< 1 Samuele 17 >

1 Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango mpo na bitumba, basanganaki na Soko ya Yuda mpe batongaki molako na bango na Efeze-Damimi, kati na Soko mpe Azeka.
非利士人招聚他们的军旅,要来争战;聚集在属犹大的梭哥,安营在梭哥和亚西加中间的以弗·大悯。
2 Na ngambo mosusu, Saulo mpe bato ya Isalaele basanganaki mpe batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Terebente; batandamaki na milongo mpe babongamaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia.
扫罗和以色列人也聚集,在以拉谷安营,摆列队伍,要与非利士人打仗。
3 Bato ya Filisitia bazalaki na likolo ya ngomba na ngambo moko, mpe bato ya Isalaele, na likolo ya ngomba na ngambo mosusu; kaka lubwaku nde ekabolaki bango.
非利士人站在这边山上,以色列人站在那边山上,当中有谷。
4 Elombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi.
从非利士营中出来一个讨战的人,名叫歌利亚,是迦特人,身高六肘零一虎口;
5 Alataki ekoti ya bronze na moto na ye mpe ebombelo ya tolo, oyo basala na bakilo pene tuku motoba ya bronze.
头戴铜盔,身穿铠甲,甲重五千舍客勒;
6 Na makolo na ye, alataki bitando ya bronze, mpe akangisaki likonga ya bronze na sima ya mokongo na ye.
腿上有铜护膝,两肩之中背负铜戟;
7 Monene ya nzete ya likonga na ye ezalaki lokola libaya oyo basali bilamba basalelaka; songe ya likonga yango ezalaki ya bakilo pene sambo. Moto oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki kotambola liboso na ye.
枪杆粗如织布的机轴,铁枪头重六百舍客勒。有一个拿盾牌的人在他前面走。
8 Goliati atelemaki mpe agangelaki mampinga ya Isalaele, alobaki: « Mpo na nini bobimi mpe bosali milongo mpo na bitumba? Ngai nazali moto ya Filisitia te? Mpe bino bozali basali ya Saulo te? Bopona moto moko mpe botika ye koya kobundisa ngai.
歌利亚对着以色列的军队站立,呼叫说:“你们出来摆列队伍做什么呢?我不是非利士人吗?你们不是扫罗的仆人吗?可以从你们中间拣选一人,使他下到我这里来。
9 Soki akokoka kolonga mpe koboma ngai, wana biso tokokoma bawumbu na bino. Nzokande soki ngai nalongi mpe nabomi ye, wana bino nde bokokoma bawumbu na biso mpe bokosalela biso. »
他若能与我战斗,将我杀死,我们就作你们的仆人;我若胜了他,将他杀死,你们就作我们的仆人,服事我们。”
10 Moto ya Filisitia alobaki lisusu: « Na mokolo ya lelo, nazali kotiola mampinga ya Isalaele. Bopesa ngai moto moko mpo ete nabunda na ye. »
那非利士人又说:“我今日向以色列人的军队骂阵。你们叫一个人出来,与我战斗。”
11 Tango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki.
扫罗和以色列众人听见非利士人的这些话,就惊惶,极其害怕。
12 Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.
大卫是犹大伯利恒的以法他人耶西的儿子。耶西有八个儿子。当扫罗的时候,耶西已经老迈。
13 Bana mibali misato ya liboso ya Izayi balandaki Saulo na bitumba. Tala bakombo ya bana mibali yango misato oyo balandaki Saulo na bitumba: Eliabi, mwana mobali ya liboso; Abinadabi, mwana mobali ya mibale; mpe Shama, mwana mobali ya misato.
耶西的三个大儿子跟随扫罗出征。这出征的三个儿子:长子名叫以利押,次子名叫亚比拿达,三子名叫沙玛。
14 Lokola Davidi azalaki leki, mpe wana bana mibali misato ya liboso balandaki Saulo,
大卫是最小的;那三个大儿子跟随扫罗。
15 Davidi azalaki kokende mpe kozonga wuta na ndako ya Saulo mpo na koleisa bameme ya tata na ye na Beteleemi.
大卫有时离开扫罗,回伯利恒放他父亲的羊。
16 Mikolo tuku minei, moto ya Filisitia azalaki komilakisa, tongo mpe pokwa, liboso ya mampinga ya Isalaele.
那非利士人早晚都出来站着,如此四十日。
17 Izayi alobaki na Davidi, mwana na ye ya mobali: « Zwela bandeko na yo ya mibali bambuma oyo ya ble bakalinga mpe mapa oyo zomi, mpe kende kotikela bango yango na lombangu na molako na bango.
