< 1 Samuele 13 >

1 Saulo azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki Isalaele mibu tuku minei na mibale.
Saul tedy prvního léta kralování svého, (kraloval pak dvě létě nad Izraelem, )
2 Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele: bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.
Vybral sobě tři tisíce z Izraele. I bylo jich s Saulem dva tisíce v Michmas a na hoře Bethel, a tisíc bylo s Jonatou v Gabaa Beniaminově; ostatek pak lidu rozpustil jednoho každého do příbytku jeho.
3 Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki: « Tika ete Ba-Ebre bayoka! »
I pobil Jonata stráž Filistinských, kterouž měli na pahrbku, a uslyšeli to Filistinští. Tedy Saul troubil v troubu po vší zemi, řka: Ať to slyší Hebrejští.
4 Bato nyonso ya Isalaele bayokaki sango oyo azalaki koloba ete Saulo abundisaki mpe alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, mpe ete bato ya Filisitia bayinaki bato ya Isalaele. Bato nyonso basanganaki na Giligali mpo na kokende kobunda elongo na Saulo.
A tak slyšel všecken Izrael, že bylo praveno: Pobil Saul stráž Filistinských, pročež také zoškliven byl Izrael mezi Filistinskými. I svolán jest lid za Saulem do Galgala.
5 Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele; bazalaki na bashar nkoto tuku misato; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.
Filistinští pak sebrali se k boji proti Izraelovi, třidceti tisíc vozů, a šest tisíc jezdců, a lidu ve množství, jako jest písku na břehu mořském. I vytáhli a položili se v Michmas na východ Betaven.
6 Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.
A protož muži Izraelští vidouce, že jim úzko, (nebo byl ssoužen lid, ) skryl se lid v jeskyních a v ohradách, a v skalách a v horách, i v jamách.
7 Ndambo ya Ba-Ebre mosusu bakatisaki mayi ya Yordani mpo na kokende na mokili ya Gadi mpe ya Galadi. Saulo azalaki nanu na Giligali, mampinga nyonso oyo ezalaki elongo na ye ezalaki kolenga na somo.
Hebrejští také přepravili se přes Jordán do země Gád a Galád. Saul pak ještě byl v Galgala, a všecken lid zastrašil se, jda za ním.
8 Azelaki mikolo sambo, tango oyo Samuele akataki. Kasi mpo ete Samuele ayaki te na Giligali, yango wana bato batikaki Saulo mpe bapalanganaki.
I očekával tu za sedm dní vedlé času uloženého od Samuele; a když nepřicházel Samuel do Galgala, rozešel se lid od něho.
9 Saulo alobaki: « Bomemela ngai banyama ya mbeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. » Mpe Saulo abonzaki mbeka ya kotumba.
Tedy řekl Saul: Přineste ke mně obět zápalnou a oběti pokojné. I obětoval oběti zápalné.
10 Bongo tango kaka asilisaki kobonza mbeka yango ya kotumba, Samuele akomaki. Saulo abimaki mpo na kokende kopesa ye mbote.
Když pak již dokonal obětování oběti zápalné, aj, Samuel přicházel, a Saul vyšel proti němu, aby ho přivítal.
11 Samuele atunaki ye: — Osali penza nini? Saulo azongisaki: — Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi,
I řekl Samuel: Co jsi učinil? Odpověděl Saul: Když jsem viděl, že se lid rozchází ode mne, a ty nepřicházíš k uloženému dni, a Filistinští byli shromážděni v Michmas:
12 namilobelaki: « Sik’oyo, bato ya Filisitia bazali koya kobundisa ngai na Giligali, kasi ngai nabondeli Yawe te! » Yango wana, nazwaki mokano ya kobonza mbeka ya kotumba.
I řekl jsem: Nyní připadnou Filistinští na mne v Galgala, a tváři Hospodinově nemodlil jsem se. Takž jsem se opovážil a obětoval jsem oběti zápalné.
