< 1 Bakonzi 7 >

1 Salomo atongaki lisusu ndako na ye ya bokonzi; asalaki mibu zomi na misato mpo na kosilisa kotonga yango.
Solomon was building his own house thirteen years, and he finished all his house.
2 Atongaki mpe ndako oyo bazalaki kobenga « Ndako ya Zamba ya Libani. » Ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. Ezalaki na milongo minei ya makonzi ya banzete ya sedele; mpe na likolo ya makonzi yango, ezalaki na mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
For he built the House of the Forest of Lebanon. Its length was one hundred cubits, its width fifty cubits, and its height thirty cubits, on four rows of cedar pillars, with cedar beams on the pillars.
3 Bongo, na likolo ya mabaya ya sedele yango oyo esimbaki motondo, ezalaki na milongo misato ya mabaya mosusu ya sedele na likolo ya makonzi: molongo moko na moko ezalaki na mabaya ya sedele zomi na mitano. Na kosangisa, mabaya yango ezalaki tuku minei na mitano.
It was covered with cedar above over the forty-five beams that were on the pillars, fifteen in a row.
4 Maninisa na yango ezalaki na mipanzi nyonso ya ndako mpe ezalaki etalana yango na yango, na ba-etaje nyonso misato.
There were beams in three rows, and window was facing window in three ranks.
5 Bikuke na yango nyonso ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, mpe ezalaki etalana na ba-etaje nyonso misato.
All the doors and posts were made square with beams; and window was facing window in three ranks.
6 Salomo atongaki lisusu na makonzi, ndako moke ya kokotela ya bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse, mpe ezalaki na motondo likolo ya makonzi.
He made the hall of pillars. Its length was fifty cubits and its width thirty cubits, with a porch before them, and pillars and a threshold before them.
7 Atongaki lisusu ndako ya kiti ya bokonzi epai wapi azalaki kosambisa bato. Alatisaki yango mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo.
He made the porch of the throne where he was to judge, even the porch of judgment; and it was covered with cedar from floor to floor.
8 Ndako na ye ya kovanda ezalaki kati na lopango mosusu, na sima ya ndako moke ya kokotela; mpe batongaki yango ndenge moko kaka na ndako ya kiti ya bokonzi. Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe atongiselaki ye ndako oyo ekokana na ndako ya kiti ya bokonzi.
His house where he was to dwell, the other court within the porch, was of the same construction. He made also a house for Pharaoh’s daughter (whom Solomon had taken as wife), like this porch.
9 Batongaki bandako oyo nyonso na mabanga bakata kitoko mpe babongisa na si na bangambo nyonso mibale. Basalelaki yango kobanda na miboko kino na mitondo, mpe na libanda, mpo na bamir ya lopango ya monene.
All these were of costly stones, even of stone cut according to measure, sawed with saws, inside and outside, even from the foundation to the coping, and so on the outside to the great court.
10 Basalelaki mabanga minene ya talo mpo na kotonga miboko oyo ezalaki na molayi ya bametele pene minei to mitano.
The foundation was of costly stones, even great stones, stones of ten cubits and stones of eight cubits.
11 Na likolo ya miboko yango, batiaki mabanga oyo bakata mpe mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
Above were costly stones, even cut stone, according to measure, and cedar wood.
12 Salomo azingelaki lopango monene na mir ya milongo misato ya mabanga bakata mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele, ndenge ezalaki mpo na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe mpe mpo na ndako moke ya kokotela.
The great court around had three courses of cut stone with a course of cedar beams, like the inner court of the LORD’s house and the porch of the house.
13 Mokonzi Salomo atindaki bato na mboka Tiri kobenga mosali moko na kombo Irami
King Solomon sent and brought Hiram out of Tyre.
14 oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye.
He was the son of a widow of the tribe of Naphtali, and his father was a man of Tyre, a worker in bronze; and he was filled with wisdom and understanding and skill to work all works in bronze. He came to King Solomon and performed all his work.
15 Irami asalaki makonzi nyonso mibale ya bronze: likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na molayi, mpe bametele pene motoba na monene.
For he fashioned the two pillars of bronze, eighteen cubits high apiece; and a line of twelve cubits encircled either of them.
16 Asalaki lisusu na bronze banyangwisa na moto mito ya makonzi mpo na kotia yango na songe: moto moko na moko ya likonzi ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda.
He made two capitals of molten bronze to set on the tops of the pillars. The height of the one capital was five cubits, and the height of the other capital was five cubits.
17 Batiaki na mito ya makonzi yango bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni. Na moto ya likonzi moko na moko, ezalaki na bililingi sambo.
