< 1 Samuele 24 >
1 Sima na Saulo kolanda bato ya Filisitia, azongaki; bongo bayebisaki ye: « Davidi azali sik’oyo kati na esobe ya Eyini-Gedi. »
Bangʼ ka Saulo nosea lawo jo-Filistia, nowachne niya, “Daudi nitie e Thim En Gedi.”
2 Na bongo, Saulo azwaki basoda ya mpiko nkoto misato kati na Isalaele mobimba mpe akendeki koluka Davidi mpe bato na ye pene ya etando ya bantaba ya zamba.
Omiyo Saulo nokawo ji alufu adek; ji moyier kowuok e Israel duto, eka noikore mowuok kodhi dwaro Daudi gi joge but Rogo ma Nyakech pondoe.
3 Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.
Nobiro e abila mar rombe man but yo; to kanyo ne nitie rogo, to Saulo nodonjo e rogono mondo olosre. Daudi gi joge bende ne osedonjo ei rogono.
4 Bato ya Davidi balobaki na ye: Tala mokolo oyo Yawe alobelaki tango alobaki na yo: « Nakokaba monguna na yo na maboko na yo mpo ete osala ye nyonso oyo olingi. » Boye Davidi apusanaki na kobombama mpe akataki songe ya kazaka ya Saulo.
Jogo nowacho niya, “Ma e odiechiengʼ ma Jehova Nyasaye nowuoyo kuome kowacho ni, ‘Abiro keto jowasiki e lweti mondo itimne kaka idwaro!’” Eka Daudi nosudo lingʼ-lingʼ mongʼado riak law Saulo.
5 Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo.
Bangʼe chuny Daudi nochandore nikech nosengʼado riak law Saulo.
6 Alobaki na basoda na ye: « Tika ete Yawe apesa ngai te nzela ya kosala likambo ya boye epai ya nkolo na ngai, mopakolami na Yawe! Loboko na ngai ekoki te kosimba nzoto na ye, pamba te Yawe nde apakolaki ye mafuta. »
Nowachone joge niya, “Jehova Nyasaye ok oyie mondo atim gima kamano ni ruodha, ngʼat Jehova Nyasaye mowir, kata tingʼo lweta mondo ahinye; nikech en ngʼat mowir ma Jehova Nyasaye oyiero.”
7 Na maloba oyo, Davidi agangelaki bato na ye mpe apekisaki bango kobundisa Saulo. Saulo abimaki na ebombamelo yango mpe akobaki nzela na ye.
Kamano Daudi nokwero joge kendo ne ok oyienegi mondo gitug dhawo gi Saulo. Omiyo Saulo nowuok e rogo modhi e yore.
8 Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo: « Mokonzi, nkolo na ngai! » Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele.
Eka Daudi nowuok oko mar rogo mi oluongo Saulo, “Ruodha ma ruoth!” Kane Saulo ongʼiyo chien, Daudi nokulore piny monindo auma ka wangʼe ochiko piny.
9 Alobaki na Saulo: — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe?
Nowachone Saulo niya, “Angʼo momiyo ichiko iti ka ji wachoni ni, ‘Daudi dwaro hinyi’?
10 Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki: « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. »
Kawuononi iseneno gi wangʼi kaka Jehova Nyasaye ne oketi e lweta ei rogo. Jomoko ne owachona ni anegi, to ne aweyi; mi awacho ni, ‘Ok natingʼ lweta mar hinyo ruodha nikech en ngʼat Jehova Nyasaye mowir.’
11 Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai.
Ne, wuora, ngʼi ine riak lawi ma an-go e lweta! Ne angʼade e riak lawi to ne ok anegi. Sani koro inyalo neno kendo fwenyo ni aonge gi paro mar timoni marach kata ngʼanyoni. Pok akethoni to in to ilawa mondo inega.
12 Tika ete Yawe azala Mosambisi kati na ngai mpe yo, mpe tika ete Yawe azongisela yo mabe na mabe oyo osali ngai! Kasi loboko na ngai ekosimba yo te.
Mad Jehova Nyasaye ngʼad bura e kinda kodi. Mad Jehova Nyasaye chul kuor kuom gik maricho misetimona, an to lweta ok nomuli.
13 Ndenge kaka lisese ya kala elobi: « Misala mabe ewutaka epai ya bato mabe, » loboko na ngai ekosimba yo te.
Mana kaka ngero machon wacho ni, ‘Joma timo timbe maricho ema timbe maricho wuok kuomgi’ omiyo ok abi keto lweta kuomi.
14 Mokonzi ya Isalaele abimi mpo na kobundisa nani? Azali kolanda nani? Mbwa ya kokufa? Nzinzi?
“En ngʼama ruodh Israel dwaro mondo onegi? Ilawo ngʼa? Guok motho koso kikun?
15 Tika ete Yawe azala Mosambisi na biso mpe akata likambo kati na biso. Tika ete atala likambo na ngai mpe akata yango! Tika ete alongisa ngai mpe akangola ngai wuta na loboko na yo.
Mad Jehova Nyasaye bed jangʼad buchwa mondo opog wach e kindwa. Mad onon wach makare kendo otingʼa malo; mad ochwaka kendo oresa e lweti.”
16 Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki: — Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai? Mpe Saulo alelaki makasi.
Kane Daudi otieko wuoyo, Saulo nopenjo niya, “Mano en dwondi Daudi wuoda?” Eka noywak matek.
17 Alobaki na Davidi: — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo!
Eka nowachone Daudi niya, “In ngʼama kare maloya. Isetimona maber, an to asetimoni marach.
18 Owuti sik’oyo kotalisa ngai bolamu oyo osaleli ngai: Yawe akabaki ngai penza na maboko na yo, kasi oboyaki na yo koboma ngai.
Koroni eka isewachona tim maber misetimona; Jehova Nyasaye noketa e lweti to ne ok inega.
19 Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo.
Ka ngʼato onwangʼo jasike, bende oweye odhi ma ok ohinye? Mad Jehova Nyasaye chuli mathoth kuom gima itimona kawuononi.
20 Tala, nayebi sik’oyo ete okozala penza mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekolendisama na maboko na yo.
Angʼeyo ni adieri ibiro bet ruoth kendo pinyruodh Israel nodhi nyime maber e bwo lochni.
21 Lapa sik’oyo ndayi epai na ngai na Kombo na Yawe ete okoboma bakitani na ngai te to okolimwisa kombo na ngai te wuta na libota ya botata na ngai.
Koro singrina gi nying Jehova Nyasaye ni ok ningʼad nyikwaya kata rucho nyinga oko e od wuora.”
22 Boye Davidi alapaki ndayi yango epai ya Saulo. Sima na yango, Saulo azongaki epai na ye. Bongo Davidi mpe bato na ye bazongaki na ebombamelo na bango kati na ngomba.
Omiyo Daudi nosingore ne Saulo. Eka Saulo nodok dala, to Daudi gi joge nodhi e kargi mar pondo.