< 1 Samuele 25 >
1 Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama. Davidi akendeki na esobe ya Parani.
撒母耳死了,以色列众人聚集,为他哀哭,将他葬在拉玛—他自己的坟墓里。 大卫起身,下到巴兰的旷野。
2 Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale.
在玛云有一个人,他的产业在迦密,是一个大富户,有三千绵羊,一千山羊;他正在迦密剪羊毛。
3 Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe.
那人名叫拿八,是迦勒族的人;他的妻名叫亚比该,是聪明俊美的妇人。拿八为人刚愎凶恶。
4 Wana Davidi azali kati na esobe, ayokaki ete Nabali azali kokata bameme na ye bapwale.
大卫在旷野听见说拿八剪羊毛,
5 Davidi atindaki bilenge mibali zomi, alobaki na bango: « Bokende na Karimeli epai ya Nabali mpe bopesa ye mbote na kombo na ngai.
大卫就打发十个仆人,吩咐他们说:“你们上迦密去见拿八,提我的名问他安。
6 Boyebisa ye: ‹ Tika ete bomoi molayi epesamela yo! Tika ete kimia ezala na yo, na libota na yo mpe na nyonso oyo ezali ya yo!
要对那富户如此说:‘愿你平安,愿你家平安,愿你一切所有的都平安。
7 Nayoki ete bazali kokata bameme bapwale epai na yo. Nzokande, tango nyonso oyo babateli bibwele na yo bazalaki elongo na biso na Karimeli, tosalaki bango mabe ata moko te, mpe babungisaki ata eloko moko te.
现在我听说有人为你剪羊毛,你的牧人在迦密的时候和我们在一处,我们没有欺负他们,他们也未曾失落什么。
8 Tuna basali na yo, bakoyebisa yo. Boye, tika ete bilenge mibali na ngai bazwa ngolu na miso na yo, lokola tokomi epai na yo na mokolo ya feti! Nabondeli yo, pesa na basali na yo mpe na Davidi, mwana na yo ya mobali, eloko nyonso oyo okokoka kozwa mpo na bango. › »
可以问你的仆人,他们必告诉你。所以愿我的仆人在你眼前蒙恩,因为是在好日子来的。求你随手取点赐与仆人和你儿子大卫。’”
9 Tango bilenge mibali ya Davidi bakomaki epai ya Nabali, bayebisaki ye makambo oyo nyonso na kombo ya Davidi, mpe bazelaki.
大卫的仆人到了,将这话提大卫的名都告诉了拿八,就住了口。
10 Kasi Nabali azongiselaki basali ya Davidi: « Davidi azali nani? Mwana mobali ya Izayi azali nani? Mikolo oyo, basali ebele bazali kokima bankolo na bango.
拿八回答大卫的仆人说:“大卫是谁?耶西的儿子是谁?近来悖逆主人奔逃的仆人甚多,
11 Mpo na nini nakamata mapa na ngai, mayi na ngai mpe mosuni, oyo nabongisi mpo na bato na ngai, oyo bakataka bapwale, mpo na kopesa yango epai ya bato oyo nayebi kutu epai bawuti te? »
我岂可将饮食和为我剪羊毛人所宰的肉给我不知道从哪里来的人呢?”
12 Bilenge mibali ya Davidi babalukaki mpe bazongaki. Tango bakomaki, bayebisaki Davidi makambo oyo Nabali alobaki.
大卫的仆人就转身从原路回去,照这话告诉大卫。
13 Davidi alobaki na basoda na ye: « Tika ete moko na moko atia mopanga na ye na loketo. » Boye, batiaki mipanga na bango na loketo, mpe Davidi atiaki mpe oyo ya ye. Bato pene nkama minei bakendeki elongo na Davidi, mpe bato nkama mibale batikalaki mpo na kobatela biloko.
大卫向跟随他的人说:“你们各人都要带上刀!”众人就都带上刀,大卫也带上刀。跟随大卫上去的约有四百人,留下二百人看守器具。
14 Moko kati na basali ya Nabali alobaki na Abigayili, mwasi ya Nabali: « Davidi atindaki bantoma wuta na esobe mpo na kopambola nkolo na biso, kasi ye atombokelaki bango.
有拿八的一个仆人告诉拿八的妻亚比该说:“大卫从旷野打发使者来问我主人的安,主人却辱骂他们。
15 Nzokande bato yango basalelaki biso penza bolamu, basalaki biso mabe ata moko te, mpe, tango nyonso totambolaki elongo na bango na zamba, tobungisaki ata eloko moko te.
