< 1 Petelo 1 >

1 Ngai Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto; Epai ya baponami ya Nzambe oyo bazali kati na bamboka ya bapaya mpe bapalangani na bituka ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadose, ya Azia mpe ya Bitini.
Πέτρος, ἀπόστολος Ἰησοῦ Χριστοῦ, ἐκλεκτοῖς παρεπιδήμοις διασπορᾶς Πόντου, Γαλατίας, Καππαδοκίας, Ἀσίας καὶ Βιθυνίας,
2 Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki!
κατὰ πρόγνωσιν Θεοῦ πατρός, ἐν ἁγιασμῷ Πνεύματος, εἰς ὑπακοὴν καὶ ῥαντισμὸν αἵματος Ἰησοῦ Χριστοῦ· χάρις ὑμῖν καὶ εἰρήνη πληθυνθείη.
3 Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo
Εὐλογητὸς ὁ Θεὸς καὶ πατὴρ τοῦ Κυρίου ἡμῶν Ἰησοῦ Χριστοῦ, ὁ κατὰ τὸ πολὺ αὐτοῦ ἔλεος ἀναγεννήσας ἡμᾶς εἰς ἐλπίδα ζῶσαν δι᾽ ἀναστάσεως Ἰησοῦ Χριστοῦ ἐκ νεκρῶν,
4 ete tokozwa libula oyo abombela biso kati na Likolo, libula oyo ebebaka te, ezwaka bosoto te, mpe ebungisaka kitoko na yango te. Ezali mpe kaka libula yango nde Nzambe abombela bino
εἰς κληρονομίαν ἄφθαρτον καὶ ἀμίαντον καὶ ἀμάραντον, τετηρημένην ἐν οὐρανοῖς εἰς ὑμᾶς
5 ba-oyo Nzambe abatelaka na nguya na Ye, na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ekomonisama na tango ya suka.
τοὺς ἐν δυνάμει Θεοῦ φρουρουμένους διὰ πίστεως εἰς σωτηρίαν ἑτοίμην ἀποκαλυφθῆναι ἐν καιρῷ ἐσχάτῳ·
6 Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso.
ἐν ᾧ ἀγαλλιᾶσθε, ὀλίγον ἄρτι, εἰ δέον ἐστί, λυπηθέντες ἐν ποικίλοις πειρασμοῖς,
7 Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.
ἵνα τὸ δοκίμιον ὑμῶν τῆς πίστεως πολυτιμότερον χρυσίου τοῦ ἀπολλυμένου διὰ πυρὸς δὲ δοκιμαζομένου εὑρεθῇ εἰς ἔπαινον καὶ τιμὴν καὶ δόξαν ἐν ἀποκαλύψει Ἰησοῦ Χριστοῦ,
8 Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,
ὃν οὐκ εἰδότες ἀγαπᾶτε, εἰς ὃν ἄρτι μὴ ὁρῶντες, πιστεύοντες δὲ ἀγαλλιᾶσθε χαρᾷ ἀνεκλαλήτῳ καὶ δεδοξασμένῃ,
9 pamba te bozali kozwa lifuti ya kondima na bino: lobiko ya bomoi na bino.
κομιζόμενοι τὸ τέλος τῆς πίστεως ὑμῶν, σωτηρίαν ψυχῶν.
10 Mpo na lobiko yango, basakoli oyo baloba na tina na ngolu oyo Nzambe abongisa mpo na bino balukaki penza, na molende, koyeba mabombami na yango.
περὶ ἧς σωτηρίας ἐξεζήτησαν καὶ ἐξηρεύνησαν προφῆται οἱ περὶ τῆς εἰς ὑμᾶς χάριτος προφητεύσαντες,
11 Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Klisto alobaki ekosalema. Molimo ya Klisto azalaki kati na bango, wana azalaki komiyebisela bango ete Klisto asengelaki komona pasi liboso ete azwa nkembo oyo ezalaki kozela Ye.
ἐρευνῶντες εἰς τίνα ἢ ποῖον καιρὸν ἐδήλου τὸ ἐν αὐτοῖς Πνεῦμα Χριστοῦ προμαρτυρόμενον τὰ εἰς Χριστὸν παθήματα καὶ τὰς μετὰ ταῦτα δόξας·
12 Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.
οἷς ἀπεκαλύφθη ὅτι οὐχ ἑαυτοῖς, ὑμῖν δὲ διηκόνουν αὐτά, ἃ νῦν ἀνηγγέλη ὑμῖν διὰ τῶν εὐαγγελισαμένων ὑμᾶς ἐν Πνεύματι Ἁγίῳ ἀποσταλέντι ἀπ᾽ οὐρανοῦ, εἰς ἃ ἐπιθυμοῦσιν ἄγγελοι παρακύψαι.
13 Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.