一日,耶西对他儿子大卫说:“你拿一伊法烘了的穗子和十个饼,速速地送到营里去,交给你哥哥们;
18 Mema lisusu ba-fromaje zomi oyo epai ya mokonzi ya limpinga ya basoda nkoto moko, limpinga oyo bango bazali. Tala soki bandeko na yo ya mibali bazali ndenge nini mpe zwa na maboko na bango elembo oyo ekolakisa ngai ete bazali malamu.
再拿这十块奶饼,送给他们的千夫长,且问你哥哥们好,向他们要一封信来。”
19 Bazali na lubwaku ya Terebente elongo na Saulo mpe mibali nyonso ya Isalaele mpo na kobundisa bato ya Filisitia. »
扫罗与大卫的三个哥哥和以色列众人,在以拉谷与非利士人打仗。
20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba.
大卫早晨起来,将羊交托一个看守的人,照着他父亲所吩咐的话,带着食物去了。到了辎重营,军兵刚出到战场,呐喊要战。
21 Bato ya Isalaele mpe bato ya Filisitia batandamaki mpe batalanaki ngambo na ngambo mpo na kobunda.
以色列人和非利士人都摆列队伍,彼此相对。
22 Davidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote.
大卫把他带来的食物留在看守物件人的手下,跑到战场,问他哥哥们安。
23 Wana Davidi azali kosolola na bango, elombe mobali Goliati, moto ya Filisitia ya Gati, alongwaki na molongo ya mampinga na ye mpe azongelaki koloba ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Davidi azalaki koyoka ye.
与他们说话的时候,那讨战的,就是属迦特的非利士人歌利亚,从非利士队中出来,说从前所说的话;大卫都听见了。
24 Kasi tango bato nyonso ya Isalaele bamonaki mobali yango, bakimaki liboso na ye na kobanga makasi.
以色列众人看见那人,就逃跑,极其害怕。
25 Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba: « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso? Azali nde koya kotiola Isalaele! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. »
以色列人彼此说:“这上来的人你看见了吗?他上来是要向以色列人骂阵。若有能杀他的,王必赏赐他大财,将自己的女儿给他为妻,并在以色列人中免他父家纳粮当差。”
26 Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye: — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi?
大卫问站在旁边的人说:“有人杀这非利士人,除掉以色列人的耻辱,怎样待他呢?这未受割礼的非利士人是谁呢?竟敢向永生 神的军队骂阵吗?”
27 Lokola bato bazalaki kozongela kaka maloba moko, balobaki na ye: — Tala makambo oyo ekosalemela moto oyo akoboma ye.
百姓照先前的话回答他说:“有人能杀这非利士人,必如此如此待他。”
28 Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki: — Oyaki awa mpo na nini? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.
大卫的长兄以利押听见大卫与他们所说的话,就向他发怒,说:“你下来做什么呢?在旷野的那几只羊,你交托了谁呢?我知道你的骄傲和你心里的恶意,你下来特为要看争战!”
29 Davidi azongiselaki ye: — Nasali nini? Nakoki kosolola lisusu te?
大卫说:“我做了什么呢?我来岂没有缘故吗?”
30 Bongo Davidi abalukaki mpo na kosolola na moto mosusu mpe atunaki kaka likambo moko wana. Mpe bazongiselaki ye ndenge kaka moto ya liboso alobaki na ye.
大卫就离开他转向别人,照先前的话而问;百姓仍照先前的话回答他。
31 Maloba ya Davidi epanzanaki na lombangu, mpe bayebisaki yango Saulo. Mpe sima na Saulo koyoka yango, abengisaki ye.
有人听见大卫所说的话,就告诉了扫罗;扫罗便打发人叫他来。
32 Davidi alobaki na Saulo: — Tika ete moto moko te amilembisa nzoto likolo na moto oyo ya Filisitia. Mosali na yo akokende kobundisa ye.
