< 1 Bakonzi 21 >

1 Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari.
Le ɣeyiɣi aɖewo megbe la, nya aɖe va dzɔ ku ɖe Nabɔt, Yezreltɔ ƒe waingble ŋuti. Waingble la nɔ Yezreel eye wòte ɖe Samaria fia, Ahab ƒe fiasã ŋu.
2 Mokolo moko, Akabi alobaki na Naboti: — Pesa ngai elanga na yo ya vino mpo ete nakomisa yango elanga na ngai ya ndunda, pamba te ezali pene ya ndako na ngai; mpe ngai nakopesa yo elanga mosusu ya vino oyo eleki kitoko na esika ya elanga na yo; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango.
Gbe ɖeka la, Fia Ahab bia Nabɔt be wòadzra anyigba la na ye. Fia la ɖe eme nɛ be, “Medi be mawɔ abɔ aɖe ɖe anyigba sia dzi elabena ete ɖe nye fiasã la ŋu. Egblɔ be yeaxe ga ɖe eta gake ne elɔ̃ la, yeatsɔ anyigba bubu si nyo wu etɔ la aɖo eteƒe nɛ.”
3 Kasi Naboti azongiselaki Akabi: — Na Kombo na Yawe, nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai.
Ke Nabɔt ɖo eŋu be, “Anyigba sia nye tɔgbuinyigba na mí. Naneke mana maɖe asi le eŋu na wò o.”
4 Akabi azongaki epai na ye na mawa mpe na kanda mpo na maloba oyo Naboti, moto ya Jizireyeli, ayebisaki ye: « Nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai. » Alalaki na mbeto na ye, atalisaki elongi na ye na mir mpe aboyaki kolia.
Ale Ahab tsɔ dɔmedzoe kple moyɔyɔ trɔ yi eƒe fiasã me. Egbe nuɖuɖu, eye wòɖamlɔ anyi hetrɔ mo ɖo ɖe gli ŋu!
5 Mwasi na ye, Jezabeli, ayaki epai na ye mpe atunaki ye: — Mpo na nini ozali na mawa mpe oboyi kolia?
Srɔ̃a, Yezebel biae be, “Nya kae dzɔ ɖe dziwò? Nu kae na nètɔtɔ eye nèdo dɔmedzoe ale?”
6 Akabi azongiselaki ye: — Ezali mpo ete tango nawuti epai ya Naboti ya Jizireyeli mpe nalobi na ye: « Tekela ngai elanga na yo ya vino; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. » Kasi ye azongiseli ngai: « Nakoki te kopesa yo elanga na ngai ya vino. »
Ahab ɖo eŋu nɛ be, “Mebia Nabɔt be wòadzra eƒe anyigba nam alo wòaɖɔ lii kple tɔnye aɖe, ke egbe!”
7 Bongo mwasi na ye, Jezabeli, alobaki na ye: — Boni, ezali yo nde ozali mokonzi ya Isalaele to te? Lamuka! Lia mpe sepela! Nakopesa yo elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli.
Yezebel biae be, “Wòe nye Israel fia loo alo menye wòe o? Fɔ, nàɖu nu, mègatsi dzimaɖeɖi le nya sia ŋu kura o. Maxɔ Nabɔt ƒe waingble la na wò bɔbɔe!”
8 Boye, Jezabeli akomaki mikanda na kombo ya Akabi, atiaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango epai ya bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti.
Ale Yezebel ŋlɔ agbalẽwo ɖe Fia Ahab ƒe ŋkɔ me, tre enu kple Ahab ƒe ŋkɔsigɛ eye wòɖo wo ɖe Yezreel ƒe dumegã siwo nɔ teƒe ɖeka kple Nabɔt.
9 Tala makambo oyo akomaki na mikanda yango: « Bobongisa mokolo moko ya kokila bilei mpe bobengisa bato na mayangani epai wapi bokotia Naboti na esika ya liboso.
Eɖe gbe na wo le agbalẽawo me be, “Miƒo ƒu dua me tɔwo hena nutsitsidɔ kple gbedodoɖa. Emegbe la, miayɔ Nabɔt
10 Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo: ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »
eye miadi ame vlo eve siwo aka aʋatso ɖe Nabɔt si, atso enu be eƒo fi de Mawu kple fia la. Ekema miakplɔe do goe le dua me eye miaƒu kpee wòaku.”
11 Boye, bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti batosaki mitindo oyo Jezabeli apesaki bango na nzela na mikanda.
Dumegãwo kple bubume siwo le dua me la wɔ nu si Yezebel ŋlɔ ɖo ɖa wo be woawɔ la.
12 Babongisaki mokolo ya kokila bilei mpe bavandisaki Naboti na esika ya liboso kati na bato.
Woƒo ƒu ameawo eye wodrɔ̃ ʋɔnu Nabɔt.
13 Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo: « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.
Ame eve aɖe siwo si dzitsinya nyui menɔ o la ka aʋatso ɖe Nabɔt si be eƒo fi de Mawu kple fia la. Ale wohee yi dua godo eye woƒu kpee wòku.
14 Bongo bampaka mpe bankumu batindaki maloba oyo epai ya Jezabeli: « Basili koboma Naboti na mabanga. »
Le esia megbe la, dumegãwo ɖo du ɖe Yezebel be Nabɔt ku.
15 Tango Jezabeli ayokaki ete babomi Naboti na mabanga, alobaki na Akabi: « Telema, kende kokamata elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli, elanga oyo aboyaki kotekela yo, pamba te Naboti azali lisusu na bomoi te, asili kokufa. »
Esi Yezebel se be Nabɔt ku la, egblɔ na Ahab be, “Waingble si Nabɔt gbe be yemadzra na wò o la, fifia àte ŋu axɔe azɔ; Nabɔt ku!”
