< 1 Bakonzi 1 >

1 Tango mokonzi Davidi akomaki mobange makasi, azalaki lisusu koyoka moto te na nzoto, ezala bafiniki ye bilamba ebele.
El rey David era ya viejo y entrado en años, y lo cubrían con ropas, pero no podía calentarse.
2 Boye, basali ya Davidi balobaki na ye: « Tika ete tolukela mokonzi elenge mwasi moko oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpo ete azala pene ya mokonzi, abatela ye mpe alala mbeto moko na ye; mpe mpo ete mokonzi, nkolo na biso, ayoka lisusu moto na nzoto! »
Por lo tanto, sus siervos le dijeron: “Que se busque una joven virgen para mi señor el rey. Que se ponga delante del rey y lo abrigue, y que se acueste en su seno, para que mi señor el rey se abrigue”.
3 Boye, balukaki kati na Isalaele mobimba elenge mwasi moko ya kitoko; bamonaki Abishagi, moto ya mboka Sunami, mpe bamemaki ye epai ya mokonzi.
Así que buscaron a una joven hermosa por todos los confines de Israel, y encontraron a Abisag la sunamita, y la llevaron ante el rey.
4 Elenge mwasi yango azalaki kitoko mingi, akomaki kobatela mokonzi mpe kosalela ye; kasi mokonzi atikalaki te kosangisa na ye nzoto.
La joven era muy hermosa, y se puso al servicio del rey, pero el rey no la conocía íntimamente.
5 Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye: « Ngai nde nakozala mokonzi! » Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli.
Entonces Adonías, hijo de Haggit, se exaltó diciendo: “Seré rey”. Entonces le preparó carros y jinetes, y cincuenta hombres para que corrieran delante de él.
6 Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye: « Mpo na nini ozali kosala boye? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi.
Su padre no le había disgustado en ningún momento diciéndole: “¿Por qué lo has hecho?”, y además era un hombre muy apuesto; y había nacido después de Absalón.
7 Adoniya asololaki na Joabi, mwana mobali ya Tseruya, mpe na Nganga-Nzambe Abiatari; mpe bango bandimaki kosunga ye.
Se puso de acuerdo con Joab, hijo de Sarvia, y con el sacerdote Abiatar, y ellos siguieron a Adonías y lo ayudaron.
8 Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya.
Pero el sacerdote Sadoc, Benaía hijo de Joiada, el profeta Natán, Simei, Rei y los valientes que pertenecían a David, no estaban con Adonías.
9 Adoniya abonzaki na libanga ya Zoeleti bambeka ebele ya bameme, ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, pembeni ya Eyini-Rogeli; abengisaki bandeko na ye nyonso ya mibali, bana mibali ya mokonzi, mpe bato nyonso ya Yuda oyo bazalaki kosala epai ya mokonzi.
Adonías mató ovejas, vacas y animales cebados junto a la piedra de Zohelet, que está al lado de En Rogel; y llamó a todos sus hermanos, los hijos del rey, y a todos los hombres de Judá, los servidores del rey;
10 Kasi abengisaki te mosakoli Natan, Benaya, bakengeli ya mokonzi mpe Salomo, ndeko na ye ya mobali.
pero no llamó al profeta Natán, ni a Benaía, ni a los valientes, ni a su hermano Salomón.
11 Natan atunaki Batisheba, mama ya Salomo: — Boni, oyoki te ete Adoniya, mwana mobali ya Agite, akomi mokonzi; kasi mokonzi Davidi ayebi te?
Entonces Natán habló a Betsabé, madre de Salomón, diciendo: “¿No has oído que Adonías, hijo de Haggit, reina, y que nuestro señor David no lo sabe?
12 Sik’oyo, tika ete napesa yo toli oyo ekobikisa bomoi na yo mpe bomoi ya Salomo, mwana na yo ya mobali.
Ahora, pues, ven, déjame que te aconseje, para que salves tu vida y la de tu hijo Salomón.
13 Kota epai ya mokonzi Davidi mpe loba na ye: « Mokonzi, nkolo na ngai, olapaki ndayi te liboso na ngai mwasi mowumbu na yo: ‹ Solo, Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi? › Boye mpo na nini Adoniya akomi mokonzi? »
Entra al rey David y dile: “¿No juraste tú, mi señor el rey, a tu siervo, diciendo: “Ciertamente tu hijo Salomón reinará después de mí y se sentará en mi trono”? ¿Por qué, pues, reina Adonías?’
