< 1 Samuele 26 >
1 Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo, mpe balobaki: « Boni, oyebi ete Davidi abombami na likolo ya Akila, ngomba moke oyo etalani na Yeshimoni? »
The people of Ziph went to Saul at Gibeah and told him, “David's hiding on the hill of Hakilah, opposite the wastelands.”
2 Boye Saulo atelemaki mpo na kokende na esobe ya Zifi elongo na basoda ya mpiko ya Isalaele, nkoto misato, mpo na koluka Davidi kati na esobe ya Zifi.
So Saul went to the Desert of Ziph along with three thousand specially-picked men from Israel to search for David there.
3 Saulo atongaki molako na ye na likolo ya Akila, ngomba moke, oyo etalani na Yeshimoni, pembeni ya nzela. Na tango wana, Davidi azalaki kovanda kati na esobe. Lokola amonaki ete Saulo alandi ye kino na esobe,
Saul set up camp beside the road at the hill of Hachilah opposite the wastelands, near to where David was living in the desert. When he realized that Saul had come looking for him there,
4 Davidi atindaki banongi mpe, na nzela na bango, ayokaki ete Saulo akomi penza.
he sent out spies and found out Saul had definitely arrived.
5 Davidi atelemaki mpe akendeki na esika oyo Saulo atongaki molako na ye. Amonaki esika oyo Saulo mpe Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga na ye, balalaki. Saulo azalaki ya kolala na kati-kati ya molako, mpe basoda bazingelaki ye.
One night David got up and went over to Saul's camp and saw where Saul was sleeping, along with Abner, son of Ner, the army commander. Saul was lying in the middle of the camp with his men all around him.
6 Davidi atunaki Ayimeleki, moto ya Iti, mpe Abishayi, mwana mobali ya Tseruya mpe ndeko mobali ya Joabi: — Nani kati na bino akoki kokende elongo na ngai kino na molako epai ya Saulo? Abishayi azongisaki: — Ngai, nakokende elongo na yo.
David asked Ahimelech the Hittite and Abishai, son of Zeruiah, Joab's brother, “Who wants to go with me into the camp to Saul?” “I'll go with you,” Abishai replied.
7 Boye Davidi mpe Abishayi bakomaki, na butu, na esika oyo basoda bazalaki. Bakutaki Saulo alali pongi na kati-kati ya molako, mpe likonga na ye epikamaki na mabele, na pembeni ya moto na ye. Abineri mpe basoda balalaki zingazinga na ye.
So David and Abishai went to the army camp at night. Saul was sleeping there in the camp with his spear stuck in the ground beside his head, with Abner and his men sleeping around him.
8 Abishayi alobaki na Davidi: — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.
Abishai said to David, “God has handed your enemy over to you today. So please let me spear him to the ground in one go. I won't need to do it twice!”
9 Kasi Davidi alobaki na Abishayi: — Te! Koboma ye te! Pamba te nani akosembola loboko na ye likolo ya mopakolami na Yawe mpe azanga kozwa etumbu?
But David said to Abishai, “No, don't kill him! Who can attack the Lord's anointed one and not be guilty of a crime?
10 Mpe Davidi alobaki lisusu: — Na Kombo na Yawe! Ye moko Yawe nde akoboma ye: akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.
As the Lord lives, the Lord himself will kill him. Either his time will come and he'll die, or he will go into battle and be killed.
11 Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso.
May the Lord prevent me from attacking the Lord's anointed one. Just pick up the spear and water jug beside his head, and let's go.”
12 Boye Davidi azwaki likonga mpe eloko ya mayi oyo ezalaki pembeni ya moto ya Saulo, mpe bakendeki. Moto moko te amonaki mpe ayebaki likambo yango, mpe moko te alamukaki. Bato nyonso bazalaki ya kolala, pamba te Yawe alalisaki bango pongi makasi.
David took the spear and water jug beside Saul's head, and they left. Nobody saw anything; nobody knew what had happened; nobody woke up. Everybody stayed asleep, because the Lord had made them fall into a deep sleep.