There were nets of checker work and wreaths of chain work for the capitals which were on the top of the pillars: seven for the one capital, and seven for the other capital.
18 Irami atiaki milongo mibale ya bililingi ya bambuma ya grenade zingazinga ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kokomisa mito ya makonzi yango kitoko.
So he made the pillars; and there were two rows of pomegranates around the one network, to cover the capitals that were on the top of the pillars; and he did so for the other capital.
19 Mito ya makonzi ya ndako moke ya kokotela ezalaki ya bametele pene mibale na bosanda, mpe batiaki na likolo na yango bililingi ya fololo ya lisi.
The capitals that were on the top of the pillars in the porch were of lily work, four cubits.
20 Bazingelaki moto ya likonzi moko na moko na bililingi ya bambuma ya grenade nkama mibale oyo ezalaki likolo ya bililingi ya basinga oyo basala lokola ya monyama.
There were capitals above also on the two pillars, close by the belly which was beside the network. There were two hundred pomegranates in rows around the other capital.
21 Irami atongaki makonzi nyonso mibale liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo; abengaki likonzi oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mobali Yakini, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi, Boazi.
He set up the pillars at the porch of the temple. He set up the right pillar and called its name Jachin; and he set up the left pillar and called its name Boaz.
22 Likolo ya likonzi moko na moko, atiaki bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki ndenge wana nde asilisaki mosala ya kotelemisa makonzi.
On the tops of the pillars was lily work. So the work of the pillars was finished.
23 Irami asalaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu: monene na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano; mpe zingazinga na yango, bametele pene zomi na mitano.
He made the molten sea ten cubits from brim to brim, round in shape. Its height was five cubits; and a line of thirty cubits encircled it.
24 Na se ya monoko ya nzungu yango ya monene, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bakolokente oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko.
Under its brim around there were buds which encircled it for ten cubits, encircling the sea. The buds were in two rows, cast when it was cast.
25 Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale: misato etalaki na ngambo ya nor; misato, na ngambo ya weste; misato, na ngambo ya sude, mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima na bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati.
It stood on twelve oxen, three looking toward the north, and three looking toward the west, and three looking toward the south, and three looking toward the east; and the sea was set on them above, and all their hindquarters were inward.
26 Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei.
It was a hand width thick. Its brim was worked like the brim of a cup, like the flower of a lily. It held two thousand baths.
27 Irami asalaki lisusu bivandelo zomi ya bronze: evandelo moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na molayi, bametele pene mibale na mokuse, metele moko na basantimetele tuku mitano na bosanda.
He made the ten bases of bronze. The length of one base was four cubits, four cubits its width, and three cubits its height.
28 Tala ndenge basalaki bivandelo yango: bakangisaki bitando ya bronze mpe balekisaki bibende mosusu ya bronze mpo na kosimba yango.
The work of the bases was like this: they had panels; and there were panels between the ledges;
29 Irami asalaki bililingi ya nkosi, ya bangombe mpe ya basheribe, mpe abambaki yango likolo ya bitando mpe likolo ya bibende mosusu ya bronze. Ezalaki na bililingi ya singa ya bafololo na se mpe na likolo ya bangombe mpe ya bankosi.
and on the panels that were between the ledges were lions, oxen, and cherubim; and on the ledges there was a pedestal above; and beneath the lions and oxen were wreaths of hanging work.
30 Shario moko na moko ezalaki na bapine minei ya bronze mpe na bibende ya bronze mpo na kosimba bapine.
Every base had four bronze wheels and axles of bronze; and its four feet had supports. The supports were cast beneath the basin, with wreaths at the side of each.
31 Na likolo ya evandelo moko na moko, ezalaki na lidusu evimba, na lolenge ya libungutulu; bongo eteni na yango oyo ezalaki ya kovimba ezalaki na basantimetele pene tuku mitano na bosanda mpe basantimetele pene tuku sambo na mitano na monene; mpe nzungu ya monene evandaki na lidusu yango. Irami abambaki bililingi na lidusu yango. Molayi mpe mokuse ya evandelo yango ezalaki ndenge moko, ezalaki na lolenge ya libungutulu te.
Its opening within the capital and above was a cubit. Its opening was round like the work of a pedestal, a cubit and a half; and also on its opening were engravings, and their panels were square, not round.
32 Bapine nyonso minei ezalaki na se ya evandelo, mpe bakangisaki bibende oyo esimbaki bapine yango na mipanzi. Pine moko na moko ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano na monene.
The four wheels were underneath the panels; and the axles of the wheels were in the base. The height of a wheel was a cubit and half a cubit.
