< 1 Bakonzi 8 >
1 Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.
[迎約櫃入聖殿]那時,撒羅滿召集以色列眾長老,各支派的首領和以色列子民各家族族長,都到耶路撒冷,為將上主的約櫃從達味城,即熙雍運上來。
2 Bato nyonso ya Isalaele basanganaki pene ya mokonzi Salomo, na feti monene, na sanza ya Etanimi oyo ezali sanza ya sambo.
以色列全體民眾於是在「厄塔寧」月,即第七月的慶節期中,聚集在撒羅滿王那裏。
3 Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Banganga-Nzambe batombolaki Sanduku.
以色列所有的長老來到後,司祭們便抬起約櫃,
4 Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku ya Yawe, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na yango.
司祭和肋未人分別將上主的約櫃、會幕和帳幕中所有的聖器運了上來。
5 Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza.
撒羅滿王和聚集在他那裏的以色列全會眾,在約櫃前祭殺了牛羊,多得無法計算,不可勝數。
6 Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe.
司祭們將上主的約櫃抬到殿的內部,即至聖所內,放在革魯賓翅膀下早已預備的地方。
7 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango.
革魯賓的翅膀原是伸開的,正遮在約櫃的所在地之上,所以革魯賓在上面正遮著約櫃和抬約櫃的杠桿。
8 Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na Esika ya bule oyo ezali liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Etikala wana kino na mokolo ya lelo.
這杠桿很長,杠桿從內殿前的聖所可以看見,在殿外卻看不見;直到今天還在那裏。
9 Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.
約櫃內除兩塊石版外,沒有別的東西,是以色列子民出埃及後,上主與他們立約時,梅瑟在曷勒布山放在裏面的。
10 Na tango Banganga-Nzambe babimaki na Esika-Oyo-Eleki-Bule, lipata ezipaki Tempelo ya Yawe;
當司祭從聖所出來時,雲彩充滿了上主的殿,
11 mpe Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango mpo na lipata, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo na Ye.
以致為了雲彩,司祭們不能繼續奉職,因為上主的榮耀充滿了上主的殿。
12 Bongo, Salomo alobaki: — Yawe alobaki ete akovanda kati na esika ya molili!
當時,撒羅滿便說:「上主曾決定在幽暗之中,
13 Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela.
如今我已為你建築了一個居所,作為你永久的住處」撒羅滿向百姓致辭
14 Mokonzi abalukaki mpe apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele. Lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki ya kotelema.
然後,君王轉過身來,祝福在場站立的以色列全會眾,
15 Alobaki: — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na Davidi, tata na ngai, mpe akokisi, na loboko na Ye moko, makambo oyo alakaki:
說「上主以色列的天主,應受讚美! 因為他親自完成了他親口對我父親達味所作的預許。他曾說過:
16 « Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala; kasi naponaki Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele! »
自從我領我的百姓以色列出離埃及的那天起,我從未在以色列各支派中選擇一城,建造一座作我名下的殿。但是現在,我選擇了耶路撒冷作我名的居所,揀選了達味作我百姓以色列的領袖。
17 Tata na ngai, Davidi, azalaki na makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
我父親達味原有意為上主以色列天主的名,建造一座殿宇,
18 Kasi Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai: « Osali malamu lokola ozwi makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai.
但上主卻對我父親達味說:你有意為我的名建造一座殿宇,你這番心意固然很好,
19 Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »
但不是你要建造這殿宇,而是你親生的兒子,他要為我的名建造這殿宇。
20 Yawe akokisi elaka na Ye. Nakitani na Davidi, tata na ngai, navandi na kiti ya bokonzi ya Isalaele, ndenge kaka Yawe alobaki, mpe natongi Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
現在,上主實現了他說的話,我已如上主所說的,繼承了我父親達味,坐上了以色列的寶座;我也為上主以色列天主的名,建造了這座殿宇,
21 Nabongisi kuna esika mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na batata na biso tango abimisaki bango na mokili ya Ejipito.
