< 1 Samuele 14 >

1 Mokolo moko, Jonatan, mwana mobali ya Saulo, alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: « Yaka! Tokatisa na ngambo mosusu epai wapi bato ya Filisitia bazali. » Kasi alobaki ata likambo moko te epai ya tata na ye.
ויהי היום ויאמר יונתן בן שאול אל הנער נשא כליו לכה ונעברה אל מצב פלשתים אשר מעבר הלז ולאביו לא הגיד
2 Saulo avandaki na mondelo ya engumba Gibea, na se ya nzete ya grenade oyo ezali na Migironi, elongo na basoda pene nkama motoba.
ושאול יושב בקצה הגבעה תחת הרמון אשר במגרון והעם אשר עמו כשש מאות איש
3 Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.
ואחיה בן אחטוב אחי איכבוד בן פינחס בן עלי כהן יהוה בשלו--נשא אפוד והעם לא ידע כי הלך יונתן
4 Na bangambo ya se ya lubwaku oyo Jonatan asengelaki kokatisa mpo na kokende kobundisa bato ya Filisitia, ezalaki na libanga moko na ngambo moko na moko. Babengaki moko Botsetsi, mpe mosusu, Sene.
ובין המעברות אשר בקש יונתן לעבר על מצב פלשתים--שן הסלע מהעבר מזה ושן הסלע מהעבר מזה ושם האחד בוצץ ושם האחד סנה
5 Libanga moko etelemaki na ngambo ya nor, na nzela oyo ekenda na Mikimasi, mpe mosusu etalanaki na Geba, na sude.
השן האחד מצוק מצפון מול מכמש והאחד מנגב מול גבע
6 Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: — Yaka! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.
ויאמר יהונתן אל הנער נשא כליו לכה ונעברה אל מצב הערלים האלה--אולי יעשה יהוה לנו כי אין ליהוה מעצור להושיע ברב או במעט
7 Elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azongisaki: — Sala nyonso oyo ozali na yango na makanisi. Kende! Nazali elongo na yo na motema mpe na molimo.
ויאמר לו נשא כליו עשה כל אשר בלבבך נטה לך הנני עמך כלבבך
8 Jonatan alobaki na ye: — Tokende kino na molako ya basoda yango mpe tomimonisa epai na bango.
ויאמר יהונתן הנה אנחנו עברים אל האנשים ונגלינו אליהם
9 Soki balobi na biso: « Botelema wana, bozela kino biso moko tokoya epai na bino; » wana tokovanda na esika oyo tozali mpe tokokende epai na bango te.
אם כה יאמרו אלינו דמו עד הגיענו אליכם--ועמדנו תחתינו ולא נעלה אליהם
10 Kasi soki balobi na biso: « Boya epai na biso, » tokokende epai na bango, pamba te yango ekozala elembo mpo na biso ete Yawe akabi bango na maboko na biso.
ואם כה יאמרו עלו עלינו ועלינו--כי נתנם יהוה בידנו וזה לנו האות
11 Boye, bango mibale bamimonisaki na molako ya bato ya Filisitia. Mpe tango bato ya Filisitia bamonaki bango, balobaki: « Botala! Ba-Ebre babimi wuta na mabulu epai wapi babombamaki. »
ויגלו שניהם אל מצב פלשתים ויאמרו פלשתים--הנה עברים יצאים מן החרים אשר התחבאו שם
12 Balobaki na Jonatan mpe na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: « Boya epai na biso, tokoteya bino likambo moko. » Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: « Landa ngai na sima, pamba te Yawe asili kokaba bango na maboko ya Isalaele. »
ויענו אנשי המצבה את יונתן ואת נשא כליו ויאמרו עלו אלינו ונודיעה אתכם דבר ויאמר יונתן אל נשא כליו עלה אחרי--כי נתנם יהוה ביד ישראל
13 Jonatan asalelaki makolo mpe maboko na ye mpo na komata, mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye alandaki ye na sima. Wana Jonatan azalaki kokweyisa bato ya Filisitia na liboso; na sima na ye, elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki koboma bango.
ויעל יונתן על ידיו ועל רגליו ונשא כליו אחריו ויפלו לפני יונתן ונשא כליו ממותת אחריו
14 Na etumba oyo ya liboso, Jonatan elongo na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye babomaki bato pene tuku mibale, na etando oyo bangombe mibale ekoki kobalola na mokolo moko.
