< 1 Samuele 23 >
1 Tango bayebisaki Davidi ete bato ya Filisitia bazali kobundisa engumba Keila mpe bazali kozwa na makasi ble na bilanga na yango,
Da koro bi, Dawid tee sɛ Filistifo no aba Keila, na wɔrewia wɔn awi wɔ wɔn awiporowbea.
2 Davidi atunaki Yawe, alobaki: — Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia? Yawe azongiselaki ye: — Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila.
Dawid bisaa Awurade se, “Menkɔtow nhyɛ Filistifo yi so ana?” Awurade buae se, “Yiw, kɔ na kogye Keila.”
3 Kasi basoda ya Davidi bayebisaki ye: — Soki awa kati na Yuda, tozali kobanga, ekozala boni soki tokeyi na Keila kobundisa bato ya Filisitia?
Nanso Dawid mmarima no kae se, “Yuda ha mpo yesuro. Yɛmpɛ sɛ yɛbɛkɔ Keila akɔko atia Filistifo asraafo nyinaa.”
4 Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye: — Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.
Enti Dawid bisaa Awurade bio maa Awurade buaa no se, “Kɔ Keila na mɛboa wo ama woadi Filistifo no so nkonim.”
5 Boye Davidi elongo na basoda na ye bakendeki na engumba Keila mpe babundisaki bato ya Filisitia, babotolaki biloko mpe bibwele na bango. Davidi abetaki makasi bato ya Filisitia, mpe, na bongo, abikisaki bato ya Keila.
Enti Dawid ne ne mmarima kɔɔ Keila. Wokunkum Filistifo no nyinaa, faa wɔn nyɛmmoa, gyee Keilafo no.
6 Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.
Ahimelek ba Ɔsɔfo Abiatar reguan akɔ Dawid nkyɛn wɔ Keila no, ɔfaa asɔfotade sɛ ɔrekogye mmuae afi Awurade nkyɛn ama Dawid.
7 Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki: « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. »
Ankyɛ, Saulo tee sɛ Dawid wɔ Keila. Ɔteɛɛ mu se, “Eye. Afei, yɛn nsa aka no. Afei, Onyankopɔn de no ama me. Ɔno ara ama kurow yi ho afasu ayi no!”
8 Saulo asangisaki mampinga na ye nyonso mpo na bitumba, mpo ete bakende na Keila kozingela Davidi elongo na bato na ye.
Enti Saulo boaboaa nʼakofo nyinaa ano sɛ ɔde wɔn rekɔ Keila akotua Dawid ne ne mmarima ano.
9 Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.
Nanso Dawid huu Saulo nhyehyɛe, na ɔka kyerɛɛ ɔsɔfo Abiatar se, ɔmfa asɔfotade no mmra, na ommisa Awurade nea ɛsɛ sɛ ɔyɛ.
10 Davidi alobaki: — Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, mosali na Yo ayoki malamu ete Saulo azali komibongisa mpo na koya na Keila, mpo na kobebisa engumba likolo na ngai.
Na Dawid bɔɔ mpae se, “Awurade, Israel Nyankopɔn, mate sɛ Saulo ayɛ nhyehyɛe sɛ ɔbɛba abɛsɛe Keila, efisɛ mewɔ ha.
11 Boni, bakambi ya Keila bakokaba ngai penza na maboko na ye? Saulo akoya solo ndenge mosali na Yo ayoki yango? Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, yebisa mosali na yo. Yawe alobaki: — Iyo, akoya penza.
Merebisa sɛ, enti Keila mmarima beyi me ama no anaa? Na Saulo bɛba ampa ara sɛnea mete no? Ao, Awurade, Israel Nyankopɔn, ka kyerɛ me.” Na Awurade buaa no se, “Ɔbɛba.”
12 Davidi atunaki lisusu: — Bakambi ya Keila bakokaba penza ngai mpe bato na ngai na maboko ya bato ya Saulo? Yawe alobaki: — Iyo, bakokaba yo.
Bio, Dawid bisaa se, “Enti, Keila mmarima beyi me ne me mmarima ama Saulo anaa?” Na Awurade buaa se, “Yiw, wobeyi mo ama.”
13 Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.
Na Dawid ne ne mmarima bɛyɛ sɛ ahansia fii Keila, na wokyinkyin baabiara a wobetumi akɔ. Na Saulo tee sɛ Dawid afi Keila no, ogyaa nʼakyi di.
14 Davidi avandaki na bisambelo ya likolo ya bangomba kati na esobe, mpe avandaki na likolo ya ngomba kati na esobe ya Zifi. Saulo alukaki ye mikolo nyonso, kasi Nzambe akabaki Davidi te na maboko na ye.
Dawid tenaa ne hintabea hɔ wɔ sare so ne Sif mmepɔw asase no so. Saulo hwehwɛɛ no adekyee ne adesae biara, nanso Awurade amfa Dawid anhyɛ ne nsa.
15 Wana Davidi azalaki na Oreshi kati na esobe ya Zifi, ayokaki ete Saulo abimaki mpo na koluka koboma ye.
Bere a Dawid wɔ Hores wɔ Sif sare so no, ɔtee sɛ Saulo nam kwan so reba hɔ abɛhwehwɛ no akum no.
16 Jonatan, mwana mobali ya Saulo, akendeki na Oreshi epai ya Davidi mpo na kolendisa ye na Kombo ya Nzambe.
Na Saulo ba Yonatan kɔɔ Dawid nkyɛn wɔ Hores kɔhyɛɛ no den wɔ Onyankopɔn ho gyidi mu.