14 Wana okozala nanu koloba na mokonzi, ngai mpe nakokota mpe nakobeta sete na maloba na yo.
Mira, mientras aún estás hablando allí con el rey, yo también entraré después de ti y confirmaré tus palabras.”
15 Batisheba akendeki kotala mokonzi kati na shambre. Mokonzi akomaki mobange makasi, mpe Abishagi, moto ya Sunami, azalaki kobatela ye.
Betsabé entró en la habitación del rey. El rey era muy anciano, y Abisag la sunamita servía al rey.
16 Batisheba agumbamaki mpe afukamaki liboso ya mokonzi; mpe mokonzi atunaki ye: — Boni, olingi nini?
Betsabé se inclinó y mostró respeto al rey. El rey le dijo: “¿Qué quieres?”.
17 Batisheba azongisaki: — Nkolo na ngai, yo moko olapaki ndayi, liboso na ngai mwasi mowumbu na yo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, na koloba: « Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai na bokonzi mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi. »
Ella le dijo: “Señor mío, tú juraste por Yahvé tu Dios a tu siervo: ‘Ciertamente tu hijo Salomón reinará después de mí y se sentará en mi trono’.
18 Kasi sik’oyo Adoniya akomi mokonzi; mpe yo mokonzi, nkolo na ngai, oyebi yango te!
Ahora, he aquí que Adonías reina, y tú, mi señor el rey, no lo sabes.
19 Abonzi bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, ya bameme; mpe abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, Nganga-Nzambe Abiatari; Joabi, mokonzi ya mampinga ya Isalaele; kasi abengisi te Salomo, mowumbu na yo.
Ha matado ganado, animales gordos y ovejas en abundancia, y ha llamado a todos los hijos del rey, al sacerdote Abiatar y a Joab, capitán del ejército; pero no ha llamado a Salomón, tu siervo.
20 Mokonzi, nkolo na ngai, miso ya bato nyonso ya Isalaele ezali kotalela yo mpo na koyeba soki nani akovanda na kiti ya bokonzi sima na mokonzi, nkolo na ngai.
Tú, mi señor el rey, los ojos de todo Israel están puestos en ti, para que les digas quién se sentará en el trono de mi señor el rey después de él.
21 Soki te, tango mokonzi, nkolo na ngai, akolala elongo na bakoko na ye, bakozwa ngai elongo na Salomo, mwana na ngai ya mobali, lokola babomi.
De lo contrario, cuando mi señor el rey duerma con sus padres, yo y mi hijo Salomón seremos considerados criminales.”
22 Wana Batisheba azalaki nanu koloba na mokonzi, mosakoli Natan akomaki.
Mientras ella seguía hablando con el rey, entró el profeta Natán.
23 Bayebisaki mokonzi: — Tala mosakoli Natan! Mosakoli Natan akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na se.
Se lo comunicaron al rey, diciendo: “He aquí el profeta Natán”. Cuando entró ante el rey, se inclinó ante él con el rostro en tierra.
24 Bongo, Natan alobaki: — Mokonzi, nkolo na ngai; boni, olobaki ete Adoniya akokitana na yo mpe akovanda na kiti na yo ya bokonzi?
Natán le dijo: “Rey, señor mío, ¿has dicho que Adonías reinará después de mí y que se sentará en mi trono?”
25 Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba: « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi! »
Porque hoy ha bajado y ha matado ganado, animales gordos y ovejas en abundancia, y ha llamado a todos los hijos del rey, a los capitanes del ejército y al sacerdote Abiatar. He aquí que están comiendo y bebiendo delante de él, y diciendo: “¡Viva el rey Adonías!”
26 Kasi abengisi te ngai, mosali na yo; Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mpe Salomo, mosali na yo.
Pero no me ha llamado a mí, ni a tu siervo el sacerdote Sadoc, ni a Benaía hijo de Joiada, ni a tu siervo Salomón.
27 Boni, ezali solo na mitindo ya mokonzi, nkolo na ngai, nde likambo oyo esalemi? Nzokande, oyebisaki te na mosali na yo nani akovanda na kiti ya bokonzi ya nkolo na ngai sima na yo?
¿Acaso ha hecho esto mi señor el rey, y no has mostrado a tus siervos quién debe sentarse en el trono de mi señor el rey después de él?”