ותהי המכה הראשנה אשר הכה יונתן ונשא כליו--כעשרים איש כבחצי מענה צמד שדה
15 Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso: ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.
ותהי חרדה במחנה בשדה ובכל העם--המצב והמשחית חרדו גם המה ותרגז הארץ ותהי לחרדת אלהים
16 Bakengeli ya Saulo, oyo bazalaki na Gibea ya Benjame bamonaki mampinga kopalangana na bangambo nyonso.
ויראו הצפים לשאול בגבעת בנימן והנה ההמון נמוג וילך והלם
17 Bongo Saulo alobaki na basoda oyo bazalaki elongo na ye: « Botanga basoda mpo na koyeba banani basili kokima. » Tango batangaki, bamonaki ete Jonatan mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye bazali te.
ויאמר שאול לעם אשר אתו פקדו נא וראו מי הלך מעמנו ויפקדו והנה אין יונתן ונשא כליו
18 Saulo alobaki na Ayiya: « Boya na Sanduku ya Nzambe. » Pamba te na tango wana, Sanduku ya Nzambe ezalaki elongo na bato ya Isalaele.
ויאמר שאול לאחיה הגישה ארון האלהים כי היה ארון האלהים ביום ההוא--ובני ישראל
19 Wana Saulo azalaki nanu kosolola na Nganga-Nzambe, mobulu ezalaki kaka kokoma makasi kati na molako ya bato ya Filisitia. Boye Saulo alobaki na Nganga-Nzambe: « Tika! Kotuna Yawe ezali lisusu na tina te. »
ויהי עד דבר שאול אל הכהן וההמון אשר במחנה פלשתים וילך הלוך ורב ויאמר שאול אל הכהן אסף ידך
20 Bongo Saulo elongo na bato na ye nyonso basanganaki mpe bakendeki na bitumba; bamonaki ete bato ya Filisitia bazali na mobulu makasi, bazali kobomana bango na bango na mipanga.
ויזעק שאול וכל העם אשר אתו ויבאו עד המלחמה והנה היתה חרב איש ברעהו--מהומה גדולה מאד
21 Ba-Ebre oyo basalelaki liboso bato ya Filisitia mpe bakendeki elongo na bango na bitumba mosusu, bango basanganaki na bato ya Isalaele, oyo bazalaki elongo na Saulo mpe Jonatan.
והעברים היו לפלשתים כאתמול שלשום אשר עלו עמם במחנה סביב וגם המה להיות עם ישראל אשר עם שאול ויונתן
22 Tango bato nyonso ya Isalaele oyo babombamaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi bayokaki ete bato ya Filisitia bazali kokima, bango mpe balandaki mpe babundisaki bato ya Filisitia.
וכל איש ישראל המתחבאים בהר אפרים שמעו כי נסו פלשתים וידבקו גם המה אחריהם במלחמה
23 Ezalaki ndenge wana nde Yawe abikisaki na mokolo wana bato ya Isalaele, mpe bitumba ekobaki kino ekatisaki Beti-Aveni.
ויושע יהוה ביום ההוא את ישראל והמלחמה--עברה את בית און
24 Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki: « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.
ואיש ישראל נגש ביום ההוא ויאל שאול את העם לאמר ארור האיש אשר יאכל לחם עד הערב ונקמתי מאיבי ולא טעם כל העם לחם
25 Bato nyonso bakotaki na zamba mpe bamonaki mafuta ya nzoyi, na mabele.
וכל הארץ באו ביער ויהי דבש על פני השדה
26 Tango bakotaki na zamba, bamonaki mafuta ya nzoyi kotanga, mpe moko te asimbaki mpe aliaki yango mpo na kotosa ndayi.
ויבא העם אל היער והנה הלך דבש ואין משיג ידו אל פיו כי ירא העם את השבעה
27 Kasi Jonatan ayokaki te ete tata na ye atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi; apusaki nzete oyo azalaki na yango na loboko, azindisaki yango na mafuta ya nzoyi mpe aliaki yango, elongi na ye engengaki.
