< 1 Petelo 5 >
1 Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.
Starších, kteříž mezi vámi jsou, prosím já spolustarší, a svědek Kristových utrpení, a budoucí, kteráž zjevena bude, slávy účastník:
2 Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe: na kotindika te, kasi na komipesa mobimba; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango;
Paste stádo Boží, kteréž při vás jest, opatrujíce je, ne bezděky, ale dobrovolně, ne pro mrzký zisk, ale ochotně,
3 na makanisi te ya kokonza bato oyo bapesameli bino, kasi na kozalaka bandakisa mpo na etonga.
Ani jako panujíce nad dědictvím Páně, ale jako příkladem jsouce stádu.
4 Bongo tango Mokonzi ya babateli bibwele akoya, bokozwa motole ya nkembo oyo ekotikala kobungisa kitoko na yango te.
A když se ukáže kníže pastýřů, vezmete tu neuvadlou korunu slávy.
5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi: « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »
Podobně i mládenci, buďte poddáni starším. A všickni poddanost jedni druhým ukazujte, pokorou vnitř se ozdobte. Bůh zajisté pyšným se protiví, ale pokorným dává milost.
6 Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki.
Pokořtež se tedy pod mocnou ruku Boží, aby vás povýšil časem svým,
7 Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.
Všelikou péči vaši uvrhouce na něj. Nebo onť má péči o vás.
8 Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.
Střízliví buďte, bděte; nebo protivník váš ďábel jako lev řvoucí obchází, hledaje, koho by sežral.
9 Botelemelaka ye mpe boyikaka mpiko kati na kondima, pamba te boyebi ete bandeko na bino, oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe komona bapasi lokola bino.
Jemužto odpírejte, silní jsouce u víře, vědouce, že tatáž utrpení bratrstvo vaše, kteréž na světě jest, obkličují.
10 Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi. (aiōnios )
Bůh pak všeliké milosti, kterýž povolal nás k věčné slávě své v Kristu Ježíši, když maličko potrpíte, on dokonalé vás učiň, utvrď, zmocni i upevni. (aiōnios )
11 Tika ete nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen! (aiōn )
Jemuž sláva a císařství na věky věků. Amen. (aiōn )
12 Na lisungi ya Silasi oyo azali ndeko ya solo, nakomeli bino mokanda oyo na mokuse mpo na kolendisa bino mpe kolakisa bino ete ngolu oyo bokangami na yango ezali ngolu ya solo ya Nzambe. Bopikama kati na yango.
Po Silvánovi, vám věrném bratru, tak za to mám, že jsem psal vám krátce, napomínaje a osvědčuje, že tato jest pravá milost Boží, v kteréž stojíte.
13 Lingomba ya babulami oyo bazali na Babiloni epesi bino mbote. Mwana na ngai, Malako, apesi mpe bino mbote.
Pozdravuje vás ta církev, kteráž jest v Babyloně, účastnice vyvolení vašeho, a Marek syn můj.
14 Bopesanaka bino na bino mbote, na beze ya bondeko. Tika ete kimia ezala na bino nyonso oyo bozali kati na Klisto!
Pozdravtež jedni druhých v políbení laskavém. Pokoj vám všechněm, kteříž jste v Kristu Ježíši. Amen.