< 1 Samuele 19 >

1 Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi.
Saül parla à Jonathan, son fils, et à tous ses serviteurs, pour qu'ils fassent mourir David. Mais Jonathan, fils de Saül, se réjouissait beaucoup de David.
2 Jonatan ayebisaki Davidi: « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.
Jonathan dit à David: « Saül, mon père, cherche à te tuer. Prends donc soin de toi dès le matin, vis dans un lieu secret et cache-toi.
3 Ngai nakobima mpe nakozala elongo na tata na ngai kati na zamba epai wapi yo okozala. Nakoloba na tina na yo epai ya tata na ngai, nakoluka koyeba makambo ndenge ezali mpe nakoyebisa yo. »
Je sortirai et je me tiendrai près de mon père dans le champ où tu es, et je parlerai de toi à mon père; et si je vois quelque chose, je te le dirai. »
4 Jonatan alobaki malamu na tina na Davidi epai ya tata na ye, Saulo: « Tika ete mokonzi asala mabe te na mosali na ye, Davidi, pamba te asali yo mabe te. Yo nde kutu moto ozwi lisungi monene na makambo oyo ye asali.
Jonathan parla en bien de David à Saül, son père, et lui dit: « Que le roi ne pèche pas contre son serviteur, contre David, car il n'a pas péché contre toi, et parce que ses œuvres ont été très bonnes à ton égard;
5 Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te? »
car il a mis sa vie en main et a frappé le Philistin, et Yahvé a remporté une grande victoire pour tout Israël. Vous l'avez vu et vous vous êtes réjouis. Pourquoi donc voulez-vous pécher contre le sang innocent, pour tuer David sans cause? »
6 Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye: « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. »
Saül écouta la voix de Jonathan, et Saül jura: « L'Éternel est vivant, il ne sera pas mis à mort. »
7 Bongo Jonatan abengaki Davidi mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo basololaki na tata na ye. Jonatan amemaki Davidi epai ya Saulo, mpe Davidi asalelaki Saulo lokola na ebandeli.
Jonathan appela David, et il lui fit voir toutes ces choses. Puis Jonathan amena David à Saül, et il fut en sa présence comme auparavant.
8 Lokola bitumba ezongelaki, Davidi abimaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia mpe alongaki bango na elonga monene, mpe bato ya Filisitia bakimaki liboso na ye.
Il y eut de nouveau une guerre. David sortit, combattit les Philistins, et les tua par une grande défaite; ils s'enfuirent devant lui.
9 Kasi molimo moko ya mabe kowuta na Yawe ekitelaki Saulo, wana avandaki kati na ndako na ye mpe asimbaki likonga na loboko na ye. Lokola Davidi azalaki kobeta lindanda,
Un mauvais esprit de Yahvé était sur Saül, qui était assis dans sa maison, sa lance à la main, et David jouait de la musique avec sa main.
10 Saulo alukaki koboma ye na nzela ya likonga na ye. Kasi Davidi akimaki ye, mpe likonga ekotaki na mir. Na butu wana, Davidi alongaki kokima mpe abikaki.
Saül chercha à clouer David au mur avec la lance, mais celui-ci se déroba à la présence de Saül, et il planta la lance dans le mur. David prit la fuite et s'échappa cette nuit-là.
11 Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye: « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi! »
Saül envoya des messagers à la maison de David pour le surveiller et le tuer au matin. Mical, la femme de David, lui dit: « Si tu ne sauves pas ta vie cette nuit, demain tu seras tué. »
12 Boye Mikali akitisaki Davidi na nzela ya lininisa, mpe Davidi akimaki mpe abikaki.
Alors Mical fit descendre David par la fenêtre. Il s'en alla, prit la fuite et s'échappa.
13 Bongo Mikali azwaki nzambe ya ekeko oyo ezalaki na lolenge ya moto; alalisaki yango na mbeto, afinikaki yango elamba mpe atiaki yango bapwale ya bantaba na moto.