28 Mokonzi Davidi alobaki: — Bobengela ngai Batisheba. Batisheba ayaki pene ya mokonzi mpe atelemaki liboso na ye.
El rey David respondió: “Llama a Betsabé”. Ella vino a la presencia del rey y se puso de pie ante el rey.
29 Mokonzi alapaki ndayi na maloba oyo: — Na Kombo na Yawe oyo akangolaki ngai na mikakatano nyonso,
El rey hizo un voto y dijo: “Vive Yahvé, que ha redimido mi alma de toda adversidad,
30 nakokokisa solo, na mokolo ya lelo, ndayi oyo nalapaki epai na yo na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi.
ciertamente, como te juré por Yahvé, el Dios de Israel, diciendo: ‘Ciertamente tu hijo Salomón reinará después de mí, y se sentará en mi trono en mi lugar’; ciertamente lo haré hoy.”
31 Batisheba akitisaki elongi na ye kino na se mpe agumbamaki liboso ya mokonzi; alobaki: — Tika ete mokonzi Davidi, nkolo na ngai, awumela seko na bomoi!
Entonces Betsabé se inclinó con el rostro hacia la tierra y mostró respeto al rey, y dijo: “¡Viva mi señor el rey David para siempre!”
32 Mokonzi Davidi alobaki: — Bobenga Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan mpe Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Tango bayaki liboso ya mokonzi,
El rey David dijo: “Llama a mí al sacerdote Sadoc, al profeta Natán y a Benaía, hijo de Joiada”. Ellos se presentaron ante el rey.
33 mokonzi alobaki na bango: — Bozwa elongo na bino basali ya mokonzi na bino mpe bomatisa Salomo, mwana na ngai ya mobali, na likolo ya mile na ngai ya mwasi. Bokende elongo na ye na etima ya Giyoni!
El rey les dijo: “Llevad con vosotros a los siervos de vuestro señor, y haced que mi hijo Salomón monte en mi propia mula, y llevadlo a Gihón.
34 Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga: « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi! »
Que el sacerdote Sadoc y el profeta Natán lo unjan allí como rey de Israel. Tocad la trompeta y decid: “¡Viva el rey Salomón!
35 Sima, bokozonga elongo na ye, mpe akoya kovanda na kiti na ngai ya bokonzi. Ye nde akokoma mokonzi na esika na ngai. Nakomisi ye mokonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.
Sube después de él, y vendrá y se sentará en mi trono; porque él será rey en mi lugar. Yo lo he designado para que sea príncipe sobre Israel y sobre Judá”.
36 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azongiselaki mokonzi: — Amen! Tika ete Yawe, Nzambe ya mokonzi, nkolo na ngai, akokisa maloba oyo.
Benaía, hijo de Joiada, respondió al rey y dijo: “Amén. Que Yahvé, el Dios de mi señor el rey, lo diga.
37 Ndenge Yawe azalaki elongo na mokonzi, nkolo na ngai, tika ete azala mpe elongo na Salomo mpe akomisa kiti na ye ya bokonzi monene koleka oyo ya mokonzi Davidi, nkolo na ngai!
Como Yahvé ha estado con mi señor el rey, así esté con Salomón, y haga su trono más grande que el trono de mi señor el rey David.”
38 Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.
Entonces el sacerdote Sadoc, el profeta Natán, Benaía hijo de Joiada, y los queretanos y los peletanos, bajaron e hicieron montar a Salomón en la mula del rey David, y lo llevaron a Gihón.
39 Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki: « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi! »
El sacerdote Sadoc tomó el cuerno de aceite de la Tienda y ungió a Salomón. Tocaron la trompeta, y todo el pueblo dijo: “¡Viva el rey Salomón!”.
40 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazalaki kobeta baflite mpe kosepela makasi sima na ye; mabele eninganaki na makelele na bango.
Todo el pueblo subió detrás de él, y el pueblo tocó la flauta y se alegró mucho, de modo que la tierra tembló con su sonido.
41 Adoniya mpe bato nyonso oyo abengisaki mpo ete bazala na ye elongo bayokaki makelele yango wana bazalaki kosilisa kolia. Boye, tango Joabi ayokaki mongongo ya kelelo, atunaki: — Makelele wana kati na engumba elakisi nini?
Adonías y todos los invitados que estaban con él lo oyeron al terminar de comer. Cuando Joab oyó el sonido de la trompeta, dijo: “¿Por qué este ruido de la ciudad alborotada?”