但是那些人待我们甚好;我们在田野与他们来往的时候,没有受他们的欺负,也未曾失落什么。
16 Butu mpe moyi, tango nyonso tozalaki koleisa bibwele na biso pene na bango, bazalaki lokola mir zingazinga na biso.
我们在他们那里牧羊的时候,他们昼夜作我们的保障。
17 Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »
所以你当筹划,看怎样行才好;不然,祸患定要临到我主人和他全家。他性情凶暴,无人敢与他说话。”
18 Abigayili asalaki na lombangu, azwaki mapa nkama mibale, bambeki mibale ya vino, bameme batumba mitano, bakilo tuku motoba na mibale na bagrame nkama mitano ya ble bakalinga, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka mpe bagato nkama mibale basala na bambuma ya figi; mpe atiaki yango na likolo ya ba-ane.
亚比该急忙将二百饼,两皮袋酒,五只收拾好了的羊,五细亚烘好了的穗子,一百葡萄饼,二百无花果饼,都驮在驴上,
19 Bongo alobaki na basali na ye: « Bokende liboso na ngai, nazali kolanda bino. » Kasi ayebisaki mobali na ye, Nabali, te.
对仆人说:“你们前头走,我随着你们去。”这事她却没有告诉丈夫拿八。
20 Wana Abigayili azalaki na likolo ya ane, azalaki kokita sima na ngomba. Na tango yango kaka, Davidi mpe bato na ye bazalaki mpe kokita na ngambo epai wapi Abigayili azalaki, mpe akutanaki na bango.
亚比该骑着驴,正下山坡,见大卫和跟随他的人从对面下来,亚比该就迎接他们。
21 Davidi awutaki komilobela: « Ezalaki na pamba nde nabatelaki biloko nyonso ya moto oyo kati na esobe mpo ete eloko moko te ebunga kati na biloko na ye nyonso! Azongiseli ngai mabe na esika ya bolamu oyo nasalelaki ye!
大卫曾说:“我在旷野为那人看守所有的,以致他一样不失落,实在是徒然了!他向我以恶报善。
22 Tika ete Nzambe apesa ngai Davidi etumbu ya makasi soki, kino lobi na tongo, natiki na bomoi mobali moko kati na bato nyonso oyo bazali ya Nabali! »
凡属拿八的男丁,我若留一个到明日早晨,愿 神重重降罚与我!”
23 Tango Abigayili amonaki Davidi, akitaki na lombangu wuta na ane na ye mpe agumbamaki na liboso ya Davidi, elongi kino na mabele.
亚比该见大卫,便急忙下驴,在大卫面前脸伏于地叩拜,
24 Akweyaki na makolo ya Davidi mpe alobaki: — Oh nkolo na ngai, tika ete mbeba ezala kaka na moto na ngai! Nabondeli yo, tika ete mwasi mosali na yo asolola na yo! Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo alingi koyebisa yo.
俯伏在大卫的脚前,说:“我主啊,愿这罪归我!求你容婢女向你进言,更求你听婢女的话。
25 Tika ete nkolo na ngai atala te Nabali, mobali oyo ya mabe, pamba te azali penza ndenge kombo na ye ezali; kombo na ye ezali Nabali, mpe elingi koloba: moto ya liboma. Mpe liboma ezali penza kotambola elongo na ye. Ngai mwasi mosali na yo, namonaki te bilenge mibali oyo mokonzi na ngai atindaki.
我主不要理这坏人拿八,他的性情与他的名相称;他名叫拿八,他为人果然愚顽。但我主所打发的仆人,婢女并没有看见。
26 Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.
我主啊,耶和华既然阻止你亲手报仇,取流血的罪,所以我指着永生的耶和华、又敢在你面前起誓说:‘愿你的仇敌和谋害你的人都像拿八一样。’
27 Mpe tika ete bakado oyo mwasi mosali na yo amemeli nkolo na ngai epesamela mibali oyo bazali kolanda yo.
如今求你将婢女送来的礼物给跟随你的仆人。
28 Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo.
求你饶恕婢女的罪过。耶和华必为我主建立坚固的家,因我主为耶和华争战;并且在你平生的日子查不出有什么过来。
29 Ezala soki moto moko atelemi mpo na kolanda yo to mpo na koboma yo, Yawe, Nzambe na yo, akobatela malamu bomoi ya nkolo na ngai kati na bato ya bomoi, kasi akobwaka banguna na yo mosika lokola na ebambelo mabanga.