在殿內我也為約櫃預備了一個地方,約櫃內存有上主的約版,就是他領我們的祖先出埃及時,與他們所立的約。」祈禱詞
22 Salomo atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe; mpe na miso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko likolo
此後,撒羅滿當著以色列全會眾,立在上主的祭壇前,舉手向天,說:
23 mpe asambelaki: « Yawe, Nzambe ya Isalaele, ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se! Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na motema na bango mobimba.
「上主,以色列的天主! 上天下地沒有一個神能與你相比。你對那全心在你面前行走的僕人,常是守約表示慈愛。
24 Solo, okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo; makambo oyo olobaki na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
你對你僕人我父親達味所應許的,你都履行了;你親口應允的,你也親手成就了,正如今天一樣。
25 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye: ‹ Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. ›
上主,以色列的天主,現在求你實踐你向你的僕人,我的父親達味所應許的罷! 你曾說過:只要你的子孫固守正道,在我面前行走,如你一樣在我面前行走,你決不缺人在我面前坐以色列的寶座。
26 Sik’oyo, oh Nzambe ya Isalaele, nabondeli Yo, tika ete elaka yango oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, ekokisama!
上主,以色列的天主,現在求你,使你向你僕人我父親達味所應許的話,予以實現罷!
27 Kasi, boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo natongi!
但是,天主實在住在地上嗎﹖看,天和天上的天尚且容不下你,何況我所建造的這座殿宇呢﹖
28 Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo na mokolo ya lelo.
上主,我的天主,請垂允你僕人的祈禱和懇求,俯聽你僕人今天在你面前所發的呼號和祈禱!
29 Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki na tina na yango: ‹ Kombo na Ngai ekozala awa. › Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo.
願你的眼睛晝夜垂視這座殿宇,看顧你所說「我的名要永留在此」的地方! 願你垂聽你僕人向這地方要行的祈禱!
30 Okoyoka libondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo; yoka mpe limbisa!
願你垂聽你僕人和百姓以色列向這地方所發的哀禱! 願你在天上,從你的居所予以垂聽! 請垂聽與寬恕!
31 Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo,
若有人得罪了自己的鄰人,被迫以咒詞起誓,而來到這殿內,在你的祭壇前起誓,
32 yoka wuta na Likolo; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye, kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye.
願你從天上垂聽受理,為你的僕人審斷:懲罰惡人,照他的惡行,報應在他的頭上;宣告義人無罪,照他的正義酬報他。
33 Tango banguna bakolonga bato na Yo, Isalaele, mpo ete basali lisumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo,
當你的百姓以色列犯罪得罪了你,在敵人面前被擊敗時,如果他們回心轉意,稱頌你的名,在這殿內巷你祈禱懇求,
34 yoka wuta na Likolo, limbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, mpe zongisa bango na mabele oyo opesaki batata na bango.
願你從天上予以垂聽,寬恕你百姓以色列的罪過,領他們回到你賜給他們祖先的地方!
35 Tango likolo ekokangama mpe mvula ekozala lisusu te mpo ete basali masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni,
幾時他們犯罪得罪了你,致使天空閉塞不雨;如果他們向這地方祈禱,稱頌你的名,並因你的懲罰而遠離罪過,
36 yoka bango wuta na likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
求你從天上垂聽,赦免你僕人和你百姓以色列的罪,指給他們應走的正路,使雨降在你賜予你百姓作為基業的地上。
37 Tango nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko ekokota kati na mokili, tango banguna bakozingela bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango; tango pasi to bokono ya lolenge nyonso ekokweyela bango,
如果此地發生饑饉瘟疫,五穀枯萎生霉,或遭受蝗蟲螞蚱,或有敵人犯境圍困門下,或不拘遭受什麼災禍疾病;
38 soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo,
如果你的百姓以色列,個人或團體,心中感到內疚,向這殿伸手祈禱哀求,
39 yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, sala mpe zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema ya moto moko na moko. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato.