大卫对扫罗说:“人都不必因那非利士人胆怯。你的仆人要去与那非利士人战斗。”
33 Kasi Saulo alobaki na Davidi: — Okoki te kokende kobundisa moto wana ya Filisitia! Ozali mwana moke, nzokande ye azali mobundi ya bitumba wuta bolenge na ye.
扫罗对大卫说:“你不能去与那非利士人战斗;因为你年纪太轻,他自幼就作战士。”
34 Davidi azongiselaki Saulo: — Mosali na yo azalaki kobatela bameme ya tata na ye. Tango ngombolo to nkosi ezalaki koya kokamata meme moko kati na etonga,
大卫对扫罗说:“你仆人为父亲放羊,有时来了狮子,有时来了熊,从群中衔一只羊羔去。
35 nazalaki kolanda mpe kobeta yango, nazalaki kokangola mpe kobotola meme na monoko ya tambwe to ya nkosi yango. Tango ezalaki kobalukela ngai, nazalaki kokanga yango, kobeta mpe koboma yango.
我就追赶它,击打它,将羊羔从它口中救出来。它起来要害我,我就揪着它的胡子,将它打死。
36 Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.
你仆人曾打死狮子和熊,这未受割礼的非利士人向永生 神的军队骂阵,也必像狮子和熊一般。”
37 Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. Saulo alobaki na Davidi: — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.
大卫又说:“耶和华救我脱离狮子和熊的爪,也必救我脱离这非利士人的手。”扫罗对大卫说:“你可以去吧!耶和华必与你同在。”
38 Bongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko: atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo.
扫罗就把自己的战衣给大卫穿上,将铜盔给他戴上,又给他穿上铠甲。
39 Na likolo ya elamba ya ebende, Davidi atiaki lisusu, na mokaba na ye, mopanga ya Saulo; mpe amekaki kotambola na yango, pamba te atikalaki nanu komesana na yango te. Davidi alobaki na Saulo: — Nakokoka te kotambola na biloko oyo nyonso, pamba te namesana na yango te! Bongo Davidi alongolaki yango na nzoto na ye.
大卫把刀跨在战衣外,试试能走不能走;因为素来没有穿惯,就对扫罗说:“我穿戴这些不能走,因为素来没有穿惯。”于是摘脱了。
40 Asimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia.
他手中拿杖,又在溪中挑选了五块光滑石子,放在袋里,就是牧人带的囊里;手中拿着甩石的机弦,就去迎那非利士人。
41 Kaka na tango yango, moto ya Filisitia elongo na moto oyo amemelaki ye nguba bapusanaki pene ya Davidi; moto oyo amemaki nguba nde azalaki liboso.
非利士人也渐渐地迎着大卫来,拿盾牌的走在前头。
42 Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko.
非利士人观看,见了大卫,就藐视他;因为他年轻,面色光红,容貌俊美。
43 Moto ya Filisitia alobaki na Davidi: — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda? Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye.
非利士人对大卫说:“你拿杖到我这里来,我岂是狗呢?”非利士人就指着自己的神咒诅大卫。
44 Moto ya Filisitia alobaki lisusu na Davidi: — Pusana awa, nakopesa mosuni na yo epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya zamba.
非利士人又对大卫说:“来吧!我将你的肉给空中的飞鸟、田野的走兽吃。”
45 Davidi alobaki na moto ya Filisitia: — Ozali koya kobundisa ngai na mopanga, na likonga ya monene mpe na likonga ya moke. Kasi ngai nayei kobundisa yo na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya mampinga ya Isalaele, oyo yo ozali kotiola.
大卫对非利士人说:“你来攻击我,是靠着刀枪和铜戟;我来攻击你,是靠着万军之耶和华的名,就是你所怒骂带领以色列军队的 神。
46 Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.
今日耶和华必将你交在我手里。我必杀你,斩你的头,又将非利士军兵的尸首给空中的飞鸟、地上的野兽吃,使普天下的人都知道以色列中有 神;
47 Bato nyonso oyo basangani awa bakoyeba ete ezali na mopanga te to na likonga ya monene te nde Yawe abikisaka. Pamba te bitumba ezali ya Yawe, mpe Ye akokaba bino na maboko na biso.