ויונתן לא שמע בהשביע אביו את העם וישלח את קצה המטה אשר בידו ויטבל אותה ביערת הדבש וישב ידו אל פיו ותראנה (ותארנה) עיניו
28 Bongo moko kati na basoda alobaki na ye: — Tata na yo atiaki mampinga nyonso na se ya mokumba ya ndayi na koloba: « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei na mokolo ya lelo. » Yango wana bato nyonso balembi.
ויען איש מהעם ויאמר השבע השביע אביך את העם לאמר ארור האיש אשר יאכל לחם היום ויעף העם
29 Jonatan alobaki: — Solo, tata na ngai akotisaki pasi kati na mokili. Botala ndenge nini elongi na ngai engengi! Ezali mpo ete nalie mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi.
ויאמר יונתן עכר אבי את הארץ ראו נא כי ארו עיני--כי טעמתי מעט דבש הזה
30 Bongo soki bato na biso baliaki na mokolo ya lelo mafuta ya nzoyi oyo bamonaki epai ya banguna na biso, kokweyisama ya bato ya Filisitia elingaki kozala monene!
אף כי לוא אכל אכל היום העם משלל איביו אשר מצא כי עתה לא רבתה מכה בפלשתים
31 Na mokolo wana, sima na bato ya Isalaele kosilisa koboma bato ya Filisitia wuta na Mikimasi kino na Ayaloni, balembaki makasi.
ויכו ביום ההוא בפלשתים ממכמש אילנה ויעף העם מאד
32 Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo: bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango.
ויעש (ויעט) העם אל שלל (השלל) ויקחו צאן ובקר ובני בקר וישחטו ארצה ויאכל העם על הדם
33 Moto moko alobaki na Saulo: — Tala! Bato bazali kosala masumu liboso ya Yawe na ndenge bazali kolia nyama na likolo ya makila. Saulo alobaki: — Bokweyisi kondima! Botindika sik’oyo libanga moko ya monene kino awa.
ויגידו לשאול לאמר הנה העם חטאים ליהוה לאכל על הדם ויאמר בגדתם גלו אלי היום אבן גדולה
34 Saulo abakisaki: Bokende kati na bato mpe boloba na bango ete moko na moko amemela ngai ngombe na ye mpe meme na ye, mpe akata yango kingo na esika oyo. Bongo bokolia yango mpe bokosala masumu te liboso ya Yawe na kolia nyama na likolo ya makila kati na yango. Boye moko na moko amemaki ngombe na ye na butu mpe akataki yango kingo na esika yango.
ויאמר שאול פצו בעם ואמרתם להם הגישו אלי איש שורו ואיש שיהו ושחטתם בזה ואכלתם ולא תחטאו ליהוה לאכל אל הדם ויגשו כל העם איש שורו בידו הלילה--וישחטו שם
35 Bongo Saulo atongaki etumbelo mpo na Yawe; ezalaki mbala na ye ya liboso ya kosala likambo ya boye.
ויבן שאול מזבח ליהוה אתו החל לבנות מזבח ליהוה
36 Saulo alobaki: — Tokita mpe tolanda bato ya Filisitia na butu ya lelo, tobebisa bango kino na tongo mpe totika ata moto moko te ya bomoi kati na bango. Bato bazongisaki: — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu. Kasi Nganga-Nzambe alobaki: — Totuna Nzambe na esika oyo.
ויאמר שאול נרדה אחרי פלשתים לילה ונבזה בהם עד אור הבקר ולא נשאר בהם איש ויאמרו כל הטוב בעיניך עשה ויאמר הכהן נקרבה הלם אל האלהים
37 Boye Saulo atunaki Nzambe: « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele? » Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana.
וישאל שאול באלהים הארד אחרי פלשתים התתנם ביד ישראל ולא ענהו ביום ההוא
38 Saulo alobaki: — Bino nyonso oyo bozali bakambi ya bato, boya awa! Toluka koyeba lisumu nini oyo esalemi na mokolo ya lelo.
ויאמר שאול--גשו הלם כל פנות העם ודעו וראו--במה היתה החטאת הזאת היום
39 Na Kombo na Yawe, Mobikisi ya Isalaele, ata ezali Jonatan, mwana na ngai ya mobali, nde asali lisumu yango, asengeli kokufa. Kasi kati na bato, moko te alobaki ata liloba moko.