願你從天上你的居所,予以垂聽、寬恕、援助,照各人的作為予以賞罰,因為你認識人的心,─惟有你認識所有人子的心,─
40 Sala bongo mpo ete bana ya Isalaele batosa Yo mikolo nyonso oyo bakovanda na mabele oyo opesaki epai na batata na biso.
使他們在你賜予我們祖先的地上,終生敬畏你。
41 Ndenge moko mpe mpo na mopaya oyo azali te na molongo ya Isalaele, bato na Yo: wana akowuta na mokili ya mosika, mpo na Kombo na Yo,
至於那不屬於你百姓以色列的外方人,如為了你的大名自遠方而來,─
42 pamba te bakoyoka sango ya Kombo monene na Yo, ya loboko na Yo ya nguya mpe esembolama; soki ayei mpe asambeli na kotala na ngambo ya Tempelo oyo,
因為他們聽見了你的大名,和你大能的手及伸開的手臂,─來向這殿祈禱,
43 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo, mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.
願你從天上你的居所俯聽,照外方人所請求於你的一切去行:這樣可使地上萬民都認識你的名而敬畏你,如同你的百姓以色列一樣,使他們知道我所建造的這殿,是屬於你名下的。
44 Tango bato na Yo bakokende kobundisa banguna na bango na nzela oyo okolakisa bango, soki basambeli Yawe na kotala na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na Kombo na Yo,
你的人民,如果在你派遣他們所走的路上,與敵人交戰,而他們向你所揀選的這城,向我為你名建造的這殿,祈求上主,
45 yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango.
願你從天上俯聽他們的祈禱和哀求,為他們住持正義。
46 Tango bana ya Isalaele bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu, na mokili ya banguna, ezala ya mosika to ya pene,
如果他們犯罪得罪了你,─因為沒有不犯罪的人,─而你向他們發怒,將他們交於敵人,讓敵人將他們擄到或遠或近的敵人地域內,
47 mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi: ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe; ›
他們若在被擄往的地方,回心轉意,在充軍之地,求你說:我們犯了罪,我們行了惡,做了背理的事;
48 soki, wuta na mokili ya banguna na bango epai wapi bamemaki bango lokola bawumbu, basengi Yo bolimbisi na mitema mpe na milimo na bango mobimba; soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo;
如果他們在俘擄他們的敵人地域內,全心全意歸向你,向你賜給他們祖先的地方,向你所揀選的這城,和我為你名建造的這殿哀求你,
49 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango,
願你從天上你的居所,俯聽他們的祈禱和懇求,並為他們主持正義,
50 limbisa bato na Yo na masumu mpe mabe nyonso oyo basalaki liboso na Yo mpe sala ete banguna na bango bayokela bango mawa.
寬恕得罪你的百姓,寬恕他們違犯你的一切過犯,使他們在俘擄他們的敵人面前獲得憐憫,對他們表示同情,
51 Pamba te bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na bowumbu wuta na Ejipito, wuta kati na libulu ya moto makasi oyo banyangwiselaka bibende.
因為他們究竟是你的百姓,是你從埃及,由鎔鐵爐中領出來的產業。
52 Tika ete miso na Yo efungwama wana mowumbu na Yo mpe Isalaele, bato na Yo, bakobondela Yo; yoka bango tango nyonso oyo bakotombola mingongo epai na Yo.
願你常睜眼垂顧你僕人的哀求,你百姓以色列的哀求,他們無論何時呼號你,願你都予以垂聽!
53 Pamba te, Nkolo Yawe, Yo moko nde oponaki bango kati na mabota nyonso ya mokili mpe otiaki bango pembeni, mpo ete bazala libula na Yo ndenge olobaki na mowumbu na Yo, Moyize, tango obimisaki batata na biso na Ejipito. »
我主上主,因為你曾將他們從地上的萬民中選拔出來,作你的產業,正如你在領我們祖先出離埃及時,藉你的僕人梅瑟所聲明的。」祝福詞
54 Tango Salomo asilisaki kosambela mpe kobondela Yawe, atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe epai wapi afukamaki mpe atombolaki maboko na ye na likolo.