Michal prit le théraphim et le coucha dans le lit; elle mit à sa tête un coussin de poils de chèvre et le couvrit de vêtements.
14 Tango Saulo atindaki bato kokanga Davidi, Mikali alobaki: « Azali kobela. »
Lorsque Saül envoya des messagers pour prendre David, elle dit: « Il est malade. »
15 Saulo azongisaki bato mpo ete batala Davidi mpe alobaki na bango: « Bomemela ngai ye na mbeto na ye mpo ete naboma ye. »
Saül envoya les messagers voir David, en disant: « Amenez-le-moi sur le lit, afin que je le tue. »
16 Kasi tango mibali bakotaki, bamonaki, na likolo ya mbeto, nzambe ya ekeko oyo ezalaki lokola moto mpe ezalaki na bapwale ya bantaba na moto na yango.
Lorsque les messagers entrèrent, voici, le théraphim était dans le lit, avec le coussin de poils de chèvre à sa tête.
17 Saulo alobaki na Mikali: — Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki? Mikali alobaki na Saulo: — Davidi alobaki na ngai: « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo. »
Saül dit à Mical: « Pourquoi m'as-tu trompé de la sorte et as-tu laissé partir mon ennemi, qui s'est échappé? » Michal répondit à Saül: « Il m'a dit: « Laisse-moi partir! Pourquoi devrais-je te tuer? »
18 Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama.
David s'enfuit et s'échappa; il alla trouver Samuel à Rama, et lui raconta tout ce que Saül lui avait fait. Il partit avec Samuel et s'installa à Naïoth.
19 Sango ekomaki epai ya Saulo: « Davidi azali na Nayoti ya Rama. »
On fit dire à Saül: « Voici, David est à Naïoth, à Rama. »
20 Saulo atindaki bato kokende kokanga Davidi. Kasi tango bamonaki lisanga ya basakoli kosakola mpe Samuele atelemi wana lokola mokambi na bango, Molimo na Nzambe akitelaki bato oyo Saulo atindaki, mpe bakomaki bango mpe kosakola.
Saül envoya des messagers pour s'emparer de David; et lorsqu'ils virent la troupe des prophètes en train de prophétiser, et Samuel debout à leur tête, l'Esprit de Dieu vint sur les messagers de Saül, et ils prophétisèrent aussi.
21 Sango ekomaki epai ya Saulo, mpe ye atindaki bato mosusu; kasi bango mpe basakolaki. Saulo atindaki bato mosusu na mbala ya misato, kasi bango mpe basakolaki.
Lorsque Saül en fut informé, il envoya d'autres messagers, qui prophétisèrent eux aussi. Saül envoya de nouveau des messagers la troisième fois, et ils prophétisèrent aussi.
22 Sima, ye moko Saulo akendeki na Rama mpe akomaki na libulu monene ya mayi, na Seku. Atunaki: — Samuele mpe Davidi bazali wapi? Bazongiselaki ye: — Bazali na Nayoti ya Rama.
Il alla aussi à Rama, et arriva au grand puits qui est à Secu; il demanda: « Où sont Samuel et David? » L'un d'eux a dit: « Voici, ils sont à Naioth, à Rama. »
23 Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama.
Il alla ensuite à Naïoth, à Rama. L'Esprit de Dieu vint aussi sur lui, et il continua à prophétiser, jusqu'à ce qu'il arrivât à Naïoth, à Rama.
24 Ye mpe alongolaki bilamba na ye mpe asakolaki liboso ya Samuele; akweyaki mpe atikalaki bolumbu mokolo yango mobimba mpe butu mobimba. Yango wana bato batunaka: « Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli? »
Il se dépouilla aussi de ses vêtements. Il prophétisa aussi devant Samuel et se coucha nu tout ce jour-là et toute cette nuit-là. C'est pourquoi on dit: « Saul est-il aussi au nombre des prophètes? »

< 1 Samuele 19 >