כי חי יהוה המושיע את ישראל--כי אם ישנו ביונתן בני כי מות ימות ואין ענהו מכל העם
40 Bongo Saulo alobaki na bato nyonso ya Isalaele: — Bozala ngambo moko. Ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali, tokozala ngambo mosusu. Bato bazongisaki: — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu.
ויאמר אל כל ישראל אתם תהיו לעבר אחד ואני ויונתן בני נהיה לעבר אחד ויאמרו העם אל שאול הטוב בעיניך עשה
41 Bongo Saulo asambelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele: « Oh Nzambe, talisa ngai eyano ya malamu. » Boye zeke ekweyaki epai ya Jonatan mpe Saulo, mpe bato bazalaki na mbeba te.
ויאמר שאול אל יהוה אלהי ישראל--הבה תמים וילכד יונתן ושאול והעם יצאו
42 Saulo alobaki: « Bobeta zeke kati na ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali. » Mpe zeke ekweyaki epai ya Jonatan.
ויאמר שאול--הפילו ביני ובין יונתן בני וילכד יונתן
43 Bongo Saulo alobaki na Jonatan: — Yebisa ngai likambo oyo osalaki. Jonatan alobaki: — Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa!
ויאמר שאול אל יונתן הגידה לי מה עשיתה ויגד לו יונתן ויאמר טעם טעמתי בקצה המטה אשר בידי מעט דבש--הנני אמות
44 Saulo alobaki: — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.
ויאמר שאול כה יעשה אלהים וכה יוסף כי מות תמות יונתן
45 Kasi bato balobaki na Saulo: — Boni, Jonatan akokufa! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye! Te! Na Kombo na Yawe, akokufa te! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.
ויאמר העם אל שאול היונתן ימות אשר עשה הישועה הגדולה הזאת בישראל--חלילה חי יהוה אם יפל משערת ראשו ארצה כי עם אלהים עשה היום הזה ויפדו העם את יונתן ולא מת
46 Saulo atikaki kolanda bato ya Filisitia, mpe bato ya Filisitia bazongaki na mboka na bango.
ויעל שאול מאחרי פלשתים ופלשתים הלכו למקומם
47 Tango Saulo azwaki bokonzi mpo na koyangela Isalaele, abundisaki banguna na bango na bangambo nyonso: Moabi, bato ya Amoni, Edomi, bakonzi ya Tsoba, mpe bato ya Filisitia. Bisika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kolonga bato wana.
ושאול לכד המלוכה על ישראל וילחם סביב בכל איביו במואב ובבני עמון ובאדום ובמלכי צובה ובפלשתים ובכל אשר יפנה ירשיע
48 Abundisaki na makasi nyonso bato ya Amaleki mpe alongaki bango, akangolaki Isalaele na maboko ya bato oyo bazalaki kobotola bango biloko.
ויעש חיל ויך את עמלק ויצל את ישראל מיד שסהו
49 Bana mibali ya Saulo bazalaki: Jonatan, Yishivi mpe Maliki-Shuwa. Azalaki na bana mibale ya basi: ya mokolo, kombo na ye ezalaki « Merabi; » mpe ya leki, « Mikali. »
ויהיו בני שאול יונתן וישוי ומלכישוע ושם שתי בנתיו--שם הבכירה מרב ושם הקטנה מיכל
50 Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Ayinoami, » mwana mwasi ya Ayimaatsi. Abineri, mwana mobali ya Neri, Noko ya Saulo, azalaki mokonzi ya mampinga ya Saulo.
ושם אשת שאול אחינעם בת אחימעץ ושם שר צבאו אבינר בן נר דוד שאול
51 Kishi, tata ya Saulo, mpe Neri, tata ya Abineri, bazalaki bana mibali ya Abieli.
וקיש אבי שאול ונר אבי אבנר בן אביאל
52 Na mikolo nyonso ya bomoi ya Saulo, bitumba ezalaki makasi na bato ya Filisitia; mpe bisika nyonso oyo Saulo azalaki komona bato ya makasi to ya mpiko, azalaki kozwa mpe kokotisa bango kati na mampinga na ye.
ותהי המלחמה חזקה על פלשתים כל ימי שאול וראה שאול כל איש גבור וכל בן חיל ויאספהו אליו

< 1 Samuele 14 >