Διὸ ἀναζωσάμενοι τὰς ὀσφύας τῆς διανοίας ὑμῶν, νήφοντες, τελείως ἐλπίσατε ἐπὶ τὴν φερομένην ὑμῖν χάριν ἐν ἀποκαλύψει Ἰησοῦ Χριστοῦ,
14 Lokola bana ya botosi, botambola lisusu te kolanda baposa mabe oyo bozalaki na yango tango bozangaki boyebi.
ὡς τέκνα ὑπακοῆς μὴ συσχηματιζόμενοι ταῖς πρότερον ἐν τῇ ἀγνοίᾳ ὑμῶν ἐπιθυμίαις,
15 Kasi lokola Ye oyo abengaki bino azali Bule, bino mpe bozala bule kati na etamboli na bino nyonso,
ἀλλὰ κατὰ τὸν καλέσαντα ὑμᾶς ἅγιον καὶ αὐτοὶ ἅγιοι ἐν πάσῃ ἀναστροφῇ γενήθητε,
16 pamba te ekomama: « Bozala bule, pamba te nazali Bule. »
διότι γέγραπται· ἅγιοι γίνεσθε, ὅτι ἐγὼ ἅγιός εἰμι.
17 Lokola mpe bobelelaka Tata oyo aponaka bilongi te tango asambisaka bato nyonso kolanda misala na bango, botambola kati na kobanga Nzambe, wana bozali awa na mokili lokola bapaya.
καὶ εἰ πατέρα ἐπικαλεῖσθε τὸν ἀπροσωπολήπτως κρίνοντα κατὰ τὸ ἑκάστου ἔργον, ἐν φόβῳ τὸν τῆς παροικίας ὑμῶν χρόνον ἀναστράφητε,
18 Boyebi malamu ete ezali te na nzela ya biloko oyo ebebaka lokola wolo to palata nde Nzambe akangolaki bino na bizaleli ezanga tina, oyo bozwaki epai ya bakoko na bino,
εἰδότες ὅτι οὐ φθαρτοῖς, ἀργυρίῳ ἢ χρυσίῳ, ἐλυτρώθητε ἐκ τῆς ματαίας ὑμῶν ἀναστροφῆς πατροπαραδότου,
19 kasi ezali nde na nzela ya makila ya talo ya Klisto lokola mpate oyo ezangi mbeba mpe litono.
ἀλλὰ τιμίῳ αἵματι ὡς ἀμνοῦ ἀμώμου καὶ ἀσπίλου Χριστοῦ,
20 Nzambe abongisaki Ye mpo na yango wuta kala, liboso ete akela mokili, mpe Klisto amonani na mikolo oyo ya suka likolo na bino.
προεγνωσμένου μὲν πρὸ καταβολῆς κόσμου, φανερωθέντος δὲ ἐπ᾽ ἐσχάτων τῶν χρόνων δι᾽ ὑμᾶς
21 Ezali na nzela na Ye nde bino bondimelaka Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi mpe apesaki Ye nkembo, mpo ete kondima mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe.
τοὺς δι᾽ αὐτοῦ πιστεύοντας εἰς Θεὸν τὸν ἐγείραντα αὐτὸν ἐκ νεκρῶν καὶ δόξαν αὐτῷ δόντα, ὥστε τὴν πίστιν ὑμῶν καὶ ἐλπίδα εἶναι εἰς Θεόν.
22 Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.
Τὰς ψυχὰς ὑμῶν ἡγνικότες ἐν τῇ ὑπακοῇ τῆς ἀληθείας διὰ Πνεύματος εἰς φιλαδελφίαν ἀνυπόκριτον, ἐκ καθαρᾶς καρδίας ἀλλήλους ἀγαπήσατε ἐκτενῶς,
23 Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka. (aiōn g165)
ἀναγεγεννημένοι οὐκ ἐκ σπορᾶς φθαρτῆς, ἀλλὰ ἀφθάρτου, διὰ λόγου ζῶντος Θεοῦ καὶ μένοντος εἰς τὸν αἰῶνα· (aiōn g165)
24 Pamba te ekomama: « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,
διότι πᾶσα σὰρξ ὡς χόρτος, καὶ πᾶσα δόξα ἀνθρώπου ὡς ἄνθος χόρτου· ἐξηράνθη ὁ χόρτος, καὶ τὸ ἄνθος αὐτοῦ ἐξέπεσε·
25 kasi Liloba na Nkolo ewumelaka seko na seko. » Nzokande, Liloba yango ezali nde Sango Malamu oyo bateyaki bino. (aiōn g165)
τὸ δὲ ῥῆμα Κυρίου μένει εἰς τὸν αἰῶνα. τοῦτο δέ ἐστι τὸ ῥῆμα τὸ εὐαγγελισθὲν εἰς ὑμᾶς. (aiōn g165)

< 1 Petelo 1 >