虽有人起来追逼你,寻索你的性命,你的性命却在耶和华—你的 神那里蒙保护,如包裹宝器一样;你仇敌的性命,耶和华必抛去,如用机弦甩石一样。
30 Tango Yawe akokokisela nkolo na ngai bolamu nyonso oyo alakaki yo mpe akokomisa yo mokambi ya Isalaele,
我主现在若不亲手报仇流无辜人的血,到了耶和华照所应许你的话赐福与你,立你作以色列的王,那时我主必不至心里不安,觉得良心有亏。耶和华赐福与我主的时候,求你记念婢女。”
31 nkolo na ngai akoyoka mawa te na motema na ye mpe akomitungisa te na makanisi mpo ete asopaki makila na pamba mpe azongisaki ye moko mabe na mabe. Bongo tango Yawe akosalela nkolo na ngai bolamu, okokanisela mwasi mosali na yo.
32 Davidi azongiselaki Abigayili: — Tika ete apambolama, Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo atindi yo kokutana na ngai na mokolo ya lelo!
大卫对亚比该说:“耶和华—以色列的 神是应当称颂的,因为他今日使你来迎接我。
33 Tika ete mayele na yo epambolama! Tika ete yo moko mpe opambolama mpo ete opesi ngai nzela te ya koboma mpe ya kozongisa ngai moko mabe na mabe!
你和你的见识也当称赞;因为你今日拦阻我亲手报仇、流人的血。
34 Nzokande, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo apesi ngai nzela te ya kosala yo mabe, soki oyaki noki te mpo na kokutana na ngai, mobali moko te kati na ndako ya Nabali alingaki kotikala na bomoi kino lobi na tongo.
我指着阻止我加害于你的耶和华—以色列永生的 神起誓,你若不速速地来迎接我,到明日早晨,凡属拿八的男丁必定不留一个。”
35 Boye Davidi azwaki bakado oyo Abigayili amemelaki ye mpe alobaki: — Zonga epai na yo na kimia. Nayoki maloba na yo mpe nakosala ndenge osengi ngai.
大卫受了亚比该送来的礼物,就对她说:“我听了你的话,准了你的情面,你可以平平安安地回家吧!”
36 Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.
亚比该到拿八那里,见他在家里设摆筵席,如同王的筵席;拿八快乐大醉。亚比该无论大小事都没有告诉他,就等到次日早晨。
37 Kasi na tongo, lokola milangwa na ye esilaki, mwasi na ye ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. Nabali ayokaki pasi na motema mpe akangamaki lokola libanga.
到了早晨,拿八醒了酒,他的妻将这些事都告诉他,他就魂不附体,身僵如石头一般。
38 Sima na mikolo zomi, Yawe abetaki Nabali, mpe akufaki.
过了十天,耶和华击打拿八,他就死了。
39 Tango Davidi ayokaki ete Nabali akufi, alobaki: « Tika ete apambolama, Yawe oyo akoti likambo na ngai na ndenge Nabali atiolaki ngai! Apesi te na mosali na Ye nzela ya kosala mabe, kasi akweyisi mabe ya Nabali na moto na ye moko! » Bongo Davidi atindaki maloba epai ya Abigayili mpo na kosenga ye ete akoma mwasi na ye.
大卫听见拿八死了,就说:“应当称颂耶和华,因他伸了拿八羞辱我的冤,又阻止仆人行恶;也使拿八的恶归到拿八的头上。”于是大卫打发人去,与亚比该说,要娶她为妻。
40 Basali ya Davidi bakendeki na Karimeli mpe balobaki na Abigayili: — Davidi atindi biso epai na yo mpo ete toya kozwa yo mpo okoma mwasi na ye.
大卫的仆人到了迦密见亚比该,对她说:“大卫打发我们来见你,想要娶你为妻。”
41 Abigayili agumbamaki elongi kino na mabele mpe alobaki: — Mwasi mosali na yo, ye oyo! Abongami mpo na kosalela bino mpe mpo na kosukola makolo ya basali ya nkolo na ngai.
亚比该就起来,俯伏在地,说:“我情愿作婢女,洗我主仆人的脚。”
42 Abigayili amataki na ane na lombangu mpe akendeki nzela moko na bantoma ya Davidi elongo na basali na ye mitano ya basi. Mpe akomaki mwasi ya Davidi.
亚比该立刻起身,骑上驴,带着五个使女,跟从大卫的使者去了,就作了大卫的妻。
43 Davidi abalaki lisusu Ayinoami, moto ya Jizireyeli; mpe bango mibale bakomaki basi na ye.
大卫先娶了耶斯列人亚希暖,她们二人都作了他的妻。
44 Kasi Saulo abalisaki Mikali, mwana na ye ya mwasi, oyo azalaki mwasi ya Davidi, epai ya Paliti, mwana mobali ya Laishi, moto na Galimi.
扫罗已将他的女儿米甲,就是大卫的妻,给了迦琳人拉亿的儿子帕提为妻。