< 1 Petelo 2 >

1 Yango wana, bobwaka lolenge nyonso ya mabe, ya lokuta, ya mayele mabe, ya zuwa mpe ya kotonga bato.
αποθεμενοι ουν πασαν κακιαν και παντα δολον και υποκρισεις και φθονους και πασας καταλαλιας
2 Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,
ως αρτιγεννητα βρεφη το λογικον αδολον γαλα επιποθησατε ινα εν αυτω αυξηθητε [ εις σωτηριαν ]
3 awa bosili kososola ete Nkolo azali malamu.
ειπερ εγευσασθε οτι χρηστος ο κυριος
4 Bopusana pene ya Ye oyo azali Libanga ya bomoi, Libanga oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango mpo ete ezali motuya mingi na miso na Ye.
προς ον προσερχομενοι λιθον ζωντα υπο ανθρωπων μεν αποδεδοκιμασμενον παρα δε θεω εκλεκτον εντιμον
5 Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.
και αυτοι ως λιθοι ζωντες οικοδομεισθε οικος πνευματικος ιερατευμα αγιον ανενεγκαι πνευματικας θυσιας ευπροσδεκτους τω θεω δια ιησου χριστου
6 Pamba te Makomi eloba: « Tala, napona libanga moko ya motuya oyo nazali kotia kati na Siona lokola libanga ya songe ya ndako; moto nyonso oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »
διοτι περιεχει εν τη γραφη ιδου τιθημι εν σιων λιθον ακρογωνιαιον εκλεκτον εντιμον και ο πιστευων επ αυτω ου μη καταισχυνθη
7 Boye lokumu ezali mpo na bino oyo bondimaka; kasi mpo na bato oyo bandimaka te, « libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga oyo esimbi ndako, libanga ya songe ya ndako,
υμιν ουν η τιμη τοις πιστευουσιν απειθουσιν δε λιθον ον απεδοκιμασαν οι οικοδομουντες ουτος εγενηθη εις κεφαλην γωνιας
8 mpe libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato. » Bakweyaka mpo ete batosaka te Liloba na Nzambe; mpe ebongisama nde bongo mpo na bango.
και λιθος προσκομματος και πετρα σκανδαλου οι προσκοπτουσιν τω λογω απειθουντες εις ο και ετεθησαν
9 Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.
υμεις δε γενος εκλεκτον βασιλειον ιερατευμα εθνος αγιον λαος εις περιποιησιν οπως τας αρετας εξαγγειλητε του εκ σκοτους υμας καλεσαντος εις το θαυμαστον αυτου φως
10 Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa.
οι ποτε ου λαος νυν δε λαος θεου οι ουκ ηλεημενοι νυν δε ελεηθεντες
11 Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.
αγαπητοι παρακαλω ως παροικους και παρεπιδημους απεχεσθε των σαρκικων επιθυμιων αιτινες στρατευονται κατα της ψυχης
12 Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.
την αναστροφην υμων εχοντες καλην εν τοις εθνεσιν ινα εν ω καταλαλουσιν υμων ως κακοποιων εκ των καλων εργων εποπτευσαντες δοξασωσιν τον θεον εν ημερα επισκοπης
13 Mpo na lokumu ya Nkolo, botosaka bato nyonso oyo batiami kati na bino lokola bakonzi: mokonzi ya mboka,
υποταγητε ουν παση ανθρωπινη κτισει δια τον κυριον ειτε βασιλει ως υπερεχοντι
14 bayangeli mpe basambisi oyo bapesameli mosala ya kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe, mpe kondima bato oyo basalaka bolamu.
ειτε ηγεμοσιν ως δι αυτου πεμπομενοις εις εκδικησιν [ μεν ] κακοποιων επαινον δε αγαθοποιων
15 Pamba te, Nzambe alingi boye: bosalaka bolamu mpo na kokanga minoko ya bato oyo bazangi boyebi mpe bososoli;
οτι ουτως εστιν το θελημα του θεου αγαθοποιουντας φιμουν την των αφρονων ανθρωπων αγνωσιαν
16 botambolaka lokola bansomi, kasi bosalelaka bonsomi na bino te lokola vwale mpo na kozipa mabe na bino, pamba te bozali bawumbu ya Nzambe.
ως ελευθεροι και μη ως επικαλυμμα εχοντες της κακιας την ελευθεριαν αλλ ως δουλοι θεου
17 Bomemiaka bato nyonso, bolingaka bandeko na bino kati na kondima, botosaka Nzambe, mpe bopesaka mokonzi lokumu.
παντας τιμησατε την αδελφοτητα αγαπατε τον θεον φοβεισθε τον βασιλεα τιματε
18 Bawumbu, botosaka bankolo na bino na bobangi nyonso: botosaka kaka te ba-oyo bazali malamu mpe boboto, kasi mpe ba-oyo bazali matata.
οι οικεται υποτασσομενοι εν παντι φοβω τοις δεσποταις ου μονον τοις αγαθοις και επιεικεσιν αλλα και τοις σκολιοις
19 Pamba te ezali penza ngolu mpo na moto komona pasi kaka pamba mpo atosaka Nzambe.
τουτο γαρ χαρις ει δια συνειδησιν θεου υποφερει τις λυπας πασχων αδικως
20 Kasi lokumu nini ezali ya komona pasi ya etumbu mpo na mabe oyo osali? Nzokande, na miso ya Nzambe, komona pasi mpo na bolamu oyo osali ezali penza ngolu.
ποιον γαρ κλεος ει αμαρτανοντες και κολαφιζομενοι υπομενειτε αλλ ει αγαθοποιουντες και πασχοντες υπομενειτε τουτο χαρις παρα θεω
21 Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.
εις τουτο γαρ εκληθητε οτι και χριστος επαθεν υπερ ημων υμιν υπολιμπανων υπογραμμον ινα επακολουθησητε τοις ιχνεσιν αυτου
22 Yesu atikalaki kosala lisumu ata moko te, mpe monoko na Ye etikalaki koloba lokuta te.
ος αμαρτιαν ουκ εποιησεν ουδε ευρεθη δολος εν τω στοματι αυτου
23 Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.
ος λοιδορουμενος ουκ αντελοιδορει πασχων ουκ ηπειλει παρεδιδου δε τω κρινοντι δικαιως
24 Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.
ος τας αμαρτιας ημων αυτος ανηνεγκεν εν τω σωματι αυτου επι το ξυλον ινα ταις αμαρτιαις απογενομενοι τη δικαιοσυνη ζησωμεν ου τω μωλωπι [ αυτου ] ιαθητε
25 Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.
ητε γαρ ως προβατα πλανωμενα αλλ επεστραφητε νυν επι τον ποιμενα και επισκοπον των ψυχων υμων

< 1 Petelo 2 >