< 1 Bakonzi 6 >
1 Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi.
イスラエルの子孫のエジプトの地を出たる後四百八十年ソロモンのイスラエルに王たる第四年ジフの月即ち二月にソロモン、ヱホバのために家を建ることを始めたり
2 Tempelo oyo Salomo atongaki mpo na Yawe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, bametele pene zomi na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
ソロモン王のヱホバの爲に建たる家は長六十キユビト濶二十キユビト高三十キユビトなり
3 Liboso ya Tempelo, na liboso ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo, ezalaki na ndako moko ya moke ya kokotela oyo ezalaki na bametele pene zomi na mokuse; molayi na yango ezalaki ndenge moko na mokuse ya Tempelo; mpe ekota na kati na bametele pene mitano.
家の拝殿の廊は家の濶に循ひて長二十キユビト家の前の其濶十キユビトなり
4 Atiaki na bamir ya Tempelo maninisa oyo batia biyungulu.
彼家に造り附の格子ある窻を施たり
5 Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje.
又家の墻壁に附て四周に連接屋を建て家の墻壁即ち拝殿と神殿の墻壁の周圍に環らせり又四周に旁房を造れり
6 Etaje oyo ya se ya biteni yango ya mike ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse; etaje ya kati-kati, bametele pene misato na mokuse; mpe etaje oyo ya misato, bametele misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. Boye bamir ya libanda ya Tempelo etikalaki lisusu minene te na likolo mpo ete motondo ebebisa bamir ya Tempelo te.
下層の連接屋は濶五キユビト中層のは濶六キユビトを第三層のは濶七キユビトなり即ち家の外に階級を造り環らして何者をも家の墻壁に挿入ざらしむ
7 Mpo na kotonga Tempelo, basalelaki kaka mabanga oyo ebongisamaki malamu wuta na esika oyo bapasolaki yango; boye, esalaki ete makelele ya marto, ya epasola to ya esalelo mosusu ya ebende etikalaki koyokana te wana bazalaki kotonga yango.
家は建る時に鑿石所にて鑿り預備たる石にて造りたれば造れる間に家の中には鎚も鑿も其外の鐵器も聞えざりき
8 Ekotelo ya etaje ya se ezalaki na ngambo ya sude ya Tempelo; bongo, bazalaki kotambola na binyatelo mpo na komata na etaje ya kati-kati mpe na etaje ya misato.
中層の旁房の戸は家の右の方にあり螺旋梯より中層の房にのぼり中層の房より第三層の房にいたるべし
9 Tango Salomo asilisaki misala ya kotonga Tempelo, azipaki yango na plafon oyo esimbamaki na mabaya minene ya banzete ya sedele.
斯彼家を建終り香柏の橡と板をもて家を葺り
10 Atongaki ba-etaje kolanda mir ya Tempelo: etaje moko na moko ezalaki na bosanda ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe ekanganaki na Tempelo na nzela ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
又家に附て五キユビトの高たる連接屋を建環し香柏をもて家に交接たり
11 Yawe alobaki na Salomo:
爰にヱホバの言ソロモンに臨みて曰く
12 — Na likambo oyo etali Tempelo oyo ozali kotonga, soki olandi bikateli na Ngai, soki okokisi malako na Ngai, soki otosi mpe olandi mibeko na Ngai nyonso, nakokokisa na nzela na yo elaka oyo napesaki na Davidi, tata na yo.
汝今此家を建つ若し汝わが法憲に歩みわが律例を行ひわが諸の誡命を守りて之にしたがひて歩まばわれはが汝の父ダビデに言し語を汝に固うすべし
13 Mpe nakoya kovanda kati na bato ya Isalaele mpe nakosundola te bato na Ngai, Isalaele.
我イスラエルの子孫の中に住わが民イスラエルを棄ざるべし
14 Salomo atongaki Tempelo mpe asilisaki misala na yango ya kotonga.
斯ソロモン家を建終れり
15 Alatisaki bamir ya kati ya Tempelo na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, mpe atiaki mabaya ya sipele na mabele ya Tempelo.
彼香柏の板を以て家の墻壁の裏面を作れり即ち家の牀板より頂格の墻壁まで木をもて其裏面をはりまた松の板をもて家の牀板をはれり
16 Atongaki na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, etando ya bametele pene zomi kati na Tempelo; abongisaki yango mpo ete ezala Esika-Oyo-Eleki-Bule.
又家の奧に二十キユビトの室を牀板より墻壁まで香柏をもて造れり即ち家の内に至聖所なる神殿を造れり
17 Eteni oyo elekaki monene kati na Tempelo, liboso ete okoma na Esika-Oyo-Eleki-Bule, ezalaki na bametele pene tuku mibale.
家即ち前にある拝殿は四十キユビトなり
18 Batobolaki bililingi na mabaya ya sedele oyo balatisaki na bamir ya kati ya Tempelo, mpo na kotia bilembo oyo ezalaki na lolenge ya bakolokente mpe ya bafololo efungwama; balatisaki kati nyonso ya Tempelo na mabaya ya banzete ya sedele, mpe ata libanga moko te ezalaki komonana.
家の内の香柏は瓠と咲る花を雕刻める者なり皆香柏にして石は見えざりき
19 Salomo abongisaki Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo na kotia Sanduku ya Boyokani ya Yawe.
神殿は彼其處にヱホバの契約の櫃を置んとて家の内の中に設けたり
20 Molayi ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki na bametele pene zomi, mokuse na yango, bametele pene zomi; bongo bosanda na yango, bametele pene zomi. Salomo abambaki kati na yango wolo ya peto; abambaki lisusu wolo na etumbelo oyo basala na mabaya ya banzete ya sedele.