撒羅滿跪在上主的祭壇前,舉手向天,祈禱哀求上主完畢,就起來,
55 Wana atelemaki, apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele na mongongo makasi mpe alobaki:
立著,高聲祝福以色列全會眾說:「
56 « Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.
上主應受讚美! 因為他照自己所應許的,使自己的百姓以色列獲得了安居;凡他藉著自己的僕人梅瑟所應許賜福的話,一句也沒有落空。
57 Tika ete Yawe, Nzambe na biso, azala elongo na biso ndenge azalaki elongo na batata na biso; atika biso te mpe abwaka biso te;
願上主我們的天主與我們同在,有如與我們的祖先同在一樣:不離開我們,也不拋棄我們。
58 kasi abongola mitema na biso epai na Ye mpo ete tokoka kotambola na nzela na Ye, kobatela mibeko na Ye, malako na Ye mpe mitindo na Ye oyo apesaki na batata na biso.
願他使我們的心歸向他,履行他的一切道路,恪守他吩咐我們祖先的誡命、律例和典章。
59 Tika ete mabondeli na ngai oyo nawuti kotombola epai na Yawe, Nzambe na biso, ezala liboso na Ye butu mpe moyi; mpe tika ete alongisa mowumbu na Ye mpe Isalaele, bato na Ye, ndenge bosenga na bango ya mokolo na mokolo ezali;
願我在上主面前所作的懇切禱詞,晝夜在上主我們的天主面前,好使他天天維護他僕人和他的百姓以色列,
60 mpo ete bato nyonso kati na mokili bayeba solo ete Yawe azali Nzambe, mosusu lokola Ye azali te.
使地上萬民都知道:只有上主是天主,他以外沒有別的神。
61 Tika ete mitema na bino ezala sembo epai na Yawe, Nzambe na biso, mpo ete botambola kolanda mibeko na Ye mpe bobatela malako na Ye ndenge bosali yango na mokolo ya lelo. »
但願我們的心全歸於上主我們的天主,遵行他的律例,恪守他的誡命,如停今天一樣。」行奉獻禮
62 Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe.
此後,君王和全以色列,一同在上主面前祭殺了犧牲。
63 Salomo abonzaki lokola mbeka ya boyokani bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bampate nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso ya Isalaele babulisaki Tempelo ya Yawe.
撒羅滿祭殺了牛兩萬二千頭,羊十二萬隻,獻於上主,作為和平祭;君王和全以色列子民,就這樣為上主的殿舉行了奉獻禮。
64 Na mokolo yango, mokonzi abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana mbeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani; pamba te etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe elekaki moke mpo na koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani.
當天,君王又祝聖了上主殿前的內院,在那裏奉獻了全燔祭、素祭與和平祭的脂油,因為上主面前的銅祭壇太小,容不下全燔祭、素祭及和平祭的脂油。
65 Na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti monene; mpe lisanga monene ya bato oyo bawutaki na Lebo-Amati kino na moluka ya Ejipito batelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mikolo sambo mpe mikolo sambo mosusu, elingi koloba mikolo zomi na minei.
同時,撒羅滿有舉行了慶節,與從哈瑪特渡口到埃及小河的全以色列人,舉行了盛大集會,在上主我們的天主面前,舉行慶節七天【又七天,共十四天。】
66 Na mokolo ya mwambe, Salomo azongisaki bato. Bongo bato bapambolaki ye mpe bazongaki na bandako na bango ya kapo na esengo mpe na nsayi na mitema mpo na bolamu nyonso oyo Yawe asalelaki Davidi, mowumbu na Ye, mpe Isalaele, bato na Ye.
第八天,君王遣散了百姓;他們為君王祝福後,各自回了本家,對上主向他的僕人達味,他的百姓以色列,所施的種種恩寵,都非常高興歡喜。