17 Alobaki na ye: « Kobanga te! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »
Yonatan hyɛɛ no den se, “Nsuro! Mʼagya Saulo renhu wo da. Wobɛyɛ ɔhene wɔ Israel, na mayɛ wʼabediakyiri, sɛnea mʼagya Saulo nim no.”
18 Bango mibale basalaki boyokani liboso ya Yawe. Jonatan azongaki epai na ye, mpe Davidi atikalaki na Oreshi.
Wɔn baanu no hyɛɛ wɔn ayɔnkofa apam mu den wɔ Awurade anim. Afei, Yonatan kɔɔ fie na Dawid de, ɔtenaa Hores hɔ.
19 Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo mpe balobaki na ye: — Boni, Davidi abombami te kati na biso, na bisambelo ya likolo ya bangomba ya Oreshi, kati na esobe, na likolo ya ngomba moke ya Akila oyo ezali na ngambo ya sude ya Yeshimoni?
Sififo no kɔɔ Saulo nkyɛn wɔ Gibea koyii Dawid mae se, “Yenim baabi a Dawid akohintaw. Ɔwɔ abandennen mu, wɔ Hores a ɛwɔ Hakila mmepɔw mu, wɔ Yesimon anafo fam ha yi.
20 Sik’oyo, oh mokonzi, tango nyonso okosepela kokita, kita na yo; mpe biso moko tozwi mokumba ya kokaba ye na maboko ya mokonzi.
Ɔhene, bere biara a wubenya kwan no bra na yɛbɛkyere no ama wo.”
21 Saulo azongisaki: — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai!
Saulo kae se, “Awurade nhyira mo! Afei, mahu sɛ mʼasɛm fa obi ho.
22 Bokende, botala lisusu malamu, bononga mpe boluka koyeba esika nini Davidi akendaka mikolo nyonso mpe nani amonaki ye kuna; pamba te bayebisaka ngai ete azali na mayele mabe makasi.
Monkɔ mu bio, nkɔhwehwɛ, nhu faako a ɔte ne obi a wahu no wɔ hɔ. Wose ɔyɛ onifirifo.
23 Botala mpe boyeba bisika nyonso epai wapi abombamaka, mpe bozongela ngai mpo na koyebisa ngai makambo nyonso ndenge yango ezali. Bongo na sima, soki azali kati na mboka, ngai nakokende elongo na bino mpe nakolukisa ye kati na bituka nyonso ya Yuda.
Monhwehwɛ nʼahintawee, na monsan mmra mmɛka biribi pɔtee nkyerɛ me. Na me ne mo bɛkɔ. Na sɛ ɔwɔ mpɔtam hɔ nko ara de a, menya no, na mehwehwɛ no wɔ Yuda abusuafi ahorow no nyinaa mu.”
24 Boye, batelemaki mpe bakendeki na Zifi liboso na Saulo. Nzokande Davidi elongo na bato na ye bazalaki kati na esobe ya Maoni, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Yeshimoni.
Na Sif mmarima dii Saulo kan kɔɔ wɔn kurom. Saa bere no mu na Dawid ne ne mmarima kɔ Maon sare a ɛwɔ Araba bon a ɛwɔ Yesimon anafo fam no so.
25 Saulo elongo na bato na ye bakomaki koluka Davidi. Tango bayebisaki Davidi ete bazali koluka ye, akitaki kati na libanga monene mpe avandaki kati na esobe ya Maoni. Mpe tango Saulo ayokaki bongo, akotaki kati na esobe yango ya Moani mpo na kolanda Davidi.
Bere a Dawid tee sɛ Saulo ne ne mmarima rehwehwɛ no no, ɔdɔɔ mu kɔɔ sare so akyirikyiri, kosii ɔbotan kɛse no ho, tenaa Maon sare so hɔ. Nanso Saulo kɔɔ so hwehwɛɛ no.
26 Saulo azalaki kotambola na ngambo moko ya ngomba, bongo Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na ngambo mosusu mpe kokima mbangu mosika na Saulo. Lokola Saulo mpe mampinga na ye bazalaki koluka kozingela Davidi mpe bato na ye mpo na kokanga bango,
Afei na Saulo wɔ bepɔw no fa bi na Dawid ne ne dɔm nso wɔ ne fa bi, repɛ ntɛm aguan Saulo bere a na Saulo ne ne mmarima rebɛn Dawid ne ne nkurɔfo sɛ wɔbɛkyere wɔn no,
27 momemi sango moko ayaki epai ya Saulo mpe alobaki na ye: « Yaka noki! Bato ya Filisitia bakoti na mokili. »
ɔbɔfo baa Saulo nkyɛn bɛkae se, “Bra ntɛm! Filistifo abɛtow ahyɛ asase no so.”
28 Mbala moko, Saulo atikaki kolanda Davidi mpo na kokende kokutana na bato ya Filisitia. Yango wana babengaka esika yango « Sela-Amalekoti » oyo elakisi « Libanga ya bokabwani. »
Ɛno nti, Saulo gyaee Dawid akyidi, na ɔsan nʼakyi sɛ ɔne Filistifo no rekɔko. Eyi nti na wɔfrɛ saa beae yi Oguan Botan no.
29 Davidi alongwaki wana mpe akendeki kovanda na ebombamelo kati na mabanga ya Eyini-Gedi.
Enti Dawid kɔtenaa En-Gedi abandennen.