< 1 Samuele 18 >

1 Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko.
Bere a Dawid ne Saulo kasa wiei no, ohyiaa ɔhenebabarima Yonatan. Wɔn baanu no dɔɔ wɔn ho wɔn ho prɛko pɛ na wɔbɛyɛɛ nnamfo pa ara.
2 Kobanda mokolo wana, Saulo avandisaki Davidi kati na ndako na ye mpe atikaki ye te kozonga na ndako ya tata na ye.
Efi saa da no, Saulo gyee Dawid tenaa ahemfi hɔ a wampɛ sɛ ɔbɛsan akɔ ne fi.
3 Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.
Na Yonatan ne Dawid yɛɛ apam sɛ, wɔbɛyɛ nnamfo.
4 Jonatan alongolaki kazaka oyo azalaki kolata mpe apesaki yango na Davidi. Apesaki ye mpe bilamba na ye, mopanga na ye, mokaba na ye mpe eloko na ye oyo abetelaka tolotolo.
Na Yonatan de ne batakari, nhyɛase, afoa, agyan ne nkyekyeremu maa Dawid de sɔw apam no ano.
5 Lokola Davidi azalaki penza kosala malamu mosala nyonso oyo Saulo azalaki kotinda ye na bisika nyonso, Saulo akomisaki ye mokonzi monene ya basoda. Bato nyonso elongo na basali ya Saulo bazalaki kosepela na ye.
Biribiara a Saulo ka kyerɛɛ Dawid sɛ ɔnyɛ no, Dawid yɛɛ no pɛpɛɛpɛ. Enti Saulo yɛɛ no nʼasraafo so ɔsahene, maa nʼakofo ne wɔn mpanyimfo nyinaa de anigye penee so.
6 Sima na Davidi koboma moto ya Filisitia, tango basoda bazalaki kozonga wuta na bitumba, basi babimaki wuta na bingumba nyonso ya Isalaele mpo na kokende koyamba mokonzi Saulo, na banzembo ya esengo mpe na mabina, na milolo ya esengo, na bambunda mike mpe na bangonga.
Nanso bere a Israelfo nkonimdifo rekɔ fie, na Dawid akum Filistini no, mmea fifi nkurow a ɛbɛn ɔkwan no ho no bɛtwee mmommomme hyiaa Ɔhene Saulo a na wɔde anigye reto nnwom, bɔ akasae ne kyɛnkyɛn.
7 Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye: « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »
Wɔresaw no, wɔtoo dwom se: Saulo akum ne apem apem, na Dawid de ne mpem du du!
8 Maloba ya banzembo yango epesaki Saulo kanda makasi. Amilobelaki: « Soki batangi motango ya nkoto zomi mpo na Davidi, mpe motango ya nkoto moko mpo na ngai, elingi koloba ete etikali na ye kaka kozwa bokonzi! »
Eyi maa Saulo bo fuw yiye. Ɔkae se, “Eyi ase ne dɛn? Wɔde mpem du mpem du abata Dawid din ho, na me de, wɔde apem apem pɛ. Dɛn na aka sen sɛ wobesi no hene?”
9 Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe.
Efi saa bere no, Saulo tuu nʼani sii Dawid so.
10 Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko.
Ade kyee no, Onyankopɔn honhom bɛhyɛɛ Saulo so. Na ɔrehyɛ nkɔm wɔ ne fi, bere a na Dawid rebɔ ne sanku sɛnea na ɔtaa yɛ no. Na Saulo kura peaw
11 Mbala moko, Saulo abwakaki likonga na ye na koloba: « Nakobamba Davidi na mir. » Kasi Davidi akimaki ye mbala mibale.
na ɔkaa wɔ ne tirim se, “Mesina Dawid atare ɔfasu no.” Nanso Dawid huruw sii nkyɛn na oguanee mpɛn abien.
12 Saulo abangaki Davidi, pamba te Yawe azalaki elongo na Davidi kasi atikaki Saulo.
Na Saulo suro Dawid, efisɛ na Awurade agyaw no akɔ Dawid afa.
13 Mpo na yango, Saulo alongolaki Davidi pembeni na ye mpe akomisaki ye mokonzi ya basoda nkoto moko. Boye Davidi akomaki kotambolisa basoda na bitumba na bango.
Enti Saulo yii Dawid fii ne ho na ɔma ɔkɔyɛɛ ɔsafohene wɔ asraafo apem so, na, Dawid dii saa nsraadɔm no anim de wɔn kɔɔ ɔsa.
14 Na nyonso oyo azalaki kosala, Davidi azalaki kolonga, pamba te Yawe azalaki elongo na ye.
Biribiara a Dawid yɛe no, odii nkonim wɔ mu, efisɛ na Awurade ka ne ho.
15 Tango Saulo amonaki ete Davidi azali kolonga mingi, abangaki ye.
Saulo huu eyi no, osuroo no.
16 Kasi Isalaele mobimba mpe Yuda mobimba bazalaki kolinga Davidi mpo ete azalaki kotambolisa bango na bitumba na bango.
Nanso Israel ne Yuda nyinaa dɔɔ Dawid, efisɛ na odi nʼakofo anim kɔ ɔsa a, odi nkonim.
