< 1 Bakonzi 4 >
1 Mokonzi Salomo akonzaki Isalaele mobimba.
So King Solomon ruled over Israel,
2 Tala bakambi oyo bazalaki kosala na ye elongo: Azaria, koko ya Nganga-Nzambe Tsadoki;
and these were his chief officials: Azariah son of Zadok was the priest;
3 Eliyorefi mpe Ayiya, bana mibali ya Shisha, bazalaki bakomi mikanda; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda;
Elihoreph and Ahijah, the sons of Shisha, were secretaries; Jehoshaphat son of Ahilud was the recorder;
4 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki mokonzi ya mampinga; Tsadoki mpe Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe;
Benaiah son of Jehoiada was in charge of the army; Zadok and Abiathar were priests;
5 Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi; Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi;
Azariah son of Nathan was in charge of the governors; Zabud son of Nathan was a priest and adviser to the king;
6 Ayishari, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Adonirami, mwana mobali ya Abida, azalaki mokengeli bato ya misala makasi.
Ahishar was in charge of the palace; and Adoniram son of Abda was in charge of the forced labor.
7 Kati na Isalaele mobimba, Salomo atiaki mpe bayangeli zomi na mibale ya bituka, oyo bazalaki na mokumba ya komema biloko mpo na mokonzi mpe mpo na ndako na ye. Moyangeli moko na moko asengelaki kopesa biloko mpo na sanza moko na mobu.
Solomon had twelve governors over all Israel to provide food for the king and his household. Each one would arrange provisions for one month of the year,
8 Tala bakombo na bango: Beni-Uri: moyangeli ya etuka ya bangomba ya Efrayimi;
and these were their names: Ben-hur in the hill country of Ephraim;
9 Beni-Dekeri: moyangeli ya Makatsi, Shaalibimi, Beti-Shemeshi, Eloni mpe Beti-Anani;
Ben-deker in Makaz, in Shaalbim, in Beth-shemesh, and in Elon-beth-hanan;
10 Beni-Esedi: moyangeli ya Aruboti (Soko mpe mokili mobimba ya Eferi);
Ben-hesed in Arubboth (Socoh and all the land of Hepher belonged to him);
11 Beni-Abinadabi: moyangeli ya Dori; abalaki Tafati, mwana mwasi ya Salomo;
Ben-abinadab in Naphath-dor (Taphath, a daughter of Solomon, was his wife);
12 Baana, mwana mobali ya Ayiludi: moyangeli ya Taanaki, Megido mpe Beti-Sheani mobimba, pembeni ya Tsaritani, na se ya Jizireyeli, wuta na Beti-Sheani, na Abele-Meola mpe koleka Yokimeami;
Baana son of Ahilud in Taanach, in Megiddo, and in all of Beth-shean next to Zarethan below Jezreel, from Beth-shean to Abel-meholah and on past Jokmeam;
13 Beni-Geberi: azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze.
Ben-geber in Ramoth-gilead (the villages of Jair son of Manasseh in Gilead belonged to him, as well as the region of Argob in Bashan with its sixty great cities with walls and bronze bars);
14 Ayinadabi, mwana mobali ya Ido: moyangeli ya Maanayimi;
Ahinadab son of Iddo in Mahanaim;
15 Ayimaatsi: moyangeli ya Nefitali. Ye mpe abalaki Basimati, mwana mwasi ya Salomo.
Ahimaaz in Naphtali (he had married Basemath, a daughter of Solomon);
16 Baana, mwana mobali ya Ushayi: moyangeli ya Aseri mpe ya Bealoti;
Baana son of Hushai in Asher and in Aloth;
17 Jozafati, mwana mobali ya Paruya: moyangeli ya Isakari;
Jehoshaphat son of Paruah in Issachar;
18 Shimei, mwana mobali ya Ela: moyangeli ya Benjame.
Shimei son of Ela in Benjamin;
19 Geberi, mwana mobali ya Uri: moyangeli ya Galadi (mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori; mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani). Mpe na likolo ya bayangeli nyonso, ezalaki na moyangeli moko oyo azalaki kokamba bango.
