< 1 Bakonzi 20 >
1 Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso elongo na bakonzi tuku misato na mibale na bampunda mpe bashar; akendeki kozingela Samari mpe abundisaki yango.
スリアの王ベネハダデ其軍勢を悉く集む王三十二人彼と偕にあり又馬と戰車とあり乃ち上りてサマリアを圍み之を攻む
2 Atindaki bantoma kati na engumba epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele
彼使をイスラエルの王アハブに遣し邑に至りて彼に言しめけるはベネハダデ斯言ふ
3 na maloba oyo: — Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi: « Palata mpe wolo na yo ezali ya ngai; basi na yo mpe bana mibali na yo, oyo baleki kitoko bazali ya ngai. »
爾の金銀は我の所有なり亦爾の妻等と爾の子等の美秀者は我の所有なり
4 Mokonzi ya Isalaele azongisaki: — Ezali ndenge kaka olobi, mokonzi, nkolo na ngai; ngai mpe nyonso oyo nazali na yango ezali ya yo.
イスラエルの王答へて言けるは王わが主よ爾の言の如く我と我が有つ者は皆爾の所有なり
5 Bantoma bazongaki lisusu mpe balobaki: — Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi: « Napesaki yo mitindo ete opesa ngai palata na yo, wolo na yo, basi na yo mpe bana na yo ya mibali.
使者再び來りて言けるはベネハダデ斯語て言ふ我爾に爾我に爾の金銀妻子を付すべしと言遣れり
6 Kasi yeba malamu ete lobi, na ngonga oyo, nakotinda basali na ngai mpo na kotala malamu-malamu ndako na yo mpe bandako ya basali na yo. Bakozwa nyonso ya motuya na miso na yo mpe bakomema yango. »
然ど明日今頃我が僕を爾に遣さん彼等爾の家と爾の臣僕の家を探索りて凡て爾の日に好ましく見ゆる者を其手に置て取り去るべしと
7 Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango: — Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te.
是においてイスラエルの王國の長老を皆召て言けるは請ふ爾等見て此人の害をなさんと求るを知れ彼人を我に遣りて我が妻子とわが金銀を索めたり而るに我之を謝絶ざりしと
8 Bampaka mpe bato nyonso balobaki na ye: — Koyokela ye te mpe kondima bisengeli na ye te.
諸の長老および民皆彼に言けるは爾聽なかれ許すなかれと
9 Boye Akabi azongisaki epai ya bantoma ya Beni-Adadi: — Boloba na mokonzi, nkolo na ngai: « Mosali na yo akosala nyonso oyo osengaki liboso; kasi na oyo ya mibale, nakosala yango te. » Bazongaki mpe bamemaki eyano epai ya Beni-Adadi.
是故に彼ベネハダデの使者に言けるは王わが主に告よ爾が最初に僕に言つかはしたる事は皆我爲べし然ど比事は我爲あたはずと使者往て反命をなせり
10 Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi: — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.
ベネハダデ彼に言つかはしけるは神等我に斯なし亦重て斯なしたまへサマリアの塵は我に從ふ諸の民の手に滿るに足ざるべしと
11 Mokonzi ya Isalaele azongisaki: — Boloba na ye: « Moto oyo alati bibundeli asengeli komikumisa te lokola moto oyo alongoli bibundeli! »
イスラエルの王答へて帶る者は解く者の如く誇るべからずと告よと言り
12 Beni-Adadi ayokaki sango yango tango ye elongo na bakonzi bazalaki komela na bandako ya kapo. Apesaki mitindo epai ya bato na ye: — Bomibongisa mpo na etumba. Boye, bamibongisaki mpo na kobundisa engumba.