神殿の内は長二十キユビト濶二十キユビト高二十キユビトなり純金をもて之を蔽ひ又香柏の壇を覆へり
21 Salomo abambaki wolo ya peto na kati nyonso ya Tempelo; atiaki basheni ya wolo liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
又ソロモン純金をもて家の内を蔽ひ神殿の前に金の鏈をもて間隔を造り金をもて之を蔽へり
22 Boye, abambaki wolo na kati nyonso ya Tempelo mpe na etumbelo oyo ezalaki liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
又金をもて殘るところなく家を蔽ひ遂に家を飾ることを悉く終たりまた神殿の傍にある壇は皆金をもて蔽へり
23 Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, asalaki na nzete ya olive bililingi mibale ya basheribe: sheribe moko na moko ezalaki na bametele pene mitano na molayi.
神殿の内に橄欖の木をもて二のケルビムを造れり其高十キユビト
24 Lipapu moko ya sheribe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano; kosangisa mapapu nyonso mibale epesaki bametele mitano, kobanda na songe moko kino na songe mosusu.
其ケルブの一の翼は五キユビト又其ケルブの他の翼も五キユビトなり一の翼の末より他の翼の末までは十キユビトあり
25 Molayi ya sheribe ya mibale ezalaki mpe na bametele pene mitano. Bililingi ya basheribe nyonso mibale ezalaki lolenge moko mpe molayi moko.
他のケルブも十キユビトなり其ケルビムは偕に同量同形なり
26 Bosanda ya bililingi nyonso mibale ya basheribe ezalaki ndenge moko: bametele pene mitano.
此ケルブの高十キユビト彼ケルブも亦しかり
27 Salomo atiaki bililingi ya basheribe yango na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule kati na Tempelo. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama: lipapu moko ya sheribe ya liboso etutaki mir, mpe lipapu mosusu ya sheribe ya mibale etutaki mir mosusu; mpe mapapu na bango mibale mosusu etutanaki na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
ソロモン家の内の中にケルビムを置ゑケルビムの翼を展しければ此ケルブの翼は此墻壁に及び彼ケルブの翼は彼の墻壁に及びて其兩翼家の中にて相接れり
28 Salomo abambaki basheribe yango wolo.
彼金をもてケルビムを蔽へり
29 Atobolaki na bamir oyo ezingelaki Tempelo, ezala na kati to na libanda, bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.
家の周圍の墻壁には皆内外ともにケルビムと棕櫚と咲る花の形を雕み
30 Abambaki lisusu wolo na se ya Tempelo, ezala na kati to na libanda ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
家の牀板には内外ともに金を蔽へり
31 Salomo asalaki na mabaya ya banzete ya olive, na ekotelo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, ekuke moko ya bizipelo mibale: monene ya kadre ya mabaya ya ekuke ezwaki ndambo moko kati na bandambo mitano ya mokuse ya mir.
神殿の入口には橄欖の木の戸を造れり其木匡の門柱は五分の一なり
32 Atobolaki bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama na bizipelo nyonso mibale oyo basalaki na mabaya ya banzete ya olive; abambaki wolo oyo balekisa na moto na bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.
其二の扉も亦橄欖の木なりソロモン其上にケルビムと棕櫚と咲る花の形を雕刻み金をもて蔽へり即ちケルビムと棕櫚の上に金を鍍たり
33 Asalaki mpe ndenge moko mpo na ekotelo ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene: kadre na mabaya ya banzete ya olive, bizipelo mibale na mabaya ya banzete ya sipele. Monene na yango ezwaki ndambo moko kati na bandambo minei ya mokuse ya mir.
斯ソロモン亦拝殿の戸のために橄欖の木の門柱を造れり即ち四分の一なり
34 Asalaki lisusu na mabaya ya sipele bizipelo mibale; ezipelo ya liboso ezalaki na biteni ya mabaya mibale oyo ebalukaka, mpe ezipelo ya mibale ezalaki na barido mibale oyo ebalukaka.
其二の戸は松の木にして此戸の兩扉は摺むべく彼戸の兩扉も摺むべし
35 Atobolaki likolo na yango bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama; mpe abambaki yango wolo na kolanda bandelo ya bililingi yango.
ソロモン其上にケルビムと棕櫚と咲る花を雕刻み金をもてこれを蔽ひて善く其雕工に適はしむ
36 Salomo azingelaki lopango ya kati na mir oyo batonga na milongo misato ya mabanga bakata mpe bamatisa moko likolo ya mosusu, mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
また鑿石三層と香柏の厚板一層をもて内庭を造れり
37 Moboko ya Tempelo ya Yawe etiamaki na mobu ya minei, na sanza ya Zivi.
第四年のジフの月にヱホバの家の基礎を築き
38 Basilisaki kotonga Tempelo ya Yawe elongo na biteni na yango nyonso na sanza ya Buli oyo ezali sanza ya mwambe, na mobu ya zomi na moko. Salomo asalaki mibu sambo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe.
第十一年のブルの月即ち八月に凡て其箇條のごとく其定例のごとくに家成りぬ斯ソロモン之に建るに七年を渉れり