< 1 Samuele 11 >
1 Naashi, moto ya Amoni, ayaki kotonga molako na ye liboso ya Yabeshi ya Galadi. Mpe bato nyonso ya engumba Yabeshi balobaki na Naashi: — Sala boyokani elongo na biso, mpe tokokoma bawumbu na yo.
Nahach l’Ammonite était venu attaquer Jabès-Galaad, et en faisait le siège. Les habitants de Jabès lui dirent: "Traite avec nous, nous voulons te servir."
2 Kasi Naashi, moto ya Amoni, azongisaki: — Nakoki kosala boyokani elongo na bino soki kaka bondimi ete natobola bino nyonso liso ya ngambo ya mobali. Na bongo, nakoyokisa Isalaele mobimba soni.
Nahach l’Ammonite leur répondit: "Je traiterai avec vous à cette condition, qu’on vous crève à tous l’œil droit; c’est un déshonneur que je veux infliger à tout Israël."
3 Bampaka ya Yabeshi balobaki na ye: — Pesa biso mikolo sambo mpo ete totinda bantoma kati na mokili mobimba ya Isalaele; soki moto moko te ayei kobikisa biso, wana tokomikaba na maboko na yo.
Les anciens de Jabès lui dirent: "Accorde-nous un délai de sept jours, que nous puissions envoyer des messagers dans tout le territoire d’Israël; si l’on ne nous vient pas en aide, nous nous rendrons à toi."
4 Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi.
Quand les messagers furent arrivés à Ghibea et eurent exposé ces faits au peuple, le peuple tout entier éclata en sanglots.
5 Kaka na tango yango, Saulo awutaki na bilanga, sima na bangombe na ye. Atunaki: « Likambo nini ya mabe ekweyeli bato mpo ete balela boye? » Bayebisaki ye makambo nyonso oyo bato ya Yabeshi balobaki.
Cependant Saül revenait des champs, derrière ses bœufs; il demanda: "Pourquoi le peuple pleure-t-il?" On lui rapporta les paroles des hommes de Jabès.
6 Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi.
Sitôt qu’il les eut entendues, Saül se sentit envahi par l’esprit divin et enflammé d’indignation.
7 Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo: « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. » Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko.
Il prit une paire de bœufs et les coupa en morceaux, qu’il envoya par les messagers dans tout le territoire d’Israël, avec ces paroles: "Quiconque ne suivra pas Saül et Samuel, voilà comme on traitera ses bœufs!" Et une terreur divine s’empara du peuple, et ils accoururent comme un seul homme.
8 Saulo atangaki bango, na Bezeki; motango ezalaki: mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato.
On les recensa à Bézek; les enfants d’Israël furent trois cent mille, et ceux de Juda trente mille.
9 Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi: « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi: ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › » Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi.
On dit aux messagers qui étaient venus: "Apportez cette réponse aux gens de Jabès-Galaad: Demain, quand le soleil sera dans sa force, la délivrance viendra pour vous." Les messagers allèrent l’annoncer aux gens de Jabès, lesquels s’en réjouirent
10 Boye bato ya Yabeshi balobaki na bato ya Amoni: « Tokomikaba lobi na maboko na bino, mpe bokosala biso nyonso oyo bokomona ete ezali malamu. »
et firent dire aux ennemis: "Demain, nous nous rendrons à vous, et vous nous traiterez selon votre bon plaisir."
11 Mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki mibali na ye na masanga misato. Mpe liboso ete tongo etana, bakotaki na molako ya bato ya Amoni mpe babomaki bango kino na tango oyo moyi engalaki makasi. Bapanzaki bato oyo babikaki na lolenge oyo esalaki ete etikalaki ata na mibali mibale te kati na bango oyo bakobaki kozala esika moko.
Le lendemain, Saül disposa l’armée en trois corps, qui pénétrèrent au milieu du camp pendant la veille du matin, et battirent les Ammonites jusqu’au plus chaud de la journée; ceux qui purent échapper se débandèrent, si bien qu’il n’en resta pas deux ensemble.
12 Bato balobaki na Samuele: — Wapi bato oyo bazalaki koloba: « Boni, Saulo akoyangela biso? » Bomemela biso bato yango mpo ete toboma bango.
Le peuple dit à Samuel: "Qui donc disait: Saül régnerait-il sur nous? Qu’on nous livre ces hommes, nous voulons les mettre à mort!"
13 Kasi Saulo alobaki: — Moto moko te akokufa na mokolo ya lelo, pamba te Yawe akangoli Isalaele na mokolo ya lelo.
Mais Saül dit: "On ne doit faire mourir personne en ce jour, car aujourd’hui l’Eternel a procuré la victoire à Israël."
14 Samuele alobaki na bato: — Boya! Tokende na Giligali mpo na kovandisa kuna bokonzi ya Saulo.
Alors Samuel dit au peuple: "Venez, allons à Ghilgal, pour y consacrer de nouveau la royauté."
15 Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.
Et tout le peuple se rendit à Ghilgal, et là, à Ghilgal, devant le Seigneur, ils proclamèrent Saül roi, là ils immolèrent des victimes rémunératoires devant le Seigneur, et Saül et tous les Israélites y firent de grandes réjouissances.