ベネハダデ天幕にありて王等と飮ゐたりしが此事を聞て其臣僕に言けるは爾等陣列を爲せと即ち邑に向ひて陣列をなせり
13 Na tango wana kaka, mosakoli moko ayaki epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpe alobaki na ye: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Ozali komona mampinga monene oyo? Nakopesa yango lelo na maboko na yo, bongo okoyeba ete nazali Yawe. »
時に一人の預言者イスラエルの王アハブの許に至りて言けるはヱホバ斯言たまふ爾此諸の大軍を見るや視よ我今日之を爾の手に付さん爾は我がヱホバなるを知にいたらんと
14 Akabi atunaki: — Kasi nani akosala yango? Mosakoli azongisaki: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike nde bakosala yango. » Akabi atunaki: — Nani akobanda etumba? Mosakoli azongisaki: — Ezali yo nde moto okobanda.
アハブ言けるは誰を以てせんか彼いひけるはヱホバ斯いひたまふ諸省の牧伯の少者を以てすべしアハブ言ふ誰か戰爭を始むべき彼答けるは爾なりと
15 Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki: bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo.
アハブ乃ち諸省の牧伯の少者を核るに二百三十二人あり次に凡の民即ちイスラエルの凡の子孫を核るに七千人あり
16 Babimaki na midi na tango Beni-Adadi elongo na bakonzi tuku misato na mibale, oyo bazalaki na ngambo na ye, bazalaki kolangwa masanga na bandako na bango ya kapo.
彼等日中出たちたりしがベネハダデは天幕にて王等即ち己を助る三十二人の王等とともに飮て酔居たり
17 Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki bato ya liboso. Nzokande Beni-Adadi azwaki sango epai ya banongi na ye oyo balobaki na ye: — Bato bazali kopusana wuta na engumba Samari.
諸省の牧伯の少者等先に出たりベネハダデ人を出すにサマリアより人衆出來ると彼に告ければ
18 Beni-Adadi alobaki: — Soki bayei mpo na kimia, bakanga bango ya bomoi; kasi soki mpe bayei mpo na bitumba, kokanga bango ya bomoi.
彼言けるは和睦のために出來るも之を生擒べし又戰爭のために出來るも之を生擒べしと
19 Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki na engumba elongo na mampinga sima na bango.
諸省の牧伯の是等の少者および之に從ふ軍勢邑より出きたり
20 Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar.
各其敵手を撃ち殺しければスリア人逃たりイスラエル之を追ふスリアの王ベネハダデは馬に乗り騎兵を從へて逃遁たり
21 Mokonzi ya Isalaele apusanaki, abebisaki bampunda elongo na bashar mpe alongaki bato ya Siri na elonga monene.
イスラエルの王出て馬と戰車を撃ち又大にスリア人を撃殺せり
22 Sima na yango, mosakoli ayaki epai ya mokonzi ya Isalaele mpe alobaki: — Lendisa basoda na yo mpe tala nini okoki kosala, pamba te na mobu oyo ekoya, mokonzi ya Siri akoya kobundisa yo lisusu.
茲に彼預言者イスラエルの王の許に詣て彼に言けるは往て爾の力を養ひ爾の爲すべき事を知り辨ふべし年歸らばスリアの王爾に攻上るべければなりと
23 Na tango wana bakalaka ya mokonzi ya Siri bapesaki ye toli: « Banzambe na bango bazali banzambe ya bangomba. Yango wana balekaki biso na makasi, kasi soki tobundi na bango na bitando, tokoleka bango solo na makasi.
スリアの王の臣僕王に言けるは彼等の神等は山崗の神なるが故に彼等は我等よりも強かりしなり然ども我等若平地に於て彼等と戰はば必ず彼等よりも強かるべし
24 Sala boye: longola bakonzi nyonso na bisika na bango mpe tia bakonzi mosusu ya basoda na bisika ya bato oyo ya liboso.
但し此事を爲せ即ち王等を除きて各其處を離しめ方伯を置て之に代べし
25 Osengeli mpe lisusu kobongisa mampinga lokola oyo owutaki kobungisa: mpunda mpo na mpunda, shar mpo na shar, mpo ete tokoka kobundisa Isalaele na etando. Solo, tokoleka bango na makasi. » Beni-Adadi ayokaki bango mpe asalaki bongo.
