na mabele mpe ayokaki maloba ya Samuele somo mingi. Nzoto na ye elembaki mpo ete aliaki eloko moko te mokolo mobimba mpe butu mobimba.
Nghe thế, Sau-lơ kinh hoàng, ngã nằm dài dưới đất. Phần vì cả ngày hôm ấy vua không ăn gì hết nên kiệt sức.
21 Tango mwasi apusanaki pembeni ya Saulo mpe amonaki ete azali lisusu na kimia te, alobaki na ye: — Tala, mwasi mosali na yo atosaki yo. Nandimaki kokufa mpo na kaka kosala makambo oyo otindaki ngai.
Thấy cảnh Sau-lơ bối rối như thế, bà bóng bước tới nói: “Tôi đã liều mạng để làm theo lời vua.
22 Sik’oyo, yo mpe, nabondeli yo: yoka mwasi mosali na yo, mpe tika ete ngai napesa yo bilei mpo ete olia mpe ozwa makasi ya kokoba nzela na yo.
Bây giờ xin nghe tôi, cho tôi dọn chút gì vua ăn để lấy sức đi đường.”
23 Kasi Saulo aboyaki mpe alobaki: — Nakolia te. Kasi lokola basali na ye elongo na mwasi batiaki molende, Saulo ayokelaki bango. Saulo alamukaki mpe avandaki na mbeto.
Sau-lơ từ chối: “Ta không ăn.” Nhưng hai người theo vua và bà bóng cứ nài nỉ mãi, cuối cùng vua đành đứng dậy và ngồi trên giường.
24 Mwasi azalaki na mwana ngombe ya mafuta epai na ye, na etonga. Abonzaki yango noki-noki lokola mbeka. Akamataki farine, asangisaki yango mpe atumbelaki bango mapa ezanga levire.
Bà bóng vội bắt con bò con béo tốt đem làm thịt, và lấy bột làm bánh không men,
25 Atiaki yango liboso ya Saulo mpe liboso ya basali na ye, mpe baliaki. Bongo na butu wana kaka, batelemaki mpe bakendeki.
dọn lên cho Sau-lơ và thuộc hạ vua ăn. Ăn xong, họ ra đi khi trời chưa sáng.