< 1 Petelo 3 >
1 Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,
Так само дружи́ни, — корі́ться своїм чоловікам, щоб і деякі, хто не ко́риться слову, були приєднані без слова пово́дженням дружи́н,
2 tango bakomona bino kotambola na bomoi ya peto mpe ya botosi.
як побачать ваше пово́дження чисте в страху́.
3 Bolukaka kaka te kokoma kitoko na libanda na nzela ya kokanga suki, kolata babiju ya wolo to bilamba ya kitoko;
А окрасою їм нехай буде не зовнішнє, — запліта́ння волосся та наві́шання золота або вбира́ння одеж,
4 kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati: esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.
але захо́вана люди́на серця в нетлінні ла́гідного й мовчазно́го духа, що дорогоцінне перед Богом.
5 Ezalaki ndenge wana nde basi ya bule oyo, na kala, bazalaki kotia elikya na bango na Nzambe bazalaki komikomisa kitoko. Bazalaki kotosa mibali na bango,
Бо так само колись прикраша́ли себе й святі ті жінки́, що клали надію на Бога й кори́лись своїм чоловікам.
6 lokola Sara oyo atosaki Abrayami kino kobenga ye « nkolo na ngai. » Bozali bana basi ya Sara soki bosali bolamu mpe bopesi nzela te na bobangi.
Так Сара корилась Авраамові, і паном його називала. А ви — її діти, коли добро робите та не лякаєтесь жа́дного стра́ху.
7 Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.
Чоловіки, — так само живіть ра́зом із дружи́нами за розумом, як зо слабішою жіночою посудиною, і виявляйте їм честь, бо й вони є співспадкоє́миці благода́ті життя, щоб не спинялися ваші моли́тви.
8 Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa.
Наре́шті ж, будьте всі одноду́мні, спочутливі, братолюбні, милосердні, покірливі.
9 Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.
Не платіть злом за зло, або лайкою за лайку, навпаки, — благословляйте, знавши, що на це вас покликано, щоб ви вспадкува́ли благослове́ння.
10 Solo, moto nyonso oyo azali na posa ya kolinga bomoi mpe kobika mikolo ya esengo asengeli kobatela lolemo na ye mosika na mabe, mpe bibebu na ye mosika na maloba ya lokuta;
„Бо хто хоче любити життя та бачити добрі дні, нехай здержить свого язика́ від лихого та у́ста свої від гово́рення пі́дступу.
11 asengeli kokima mabe mpe kosala bolamu, koluka kimia mpe kokoba na yango,
Ухиляйся від злого та добре чини, шукай миру й женися за ним!
12 pamba te miso ya Nkolo etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka losambo na bango. Kasi Nkolo apesaka bato mabe mokongo.
Бо очі Господні — до праведних, а ву́ха Його — до їхніх прохань, а Господнє лице проти тих, хто чинить лихе!“
13 Nani akosala bino mabe soki bomipesi na kosala bolamu?
І хто заподі́є вам зле, коли будете ви оборонцями доброго?
14 Bokozala kutu bato ya esengo, ezala soki bokomona pasi mpo na bosembo. Bobangaka bato te mpe bomitungisaka te.
А коли ви за праведність і страждаєте, то ви блаженні! „А їхнього стра́ху не бійтеся, і не тривожтеся!“
15 Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,
А Господа Христа освятіть у ваших серцях, і за́вжди готовими будьте на відповідь кожному, хто в вас запитає рахунку про надію, що в вас, із ла́гідністю та зо стра́хом.
16 kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.
Майте добре сумління, щоб тим, за що́ вас обмовляють, немов би злочинців, були посоромлені лихосло́вники вашого пово́дження в Христі.
17 Eleki malamu komona pasi na kosala bolamu, soki yango ezali mokano ya Nzambe, na esika ete omona pasi na kosala mabe.
Бо ліпше страждати за добрі діла, — коли хоче того Божа воля, — аніж за лихі.
18 Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.
Бо й Христос один раз постраждав був за наші гріхи, щоб приве́сти нас до Бога, Праведний за неправедних, хоч уме́ртвлений тілом, але Духом ожи́влений,
19 Ezali mpe kaka na nguya ya Molimo yango nde akendeki kosakola elonga na Ye epai ya milimo oyo ezalaki ya kokangama kati na boloko,
Яким Він і ду́хам, що в в'язниці були, зійшовши, звіщав;
20 milimo oyo etosaki te na tango ya kala, na tango oyo Nzambe azalaki kokanga motema wana azalaki kozela ete Noa asilisa kotonga masuwa. Kati na masuwa yango, motango moke kaka ya bato, bato mwambe, nde babikisamaki na mayi ya mpela.
вони колись непокі́рливі були́, як їх Боже довготерпіння чекало за Но́євих днів, коли будувався ковче́г, що в ньому мало, цебто вісім душ, спаслось від води.
21 Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto
Того образ, хрищення — не тілесної нечистости позбуття́, але обі́тниця Богові доброго сумління, — спасає тепер і нас воскресінням Ісуса Христа,
22 oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.
що, зійшовши на небо, пробуває по Божій правиці, а Йому підкорилися анголи, влади та сили.