又爾の失ひたる軍勢に均き軍勢を爾のために備へ馬は馬戰車は戰車をもて補ふべし斯して我儕平地において彼等と戰はば必ず彼等よりも強かるべしと彼其言を聽いれて然なせり
26 Na mobu oyo elandaki, Beni-Adadi asangisaki mampinga na ye ya Siri mpe amataki na Afeki mpo na kobundisa Isalaele.
年かへるに及びてベネハダデ、スリア人を核めてアペクに上りイスラエルと戰はんとす
27 Akabi mpe na ngambo na ye, asangisaki bato ya Isalaele mpe apesaki bango bibundeli; boye babimaki mpo na kobundisa bato ya Siri. Bato ya Isalaele batongaki milako oyo ezalaki kotalana na bato ya Siri. Mampinga na bango ezalaki lokola bitonga mibale ya mike ya bantaba wana bato ya Siri batondaki na etando mobimba.
イスラエルの子孫核められ兵糧を受て彼等に出會んとて往けりイスラエルの子孫は山羊の二の小群の如く彼等の前に陣どりしがスリア人は其地に充滿たり
28 Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. »
時に神の人至りてイスラエルの王に告ていひけるはヱホバ斯言たまふスリア人ヱホバは山獄の神にして谿谷の神にあらずと言ふによりて我此諸の大軍を爾の手に付すべし爾等は我がヱホバなるを知に至らんと
29 Mikolo sambo, milako ya mampinga nyonso mibale ezalaki etalana. Na mokolo ya sambo, etumba ebandaki mpe bato ya Isalaele babomaki basoda ya mpiko ya Siri nkoto nkama moko.
彼等七日互に相對て陣どり第七日におよびて戰爭を交接しがイスラエルの子孫一日にスリア人の歩兵十萬人を殺しければ
30 Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo. Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza.
其餘の者はアベクに逃て邑に入ぬ然るに其石垣崩れて其存れる二萬七千人の上にたふれたりベネハダデは逃て邑にいたり奧の間に入ぬ
31 Bakalaka na ye balobaki na ye: — Tala, toyokaki ete bakonzi ya Isalaele bazalaka malamu. Pesa nzela ete tokende epai ya mokonzi ya Isalaele, tolata bilamba ya saki na loketo na biso mpe basinga na mito na biso; tango mosusu bakoki kobikisa bomoi na yo.
其臣僕彼にいひけるは我儕イスラエルの家の王等は仁慈ある王なりと聞り請ふ我儕粗麻布を腰につけ繩を頭につけてイスラエルの王の所にいたらん彼爾の命を生むることあらんと
32 Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye: — Mosali na yo Beni-Adadi abondeli yo ete oboma ye te. Akabi atunaki: — Boni, azali nanu na bomoi? Azali kaka ndeko na ngai.
斯彼等粗麻布を腰にまき繩を頭にまきてイスラエルの王の所にいたりていひけるは爾の僕ベネハダデ請ふ我が生命を生しめたまへと言ふとアハブいひけるは彼は尚生をるや彼はわが兄弟なりと
33 Bantoma ya Beni-Adadi bazwaki eyano yango lokola elembo ya malamu, bakangamaki na maloba wana mpe bagangaki na esengo: — Beni-Adadi azali solo ndeko na yo. Akabi azongisaki: — Bokende kozwa ye. Beni-Adadi abimaki na esika oyo abombamaki mpe ayaki epai ya Akabi, bongo Akabi amatisaki ye na shar na ye.