13 Samuele alobaki na Saulo: — Osali lokola moto ya liboma! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela.
Tedy řekl Samuel Saulovi: Bláznivě jsi učinil, nezachovals přikázaní Hospodina Boha svého, kteréž přikázal tobě; nebo nyní byl by utvrdil Hospodin království tvé nad Izraelem až na věky.
14 Kasi sik’oyo, bokonzi na yo ekowumela lisusu te. Yawe aluki moto mosusu oyo asepelisaka motema na Ye mpe atie ye mokambi ya bato na Ye, pamba te yo, obateli mibeko ya Yawe te.
Ale již nyní království tvé neostojí. Vyhledalť jest Hospodin sobě muže vedlé srdce svého, jemuž rozkázal Hospodin, aby byl vůdce nad lidem jeho; nebo jsi nezachoval, cožť přikázal Hospodin.
15 Bongo Samuele alongwaki na Giligali mpe akendeki na Gibea ya Benjame. Mpe Saulo atangaki bato oyo bazalaki elongo na ye: bazalaki bato pene nkama motoba.
Vstav pak Samuel, vstoupil z Galgala do Gabaa Beniaminova. A Saul načetl lidu, kterýž zůstával při něm, okolo šesti set mužů.
16 Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, mpe mibali nyonso oyo bazalaki kovanda elongo na bango batandamaki mpo na bitumba, na Geba ya Benjame. Kasi bato ya Filisitia batongaki ya bango molako na Mikimasi.
Saul tedy a Jonata syn jeho, i lid, kterýž zůstával s nimi, byli v Gabaa Beniaminově, Filistinští pak leželi v Michmas.
17 Longwa na molako ya bato ya Filisitia, mampinga ya basoda ya mpiko ebimaki mpe ekabwanaki na masanga misato: lisanga ya liboso ezwaki nzela oyo ekenda kino na Ofira, na mokili ya Shuwali;
I vyšli zhoubcové z vojska Filistinského na tré rozdělení. Houf jeden obrátil se k cestě Ofra, k zemi Sual;
18 lisanga ya mibale etalisaki na nzela ya Beti-Oroni; mpe lisanga ya misato ezwaki nzela oyo ekenda na mondelo ya Lubwaku ya Tseboyimi, na ngambo ya esobe.
A houf druhý obrátil se na cestu Betoron; houf pak třetí pustil se cestou krajiny, kteráž patří k údolí Seboim na poušť.
19 Nzokande, na tango wana, batuli bibende bazalaki lisusu te kati na mokili mobimba ya Isalaele, pamba te bato ya Filisitia balobaki: « Ba-Ebre bakoki kosala te, ezala makonga to matolotolo. »
Kováře pak žádného nenalézalo se ve vší zemi Izraelské; nebo byli řekli Filistinští: Aby sobě Hebrejští nenadělali mečů a kopí.
20 Yango wana, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kokende epai ya bato ya Filisitia mpo na kotia minu na basonge ya bibende oyo bangombe etimolaka na yango mabele, na bapiki, na bipasola mpe na bapawu.
Protož chodívali všickni Izraelští k Filistinským, aby ostřil sobě jeden každý radlici svou, a motyku svou, sekeru svou i vidly své,
21 Bongo mpo na kotia minu yango na bapawu, na bapiki mpe na bipasola, bazalaki kofuta bagrame mwambe ya mbongo ya bibende.
Sic jinak byly štěrbiny na radlicích, motykách, vidlách třírohých a sekerách; také i o zaostření ostnu bývalo těžko.
22 Boye, na mokolo ya bitumba, soda ata moko te oyo azalaki elongo na Saulo mpe na Jonatan azalaki na mopanga to na likonga na loboko na ye; kaka Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, nde bazalaki na yango.
I bylo, že v čas boje nenalézalo se meče ani kopí u žádného z lidu toho, kterýž byl s Saulem a s Jonatou, toliko u Saule a u Jonaty syna jeho.
23 Limpinga moko ya basoda ya Filisitia eyaki kotelema na kati-kati ya lubwaku ya Mikimasi.
Vyšla pak stráž Filistinských k cestám Michmas.

< 1 Samuele 13 >