13 Davidi akatisaki lubwaku, akendeki na ngambo mosusu mpe atelemaki mosika, na songe ya ngomba, mosika penza ya molako.
Then David went back over to the other side, and stood on top of the hill far enough away—there was a considerable distance between them.
14 Davidi abelelaki epai ya mampinga mpe epai ya Abineri, mwana mobali ya Neri; alobaki: — Abineri, okoyanola ngai? Abineri azongisaki: — Yo nani oyo ozali koganga na matoyi ya mokonzi?
He shouted down to the army and Abner, son of Ner, “Aren't you going to answer me, Abner?” “Who is that shouting, disturbing the king?” Abner called back.
15 Davidi alobaki na Abineri: — Ozali mobali, boye te? Nani akokani na yo kati na Isalaele? Mpo na nini obateli te mokonzi, nkolo na yo? Moto moko ayaki mpo na koboma mokonzi na yo.
David called to Abner, “Aren't you meant to be this great man? Is there anyone in Israel who is better than you? So why didn't you protect your master the king when someone came to kill him?
16 Likambo oyo osali ezali malamu te. Na Kombo na Yawe, yo mpe bato na yo bosengeli kokufa; pamba te bobateli te nkolo na bino, mopakolami na Yawe. Botala zingazinga na bino! Wapi likonga mpe eloko ya mayi ya mokonzi, oyo ezalaki pembeni ya moto na ye?
You haven't done well at all. As the Lord lives, you all deserve to die, because you did not protect your master, the Lord's anointed. Take a look around. Where are the king's spear and water jug that were beside his head?”
17 Saulo asosolaki ete ezali mongongo ya Davidi mpe alobaki: — Oyo wana ezali mongongo na yo Davidi, mwana na ngai. Davidi azongisaki: — Solo, ezali mongongo na ngai, oh mokonzi, nkolo na ngai.
Saul recognized David's voice and asked, “Is that you speaking, David, my son?” “Yes it's me, my lord and king,” David replied.
18 Bongo Davidi alobaki lisusu: — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolanda mosali na ye? Nasali nini? Likambo nini ya mabe nasali mpo ete namema ngambo?
“Why is my lord hunting me, his servant? What is it that I've done? What crime am I guilty of?” he continued.
19 Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai: « Kende kosalela banzambe mosusu. »
“Please listen to me, my lord and king. If the Lord has made you angry with me, then may he be happy to accept an offering. But if it's men that have done it, may they be cursed before the Lord! For all this while they've been driving me away from living among God's chosen people, telling me, ‘Go away and worship other gods.’
20 Sik’oyo, tika ete makila na ngai esopana na mabele te, mosika na miso ya Yawe! Pamba te mokonzi ya Isalaele abimaki mpo na koluka ngenga kaka moko, ndenge balandaka soso ya zamba, na bangomba.
Please don't let me die so far from the presence of the Lord. The king of Israel has come to chase down one little flea, hunting me like someone who hunts a partridge in the mountains.”
21 Boye Saulo alobaki: — Solo, nasali masumu! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.
“I've done wrong,” Saul replied, “Come back, David, my son. I won't ever try to harm you again, because you valued me and spared my life today. I've been so stupid! I've made a big mistake!”
22 Davidi azongisaki: — Likonga ya mokonzi, yango oyo! Tika ete moko kati na bilenge mibali na yo aya kozwa yango.
“I have the king's spear here,” said David. “Send one of your men over to collect it.
23 Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe.
The Lord rewards all those who do what is right and who are trustworthy. The Lord handed you over to me today, but I refused to harm the Lord's anointed one.
24 Ndenge bomoi na yo ezalaki lelo motuya makasi na miso na ngai, ndenge wana mpe bomoi na ngai ekozala motuya makasi na miso ya Yawe, mpe akokangola ngai na pasi nyonso.
In the same way as I valued your life today, may the Lord value my life, and may he rescue me from all my troubles.”
25 Saulo alobaki na Davidi: — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye.
Saul said to David, “May you be blessed, David my son. You will accomplish a great deal and always be successful.” David left, and Saul went back home.