17 Saulo alobaki na Davidi: — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela: « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »
Da bi, Saulo ka kyerɛɛ Dawid se, “Mepɛ sɛ mede me babea panyin Merab ma wo aware. Nea edi kan ne sɛ wobɛkyerɛ sɛ woyɛ ɔkofo kɛse a wobɛko Awurade ko no.” Na Saulo kaa wɔ ne tirim se, “Merenteɛ me nsa wɔ ne so. Mɛma wakɔko atia Filistifo no na wɔakum no.”
18 Davidi azongiselaki Saulo: — Ngai nazali nani, libota na ngai nde nini, etuka ya tata na ngai nde nini kati na Isalaele mpo ete nakoma bokilo ya mokonzi?
Na Dawid ka kyerɛɛ Saulo se, “Me sɛɛ ne hena a mɛyɛ ɔhene ase? Me fi ne mʼagya abusua a ɛwɔ Israel nka hwee?”
19 Boye, tango ngonga ya kobalisa Merabi, mwana mwasi ya Saulo, epai ya Davidi ekokaki, Saulo abalisaki ye epai ya Adriyeli, moto ya Meola.
Enti bere no duu sɛ wɔde Saulo babea Merab ma Dawid aware no, wɔde no maa Adriel a ofi Meholat aware.
20 Nzokande Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi. Mpe tango bayebisaki Saulo likambo yango, asepelaki makasi.
Na Saulo babea Mikal dɔ Dawid, enti bere a Saulo tee no, ɛyɛɛ no anigye.
21 Boye Saulo amilobelaki: « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. » Boye Saulo alobaki na Davidi: « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. »
Saulo kaa wɔ ne tirim se, “Mede no bɛma no na wafa so ayɛ afiri a ɛbɛma Filistifo nsa aka no akum no.” Na ɔka kyerɛɛ Dawid se, “Afei, ɔkwan a ɛto so abien a wobɛfa so ayɛ mʼase no abue ama wo.”
22 Bongo Saulo apesaki mitindo epai ya basali na ye: « Bosolola na Davidi na nkuku mpe boyebisa ye: ‹ Tala ndenge nini mokonzi azali kosepela na yo, mpe basali na ye nyonso balingi yo! Koma na yo sik’oyo bokilo na ye! › »
Na Saulo hyɛɛ ne nkoa se, “Monka no kokoa mu nkyerɛ Dawid se, ‘Hwɛ, ɔhene ani sɔ wo, na yɛn nyinaa pɛ wʼasɛm. Adɛn nti na wompɛ sɛ woyɛ ɔhene ase barima?’”
23 Basali ya Saulo bazongelaki maloba oyo epai ya Davidi, kasi Davidi alobaki: « Bokanisi ete kokoma bokilo ya mokonzi ezali likambo ya pete? Kaka ngai oyo nazali mobola mpe moto pamba! »
Wotii saa nsɛm yi mu kyerɛɛ Dawid. Nanso Dawid kae se, “Ohiani ba a me fi nni bi, mususuw sɛ ɛyɛ ade a ɛda fam sɛ obi bɛyɛ ɔhene nʼase ana?”
24 Basali ya Saulo bayebisaki ye maloba ya Davidi.
Nkoa no kɔkaa asɛm a Dawid ka kyerɛɛ wɔn no kyerɛɛ Saulo no,
25 Saulo alobaki: « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.
Saulo kae se, “Monkɔka nkyerɛ Dawid se, ‘Ɔhene nhwehwɛ ti nsa biara sɛ Filistifo ɔha mmarima ano were. Mʼatamfo so aweretɔ nko ara ne ade a mepɛ.’” Na Saulo adwene ara ne sɛ wobekum Dawid wɔ akono.
26 Tango basali bayebisaki Davidi makambo yango, Davidi asepelaki kokoma bokilo ya mokonzi. Boye liboso ete tango oyo bakataki ekoka,
Dawid de anigye penee adebisa no so. Enti ansa na bere no duu no,
27 Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi.
Dawid ne ne mmarima kɔ kokum Filistifo no ahannu. Ɔde wɔn mmarima ano were brɛɛ ɔhene. Enti Saulo de ne babea Mikal maa Dawid aware.
28 Tango Saulo amonaki mpe asosolaki ete Yawe azali elongo na Davidi, mpe ete mwana na ye ya mwasi, Mikali, alingaka Davidi,
Saulo huu sɛ Awurade ka Dawid ho, na ne babea Mikal nso dɔ Dawid no,
29 Saulo akomaki lisusu kobanga Davidi makasi, mpe akomaki monguna na ye na mikolo ya bomoi na ye, oyo etikalaki.
Saulo kɔɔ so suroo no, na ne nna a aka no mu no, Dawid kɔɔ so yɛɛ Saulo tamfo.
30 Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango.
Bere biara a Filistifo asraafo tow hyɛɛ Israel so no, Dawid dii nkonim sen Saulo asahene a wɔaka no. Eyi maa Dawid gyee din wɔ asase no so nyinaa.

< 1 Samuele 18 >