< 1 Bakonzi 3 >
1 Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi.
Later, Solomon formed an alliance with Pharaoh king of Egypt by marrying his daughter. Solomon brought her to the City of David until he had finished building his palace and the house of the LORD, as well as the wall around Jerusalem.
2 Na tango wana, bato bazalaki kotumba mbeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, pamba te ezalaki nanu na tempelo moko te oyo etongamaki mpo na Kombo na Yawe.
The people, however, were still sacrificing on the high places because a house for the Name of the LORD had not yet been built.
3 Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba.
And Solomon loved the LORD and walked in the statutes of his father David, except that he sacrificed and burned incense on the high places.
4 Mokonzi akendeki na Gabaoni mpo na kobonza mbeka, pamba te ezalaki esambelo ya likolo ya ngomba oyo elekaki motuya, mpe kuna, Salomo abonzaki bambeka ya kotumba nkoto moko, na etumbelo wana.
Now the king went to Gibeon to sacrifice there, for it was the great high place. Solomon offered a thousand burnt offerings on the altar there.
5 Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye: — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.
One night at Gibeon the LORD appeared to Solomon in a dream, and God said, “Ask, and I will give it to you!”
6 Salomo azongisaki: — Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi.
Solomon replied, “You have shown much loving devotion to Your servant, my father David, because he walked before You in faithfulness, righteousness, and uprightness of heart. And You have maintained this loving devotion by giving him a son to sit on his throne this very day.
7 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo.
And now, O LORD my God, You have made Your servant king in my father David’s place. But I am only a little child, not knowing how to go out or come in.
8 Mowumbu na Yo azali awa kati na bato oyo oponi: bato ebele oyo bakoki kotanga motango na bango te mpo ete bazali ebele penza.
Your servant is here among the people You have chosen, a people too numerous to count or number.
9 Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo?
Therefore give Your servant an understanding heart to judge Your people and to discern between good and evil. For who is able to govern this great people of Yours?”
10 Nkolo asepelaki na likambo oyo Salomo asengaki.
Now it pleased the Lord that Solomon had made this request.
11 Nzambe alobaki na ye: — Lokola osengi bwanya, kasi osengi bomoi molayi te to bomengo mpo na yo moko te; lokola osengi kufa ya banguna na yo te, kasi osengi bwanya mpo na kokata makambo na bosembo,
So God said to him, “Since you have asked for this instead of requesting long life or wealth for yourself or death for your enemies—but you have asked for discernment to administer justice—
12 nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.
behold, I will do what you have asked. I will give you a wise and discerning heart, so that there has never been nor will ever be another like you.
13 Nakopesa yo lisusu oyo osengi te: bomengo mpe lokumu. Na bongo, na bomoi na yo mobimba, mokonzi moko te akokokana na yo.
Moreover, I will give you what you did not request—both riches and honor—so that during all your days no man in any kingdom will be your equal.
14 Mpe soki otamboli na banzela na Ngai, otosi malako mpe mitindo na Ngai ndenge tata na yo, Davidi, asalaki, nakopesa yo bomoi molayi.
So if you walk in My ways and keep My statutes and commandments, just as your father David did, I will prolong your days.”
15 Salomo alamukaki mpe asosolaki ete ezalaki ndoto. Azongaki na Yelusalemi, atelemaki liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani; mpe asalisaki feti monene elongo na basali na ye nyonso.
Then Solomon awoke, and indeed it had been a dream. So he returned to Jerusalem, stood before the ark of the covenant of the Lord, and offered burnt offerings and peace offerings. Then he held a feast for all his servants.
16 Basi ya ndumba mibale bayaki epai ya mokonzi mpe batelemaki liboso na ye.
At that time two prostitutes came to the king and stood before him.
17 Moko na bango alobaki: — Nabondeli yo, nkolo na ngai, yoka ngai! Ngai mpe mwasi oyo, tovandaka ndako moko. Tozalaki na ye na ndako tango nabotaki mwana.
One woman said, “Please, my lord, this woman and I live in the same house, and I gave birth while she was in the house.
18 Na mokolo ya misato sima na mbotama ya mwana na ngai, mwasi oyo mpe abotaki. Tozalaki kaka biso moko kati na ndako, moto mosusu azalaki te, kaka biso mibale.
On the third day after I gave birth, this woman also had a baby. We were alone, with no one in the house but the two of us.
19 Nzokande, na butu, alalelaki mwana na ye, mpe mwana yango akufaki.
During the night this woman’s son died because she rolled over on him.
20 Bongo, na kati-kati ya butu, alamukaki, alongolaki mwana na ngai pembeni na ngai, wana ngai, mwasi mowumbu na yo, nazalaki ya kolala, mpe atiaki ye na tolo na ye; mpe atiaki mwana na ye, oyo akufaki, na tolo na ngai.
So she got up in the middle of the night and took my son from my side while I was asleep. She laid him in her bosom and put her dead son at my bosom.
21 Na tongo, tango nalamuki mpo na komelisa mwana na ngai mabele, namoni ete mwana azali ya kokufa. Kasi tango natali ye penza malamu, kaka na tongo yango, namoni ete ezali mwana na ngai te, oyo ngai nabotaki!
The next morning, when I got up to nurse my son, I discovered he was dead. But when I examined him, I realized that he was not the son I had borne.”
22 Mwasi mosusu alobaki: — Te, ezali lokuta! Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi oyo akufi azali mwana na yo! Kasi mwasi oyo azwaki maloba liboso alobaki lisusu: — Te! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi oyo ya bomoi azali nde mwana na ngai! Na bongo, bakomaki koswana liboso ya mokonzi.
“No,” said the other woman, “the living one is my son and the dead one is your son.” But the first woman insisted, “No, the dead one is yours and the living one is mine.” So they argued before the king.
23 Mokonzi alobaki: — Moko azali koloba: « Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi mwana ya kokufa azali nde mwana na yo! » Wana mosusu azali mpe koloba: « Te! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi mwana ya bomoi azali nde mwana na ngai! »
Then the king replied, “This woman says, ‘My son is alive and yours is dead,’ but that woman says, ‘No, your son is dead and mine is alive.’”
24 Boye, mokonzi alobaki lisusu: — Bomemela ngai mopanga! Bamemelaki mokonzi mopanga.
The king continued, “Bring me a sword.” So they brought him a sword,
25 Mokonzi apesaki mitindo: — Bokata mwana oyo azali na bomoi na biteni mibale, bopesa eteni moko na mwasi moko; mpe eteni mosusu, na mwasi mosusu.
and the king declared, “Cut the living child in two and give half to one and half to the other.”
26 Mwasi oyo mwana na ye azalaki na bomoi, ayokaki pasi na motema mpo na mwana na ye mpe alobaki na mokonzi: — Nabondeli yo, nkolo na ngai! Pesa ye mwana oyo azali na bomoi, koboma mwana te! Kasi mwasi mosusu alobaki: — Kata ye! Na bongo, akozala ya ngai te, mpe akozala ya ye te!
Then the woman whose son was alive spoke to the king because she yearned with compassion for her son. “Please, my lord,” she said, “give her the living baby. Do not kill him!” But the other woman said, “He will be neither mine nor yours. Cut him in two!”
27 Boye, mokonzi akataki likambo, alobaki: — Boboma mwana te! Bopesa mwana oyo azali na bomoi epai ya mwasi ya liboso, pamba te ye nde azali mama na ye.
Then the king gave his ruling: “Give the living baby to the first woman. By no means should you kill him; she is his mother.”
28 Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.
When all Israel heard of the judgment the king had given, they stood in awe of him, for they saw that the wisdom of God was in him to administer justice.