其人々これを吉兆と爲し速に彼の言を承て爾の兄弟ベネハダデといへり彼言けるは爾等ゆきて彼を導ききたるべしと是においてベネハダデ彼の所に出來りしかば彼之を車に登しめたり
34 Beni-Adadi alobaki: — Bingumba nyonso oyo tata na ngai abotolaki tata na yo, nazongiseli yo yango; okotonga zando na yo na Damasi mpo na koteka biloko na yo ndenge kaka tata na ngai asalaki na Samari. Akabi azongisaki: — Nakotika yo kokende soki nasali boyokani elongo na yo. Akabi asalaki boyokani elongo na Beni-Adadi mpe atikaki ye kozonga epai na ye.
ベネハダデ彼に言けるは我父の爾の父より取たる諸邑は我返すべし又我が父のサマリアに造りたる如く爾ダマスコに於て爾のために街衢を作るべしアハブ言ふ我此契約を以て爾を歸さんと斯彼と契約を爲て彼を歸せり
35 Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe: — Nasengi na yo ete obeta ngai. Kasi moninga na ye aboyaki kobeta ye.
爰に預言者の徒の一人ヱホバの言によりて其同儕に請我を撃てといひけるが其人彼を撃つことを肯ぜざりしかば
36 Bongo alobaki na ye: — Lokola oboyi kotosa Liloba na Yawe, tango kaka okotika ngai, nkosi ekoboma yo. Moninga na ye akendeki, akutanaki na nkosi, mpe ebomaki ye.
彼其人に言ふ汝ヱホバの言を聽ざりしによりて視よ汝の我をはなれて往く時獅子汝をころさんと其人彼の側を離れて往きけるに獅子之に遇て之を殺せり
37 Mwana wana ya basakoli akendeki kokutana na moto mosusu mpe asengaki na ye ete abeta ye. Moto wana abetaki ye makasi mpe azokisaki ye.
彼また他の人に遭て請ふ我を撃といひければ其人之を撃ち撃て傷けたり
38 Mwana ya basakoli amibongolaki na elateli na ye, azipaki elongi na ye na nzela ya eteni ya elamba mpo ete bayeba ye te, mpe akendeki kotelema na nzela oyo mokonzi Akabi akolekela.
預言者往て王を途に待ち其目に掩巾をあてて儀容を變ゐたりしが
39 Tango mokonzi azalaki koleka, mosakoli agangaki: — Mokonzi, wana nazalaki kati na bitumba, moto moko abimaki kati na mampinga mpe amemelaki ngai mokangami ya bitumba. Alobaki na ngai: « Batela moto oyo ete akima te! Soki akimi, okokufa na esika na ye to okofuta ngai palata nkoto misato. »
王の經過る時王に呼はりていひけるは僕戰爭の中に出しに人轉りて一箇の人を我の所に曳きたりて言けるは此人を守れ若彼失ゆく事あらば汝の生命を彼の生命に代べし或は爾銀一タラントを出すべしと
40 Wana mosali na yo azalaki kosala awa, kuna, mokangami yango akimaki. Bongo Akabi, mokonzi ya Isalaele, alobaki: — Etumbu na yo ekozala ndenge kaka olobi.
而るに僕此彼に事をなしゐたれば彼遂に失たりとイスラエルの王彼にいひけるは爾の擬定は然なるべし爾之を決めたり
41 Mbala moko, mosakoli alongolaki eteni ya elamba oyo ezipaki elongi na ye; mpe Akabi, mokonzi ya Isalaele, asosolaki ete moto yango azali moko kati na bana ya basakoli.
彼急ぎて其目の掩巾を取除たればイスラエルの王彼が預言者の一人なるを識り
42 Mosakoli alobaki na mokonzi: — Tala maloba oyo Yawe alobi: « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. »
彼王に言けるはヱホバ斯言たまふ爾はわが殲滅んと定めたる人を爾の手より放ちたれば爾の命は彼の生命に代り爾の民は彼の民に代るべしと
43 Mokonzi ya Isalaele azongaki epai na ye, na Samari, na mawa mpe na kanda.
イスラエルの王憂へ且怒て其家に赴きサマリアに至れり