33 Basalaki bapine yango lokola bapine ya shareti: bibende oyo esimbaki bapine, bajante, mabende ya mike oyo ezalaka na kati ya pine mpe oyo esungaka pine mpo na kobaluka, nyonso ezalaki ya bronze banyangwisa na moto.
The work of the wheels was like the work of a chariot wheel. Their axles, their rims, their spokes, and their hubs were all of cast metal.
34 Mabende nyonso minei oyo ezalaki lokola makolo ezalaki na basonge nyonso minei mpe ekanganaki na evandelo.
There were four supports at the four corners of each base. Its supports were of the base itself.
35 Na likolo ya evandelo moko na moko, ezalaki na elilingi ya motole ya basantimetele pene tuku mibale na mitano na monene; mpe elilingi yango ezalaki zingazinga ya lidusu, na eteni oyo ezalaki ya kovimba. Na likolo ya evandelo, bibende oyo balekisaki na bangambo ekanganaki na evandelo mpo na kolendisa evandelo yango.
In the top of the base there was a round band half a cubit high; and on the top of the base its supports and its panels were the same.
36 Na likolo ya bibende yango, babambaki bililingi ya basheribe, ya bankosi mpe ya mandalala; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni.
On the plates of its supports and on its panels, he engraved cherubim, lions, and palm trees, each in its space, with wreaths all around.
37 Asalaki ndenge moko mpo na bivandelo nyonso zomi: asalaki nyonso na bronze banyangwisa na moto, mpe ezalaki lolenge moko.
He made the ten bases in this way: all of them had one casting, one measure, and one form.
38 Irami asalaki lisusu basani zomi ya minene ya bronze; moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na monene mpe ezalaki likolo ya evandelo moko kati na bivandelo zomi. Mpe bakokaki kotia balitele pene nkoto moko kati sani moko na moko.
He made ten basins of bronze. One basin contained forty baths. Every basin measured four cubits. One basin was on every one of the ten bases.
39 Atiaki bivandelo mitano elongo na basani na yango na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, mpe mitano mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi. Nzungu ya monene ya bronze etiamaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, pene na songe ya sude-este.
He set the bases, five on the right side of the house and five on the left side of the house. He set the sea on the right side of the house eastward and toward the south.
40 Irami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Irami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Yawe:
Hiram made the pots, the shovels, and the basins. So Hiram finished doing all the work that he worked for King Solomon in the LORD’s house:
41 makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango,
the two pillars; the two bowls of the capitals that were on the top of the pillars; the two networks to cover the two bowls of the capitals that were on the top of the pillars;
42 bililingi ya bambuma nkama minei ya grenade ekangana na maboke ya bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama: milongo mibale ya bililingi ya grenade mpo na elilingi moko na moko ya basinga oyo basala lokola monyama, mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi;
the four hundred pomegranates for the two networks; two rows of pomegranates for each network, to cover the two bowls of the capitals that were on the pillars;
43 bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene oyo batiaki na likolo ya bivandelo,
the ten bases; the ten basins on the bases;
44 nzungu ya monene ya libungutulu, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki komema nzungu ya monene,
the one sea; the twelve oxen under the sea;
45 basani mpo na kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Irami asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto.
the pots; the shovels; and the basins. All of these vessels, which Hiram made for King Solomon in the LORD’s house, were of burnished bronze.
46 Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tsaritani.
The king cast them in the plain of the Jordan, in the clay ground between Succoth and Zarethan.
47 Bongo Salomo atiaki biloko oyo nyonso kati na Tempelo ya Yawe; kasi mpo ete elekaki ebele, bakokaki te koyeba kilo ya bronze oyo basalelaki.
Solomon left all the vessels unweighed, because there were so many of them. The weight of the bronze could not be determined.
48 Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe: etumbelo; mesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe;
Solomon made all the vessels that were in the LORD’s house: the golden altar and the table that the show bread was on, of gold;
49 bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi, liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, bafololo na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto,
and the lamp stands, five on the right side and five on the left, in front of the inner sanctuary, of pure gold; and the flowers, the lamps, and the tongs, of gold;
50 basani ya minene, bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, elongo na bikangelo ya wolo mpo na bikuke ya kati ya Tempelo, Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe mpo na bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.
the cups, the snuffers, the basins, the spoons, and the fire pans, of pure gold; and the hinges, both for the doors of the inner house, the most holy place, and for the doors of the house, of the temple, of gold.
51 Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki: palata, wolo mpe bisalelo; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.
Thus all the work that King Solomon did in the LORD’s house was finished. Solomon brought in the things which David his father had dedicated—the silver, the gold, and the vessels—and put them in the treasuries of the LORD’s house.

< 1 Bakonzi 7 >