42 Wana azalaki nanu koloba, Jonatan, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Abiatari, akomaki. Adoniya alobaki na ye: — Kota! Moto ya lokumu lokola yo amemaka kaka basango ya malamu.
Mientras él aún hablaba, he aquí que llegó Jonatán, hijo del sacerdote Abiatar, y Adonías le dijo: “Entra, porque eres un hombre digno y traes buenas noticias.”
43 Jonatan azongiselaki Adoniya: — Ezali bongo te! Mokonzi Davidi, nkolo na biso, akomisi Salomo mokonzi!
Jonatán respondió a Adonías: “Ciertamente nuestro señor el rey David ha hecho rey a Salomón.
44 Mokonzi atindaki elongo na ye Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti, mpe bamatisi ye na likolo ya mile ya mokonzi.
El rey ha enviado con él al sacerdote Sadoc, al profeta Natán, a Benaía hijo de Joiada, a los cereteos y a los peleteos, y lo han hecho montar en la mula del rey.
45 Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bapakoli ye mafuta, na etima ya Giyoni, mpo ete akoma mokonzi. Wuta na Giyoni, bagangi na esengo, mpe engumba mobimba esepeli na likambo yango. Yango nde makelele oyo bozali koyoka.
El sacerdote Sadoc y el profeta Natán lo han ungido como rey en Gihón. Han subido de allí regocijados, de modo que la ciudad volvió a resonar. Este es el ruido que han escuchado.
46 Mpe lisusu, Salomo avandi na kiti ya bokonzi;
Además, Salomón está sentado en el trono del reino.
47 basali ya mokonzi bayei kopesa longonya epai na Davidi, mokonzi na biso, na maloba oyo: « Tika ete Nzambe na yo akomisa kombo ya Salomo monene koleka kombo na yo, mpe kiti na ye ya bokonzi, monene koleka oyo ya yo! » Bongo mokonzi agumbamaki mpe agumbamelaki Nzambe na mbeto na ye,
Además, los servidores del rey vinieron a bendecir a nuestro señor, el rey David, diciendo: “Que tu Dios haga que el nombre de Salomón sea mejor que tu nombre, y que su trono sea más grande que el tuyo”; y el rey se inclinó sobre el lecho.
48 mpe alobaki: « Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama, Ye oyo, na mokolo ya lelo, apesi ngai nzela ya komona moto oyo akitani na ngai na bokonzi! »
También dijo así el rey: ‘Bendito sea Yahvé, el Dios de Israel, que ha dado uno para sentarse hoy en mi trono, viéndolo mis ojos’”.
49 Tango bato oyo Adoniya abengisaki bayokaki bongo, batelemaki na kobanga mpe bakimaki moto na moto na nzela na ye.
Todos los invitados de Adonías tuvieron miedo, se levantaron y cada uno se fue por su lado.
50 Kasi mpo ete Adoniya abangaki Salomo, akendeki kokanga maseke ya etumbelo.
Adonías tuvo miedo a causa de Salomón, y se levantó y fue a colgarse de los cuernos del altar.
51 Bayebisaki Salomo: — Adoniya azali kobanga mokonzi Salomo mpe akangi maseke ya etumbelo. Alobi: « Tika ete mokonzi Salomo alapa, na mokolo ya lelo, ndayi liboso na ngai ete akoboma mosali na ye te na mopanga. »
Se le dijo a Salomón: “He aquí que Adonías teme al rey Salomón, pues está colgado de los cuernos del altar, diciendo: ‘Que el rey Salomón me jure primero que no matará a su siervo a espada’.”
52 Salomo azongisaki: — Soki kaka atamboli na sembo, suki ata moko te ya moto na ye ekokweya na mabele; kasi soki mabe emonani kati na ye, akokufa.
Salomón dijo: “Si se muestra como un hombre digno, ni un pelo suyo caerá a la tierra; pero si se encuentra maldad en él, morirá.”
53 Boye, mokonzi Salomo atindaki bato mpo na kokitisa ye wuta na etumbelo. Bongo Adoniya ayaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi Salomo, mpe Salomo alobaki na ye: — Zonga na ndako na yo.
Entonces el rey Salomón envió, y lo hicieron bajar del altar. Vino y se inclinó ante el rey Salomón; y éste le dijo: “Vete a tu casa”.

< 1 Bakonzi 1 >