< 1 Samuele 21 >

1 Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi: — Mpo na nini ozali yo moko? Mpo na nini ezali na moto moko te elongo na yo?
Then David came to Nob to Ahimelech the priest. Ahimelech came to meet David trembling, and said to him, “Why are you alone, and no man with you?”
2 Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe Ayimeleki: — Mokonzi apesaki ngai mosala moko boye mpe alobaki na ngai: « Tika ete moto moko te ayeba ata likambo moko na mosala oyo natindi yo. » Na tina na yango nde nasengaki na bato na ngai ete tokutana na esika moko.
David said to Ahimelech the priest, “The king has commanded me to do something, and has said to me, ‘Let no one know anything about the business about which I send you, and what I have commanded you. I have sent the young men to a certain place.’
3 Bongo sik’oyo, osimbi eloko nini na loboko na yo? Pesa ngai mapa mitano to eloko nyonso oyo okoki kozala na yango.
Now therefore what is under your hand? Please give me five loaves of bread in my hand, or whatever is available.”
4 Kasi Nganga-Nzambe azongiselaki Davidi: — Na loboko na ngai, nazali na mapa te oyo toliaka mikolo nyonso, kasi ezali kaka na mapa oyo ebulisama. Bato na yo bakoki kolia yango soki kaka basangisaki banzoto te na basi.
The priest answered David, and said, “I have no common bread, but there is holy bread; if only the young men have kept themselves from women.”
5 Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe: — Solo, bapekisa biso basi ndenge kaka ezalaka tango nyonso na makambo ya boye. Kutu tango nakendaka bitumba, biloko ya bato na ngai ebulisamaka. Atako mosala ya mokolo ya lelo ezalaki bule te, kasi ekomi bule mpo ete bibundeli ebulisami.
David answered the priest, and said to him, “Truly, women have been kept from us as usual these three days. When I came out, the vessels of the young men were holy, though it was only a common journey. How much more then today shall their vessels be holy?”
6 Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.
So the priest gave him holy bread; for there was no bread there but the show bread that was taken from before the LORD, to be replaced with hot bread in the day when it was taken away.
7 Nzokande na mokolo yango wana, ezalaki na mosali moko, kati na basali ya Saulo, oyo atikalaki kuna liboso ya Yawe. Kombo na ye ezalaki « Doegi. » Azalaki moto ya Edomi, mpe mokonzi ya babateli bibwele ya Saulo.
Now a certain man of the servants of Saul was there that day, detained before the LORD; and his name was Doeg the Edomite, the best of the herdsmen who belonged to Saul.
8 Davidi atunaki Ayimeleki: — Boni awa, ozali te ata na likonga moko to na mopanga na se na loboko na yo? Ngai namemaki te ezala mopanga na ngai to ebundeli na ngai mosusu, pamba te mosala ya mokonzi esengelaki kosalema na lombangu.
David said to Ahimelech, “Isn’t there here under your hand spear or sword? For I haven’t brought my sword or my weapons with me, because the king’s business required haste.”
9 Nganga-Nzambe azongisaki: — Ezali awa na mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia, oyo obomaki na lubwaku ya Terebente; balinga yango na elamba sima na efode. Soki olingi kozwa yango, zwa na yo; pamba te ezali awa na mopanga mosusu te, bobele oyo wana. Davidi alobaki: — Mopanga moko te ekokani na yango; pesa ngai yango.
The priest said, “Behold, the sword of Goliath the Philistine, whom you killed in the valley of Elah, is here wrapped in a cloth behind the ephod. If you would like to take that, take it, for there is no other except that here.” David said, “There is none like that. Give it to me.”
10 Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati.
David arose and fled that day for fear of Saul, and went to Achish the king of Gath.
11 Kasi basali ya Akishi balobaki na ye: « Moto oyo azali Davidi te, mokonzi ya mboka? Ezali ye te oyo bazali koyemba boye na kobina na tina na ye: ‹ Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi? › »
The servants of Achish said to him, “Isn’t this David the king of the land? Didn’t they sing to one another about him in dances, saying, ‘Saul has slain his thousands, and David his ten thousands’?”
12 Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati.
David laid up these words in his heart, and was very afraid of Achish the king of Gath.
13 Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma: kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu.
He changed his behavior before them and pretended to be insane in their hands, and scribbled on the doors of the gate, and let his spittle fall down on his beard.
14 Akishi alobaki na basali na ye: « Botala tata oyo, azali moto ya liboma! Mpo na nini boyei na ye epai na ngai?
Then Achish said to his servants, “Look, you see the man is insane. Why then have you brought him to me?
15 Boni, nazangi penza bato ya maboma mpo ete bomema mobali oyo awa, na tina ete aya kosala makambo na ye ya liboma? Boni, moto ya boye asengeli penza kokota na ndako na ngai? »
Do I lack madmen, that you have brought this fellow to play the madman in my presence? Should this fellow come into my house?”

< 1 Samuele 21 >