Geber son of Uri in the land of Gilead, including the territories of Sihon king of the Amorites and of Og king of Bashan. There was also one governor in the land of Judah.
20 Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo.
The people of Judah and Israel were as numerous as the sand on the seashore, and they were eating and drinking and rejoicing.
21 Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye.
And Solomon reigned over all the kingdoms from the Euphrates to the land of the Philistines, as far as the border of Egypt. These kingdoms offered tribute and served Solomon all the days of his life.
22 Tala bilei ya Salomo ya mokolo na mokolo: bakilo nkoto libwa ya semule mpe bakilo nkoto zomi na mwambe ya farine,
Solomon’s provisions for a single day were thirty cors of fine flour, sixty cors of meal,
23 bangombe zomi ya mafuta, bangombe tuku mibale ya esobe, bameme mpe bantaba nkama moko, bakisa bamboloko, bambuli, bankayi mpe bandeke ya mafuta.
ten fat oxen, twenty range oxen, and a hundred sheep, as well as deer, gazelles, roebucks, and fattened poultry.
24 Azalaki kokonza bikolo nyonso na ngambo ya weste ya Efrate, kobanda na Tifisa kino na Gaza, elongo na bakonzi nyonso ya ngambo yango; mpe azalaki na kimia elongo na bikolo nyonso ya zingazinga.
For Solomon had dominion over everything west of the Euphrates —over all the kingdoms from Tiphsah to Gaza—and he had peace on all sides.
25 Na mikolo nyonso ya bomoi ya Salomo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele, kobanda na Dani kino na Beri-Sheba, bazalaki na kimia, moto na moto azalaki kovanda na se ya banzete na ye ya vino mpe ya figi.
Throughout the days of Solomon, Judah and Israel dwelt securely from Dan to Beersheba, each man under his own vine and his own fig tree.
26 Salomo azalaki na mapango nkoto minei ya bampunda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale.
Solomon had 4,000 stalls for his chariot horses and 12,000 horses.
27 Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga.
Each month the governors in turn provided food for King Solomon and all who came to his table. They saw to it that nothing was lacking.
28 Bazalaki mpe komema bambuma ya orje mpe matiti mpo na bampunda, ndenge mobateli biloko ya mokonzi azalaki kokatela bango.
Each one also brought to the required place their quotas of barley and straw for the chariot horses and other horses.
29 Nzambe apesaki Salomo bwanya, boyebi mingi, mpe mayele ya kososola makambo mingi, ata ezali ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene.
And God gave Solomon wisdom, exceedingly deep insight, and understanding beyond measure, like the sand on the seashore.
30 Bwanya ya Salomo ezalaki makasi koleka bwanya ya bato nyonso ya ngambo ya este mpe ya Ejipito.
Solomon’s wisdom was greater than that of all the men of the East, greater than all the wisdom of Egypt.
31 Azalaki na bwanya koleka bato nyonso; koleka ata Etani, moto ya Ezera; Emani, Kalikoli mpe Darida, bana mibali ya Maoli. Boye, sango na ye epanzanaki kati na bikolo nyonso ya zingazinga.
He was wiser than all men—wiser than Ethan the Ezrahite, and wiser than Heman, Calcol, and Darda, the sons of Mahol. And his fame spread throughout the surrounding nations.
32 Asalaki masese nkoto misato mpe banzembo nkoto moko na mitano.
Solomon composed three thousand proverbs, and his songs numbered a thousand and five.
33 Alobaki na tina na banzete, kobanda na nzete ya sedele ya Libani kino na nzete ya izope oyo ebimaka na mir; azalaki mpe koloba na tina na banyama mpe bandeke, na tina na bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe na tina na bambisi ya mayi.
He spoke of trees, from the cedar in Lebanon to the hyssop growing in the wall, and he taught about animals, birds, reptiles, and fish.
34 Bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili, oyo bazalaki koyoka sango ya bwanya ya Salomo, bazalaki kotinda bato, wuta na bikolo na bango, mpo na kokende koyoka bwanya na ye.
So men of all nations came to listen to Solomon’s wisdom, sent by all the kings of the earth, who had heard of his wisdom.