又使这众人知道耶和华使人得胜,不是用刀用枪,因为争战的胜败全在乎耶和华。他必将你们交在我们手里。”
48 Wana moto ya Filisitia amibongisaki mpo na kokende kobundisa Davidi, Davidi akimaki mbangu na molongo ya liboso ya bitumba mpo na kokutana na moto ya Filisitia.
非利士人起身,迎着大卫前来。大卫急忙迎着非利士人,往战场跑去。
49 Davidi akotisaki loboko na ye kati na libenga na ye, azwaki libanga moko mpe abambaki yango na nzela ya ebambelo na ye ya mabanga; abetaki moto ya Filisitia na elongi. Libanga ekotaki kati na elongi ya moto ya Filisitia, mpe akweyaki elongi kino na mabele.
大卫用手从囊中掏出一块石子来,用机弦甩去,打中非利士人的额,石子进入额内,他就仆倒,面伏于地。
50 Boye, Davidi alongaki moto ya Filisitia na nzela ya ebambelo mabanga na ye mpe na nzela ya libanga moko. Davidi abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye, azalaki ata na mopanga te na loboko na ye.
这样,大卫用机弦甩石,胜了那非利士人,打死他;大卫手中却没有刀。
51 Davidi akimaki mbangu mpe atelemaki na likolo ya moto ya Filisitia, asimbaki mopanga ya moto ya Filisitia, abimisaki yango na ebombelo na yango, abomaki ye, mpe akataki moto na ye na nzela ya mopanga yango. Tango mampinga ya Filisitia bamonaki ete elombe na bango akufi, bakimaki.
大卫跑去,站在非利士人身旁,将他的刀从鞘中拔出来,杀死他,割了他的头。非利士众人看见他们讨战的勇士死了,就都逃跑。
52 Bato ya Isalaele mpe bato ya Yuda babimaki na mbala moko, bagangaki mpe balandaki bato ya Filisitia kino na ebandeli ya lubwaku mpe kino na bikuke ya Ekroni. Bibembe ya bato ya Filisitia etandamaki na nzela oyo ekenda na Shaarayimi kino na Gati mpe kino na Ekroni.
以色列人和犹大人便起身呐喊,追赶非利士人,直到迦特和以革伦的城门。被杀的非利士人倒在沙拉音的路上,直到迦特和以革伦。
53 Tango bato ya Isalaele batikaki kolanda bato ya Filisitia, bazongaki mpo na kozwa na makasi biloko oyo ezalaki kati na molako ya bato ya Filisitia.
以色列人追赶非利士人回来,就夺了他们的营盘。
54 Davidi azwaki moto ya moto ya Filisitia mpe amemaki yango na Yelusalemi; bongo azwaki bibundeli ya moto ya Filisitia mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya kapo.
大卫将那非利士人的头拿到耶路撒冷,却将他军装放在自己的帐棚里。
55 Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga: — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani? Abineri azongisaki: — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te.
扫罗看见大卫去攻击非利士人,就问元帅押尼珥说:“押尼珥啊,那少年人是谁的儿子?”押尼珥说:“我敢在王面前起誓,我不知道。”
56 Mokonzi alobaki: — Tuna mpo na koyeba soki elenge mobali oyo azali mwana ya nani?
王说:“你可以问问那幼年人是谁的儿子。”
57 Tango kaka Davidi azongaki sima na ye koboma moto ya Filisitia, Abineri azwaki ye mpe amemaki ye na liboso ya Saulo. Davidi asimbaki na loboko na ye moto ya moto ya Filisitia.
大卫打死非利士人回来,押尼珥领他到扫罗面前,他手中拿着非利士人的头。
58 Saulo atunaki Davidi: — Ozali mwana ya nani? Elenge mobali Davidi azongisaki: — Nazali mwana ya mosali na yo, Izayi, moto ya Beteleemi.
扫罗问他说:“少年人哪,你是谁的儿子?”大卫说:“我是你仆人伯利恒人耶西的儿子。”

< 1 Samuele 17 >