16 Tango kaka Akabi ayokaki ete Naboti, moto ya Jizireyeli, asili kokufa, atelemaki mpe akendeki kokamata elanga ya vino ya Naboti.
Ale Ahab yi waingble la me be yeaxɔe wòazu ye tɔ.
17 Bongo Yawe alobaki na Eliya, moto ya Tishibe, maloba oyo:
Ke Yehowa gblɔ na Eliya, Tisbitɔ be,
18 « Kende kokutana na Akabi, mokonzi ya Isalaele, oyo azali kokonza wuta na Samari. Na ngonga oyo, azali kati na elanga ya vino ya Naboti epai wapi akendeki mpo na kokamata yango.
“Yi Fia Ahab gbɔ le Samaria. Anɔ Nabɔt ƒe wainbɔ me, axɔe abe etɔe ene.
19 Okoyebisa ye makambo oyo: Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te? › Okobakisa lisusu: ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi: Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › »
Gblɔ nye nya siawo nɛ be, ‘Nabɔt wuwu mesɔ gbɔ na wò oa? Ɖe wòle be nàda adzoe hã? Esi nèwɔ esia ta la, avuwo ano wò ʋu le dua godo abe ale si wono Nabɔt tɔ ene!’”
20 Tango Akabi amonaki Eliya, alobaki: — Ah, monguna na ngai, omoni ngai kaka! Eliya azongisaki: — Solo, namoni yo; pamba te omitekaki yo moko mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe.
Ahab gblɔ na Eliya be, “Oo nye futɔ, èke ɖe ŋunye!” Eliya ɖo eŋu nɛ be, “Meke ɖe ŋuwò elabena ètsɔ ɖokuiwò dzra na nu vɔ̃ɖi wɔwɔ le Yehowa ŋkume.
21 Boye, tala makambo oyo Yawe alobi: « Nakotindela yo pasi ya makasi. Nakokombola bakitani na yo mpe nakolongola epai ya Akabi mwana mobali nyonso ya libota na yo: azala mowumbu to monsomi kati na Isalaele.
Mahe dzɔgbevɔ̃e ava dziwò, matsrɔ̃ wò dzidzimeviwo eye maɖe ŋutsu ɖe sia ɖe ɖa le Ahab ŋu le Israel, eɖanye ablɔɖevi alo kluvi o.
22 Nakokomisa ndako na yo lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe lokola ndako ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya; pamba te opesi Ngai kanda mpe osali ete Isalaele asala masumu. »
Mawɔ wò aƒe abe Yeroboam, Nebat ƒe vi tɔ ene eye abe Baasa, Ahiya ƒe vi tɔ ene elabena èdo dziku nam eye nèna Israel ge ɖe nu vɔ̃ me.
23 Tala lisusu makambo oyo Yawe alobi na tina na Jezabeli: « Bambwa ekolia Jezabeli pene ya mir ya Jizireyeli.
“Azɔ la, Yehowa gblɔ nam ku ɖe Yezebel ŋuti be, ‘Avuwo aɖu Yezebel ƒe kukua le Yezreel ƒe gliwo gbɔ.’
24 Moto nyonso ya libota ya Akabi oyo akokufa kati na engumba, bambwa ekolia ye; mpe oyo nyonso akokufa na zamba, bandeke ya likolo ekotobola-tobola ye. »
“Avuwo aɖu Ahab ƒe aƒemetɔ siwo aku ɖe dua me eye dziƒoxeviwo aɖu esiwo aku ɖe gbedzi.”
25 Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.
Ame aɖeke meganɔ anyi kpɔ abe Ahab ene, ame si tsɔ eɖokui dzra na nu vɔ̃ɖi wɔwɔ le Yehowa ŋkume o elabena srɔ̃a Yezebel ye do ŋusẽe.
26 Asalaki makambo ya nkele koleka na kosambela banzambe ya bikeko ndenge bato ya Amori oyo Yawe abenganaki liboso ya Isalaele bazalaki kosala.
Ewɔ ŋunyɔnu geɖewo to legbawo yomedzedze me abe Amoritɔ siwo Yehowa nya le Israel ŋgɔ la ene.
27 Tango Akabi ayokaki makambo oyo, apasolaki bilamba na ye, alataki bilamba ya saki mpe akilaki bilei. Azalaki kolala na bilamba ya saki mpe azalaki kotambola malembe-malembe.
Esi Ahab se nya siawo la, edze eƒe awuwo heta akpanya eye wotsi nu dɔ. Enɔ akpanya me henɔ yiyim nublanuitɔe.
28 Bongo Yawe alobaki lisusu na Eliya, moto ya Tishibe:
Tete Yehowa ƒe gbe va na Eliya, Tisbitɔ la be,
29 « Omoni ndenge nini Akabi amikitisi liboso na Ngai? Lokola amikitisi liboso na ngai, nakoyeisa pasi te wana ye akozala nanu na bomoi; kasi nakotinda pasi yango na tango mwana na ye ya mobali akozala na bokonzi. »
“Èkpɔ ale si Ahab bɔbɔ eɖokui le ŋkunye mea? Esi wòbɔbɔ eɖokui ta la, nyemahe dzɔgbevɔ̃e la vɛ le eƒe ŋkekewo me o, ke boŋ mahee va eƒe aƒe dzi le via ƒe ŋkekewo me.”

< 1 Bakonzi 21 >