< 1 Bakonzi 2 >

1 Tango Davidi akomaki pene ya kokufa, apesaki malako oyo epai ya Salomo, mwana na ye ya mobali:
大衛的死期臨近了,就囑咐他兒子所羅門說:
2 — Nalingi kokende na nzela oyo bato nyonso bakendaka. Zala makasi, lakisa ete ozali mobali.
「我現在要走世人必走的路。所以,你當剛強,作大丈夫,
3 Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka: tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende;
遵守耶和華-你上帝所吩咐的,照着摩西律法上所寫的行主的道,謹守他的律例、誡命、典章、法度。這樣,你無論做甚麼事,不拘往何處去,盡都亨通。
4 mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo: « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele.
耶和華必成就向我所應許的話說:『你的子孫若謹慎自己的行為,盡心盡意誠誠實實地行在我面前,就不斷人坐以色列的國位。』
5 Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele: Abineri, mwana mobali ya Neri; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye.
你知道洗魯雅的兒子約押向我所行的,就是殺了以色列的兩個元帥:尼珥的兒子押尼珥和益帖的兒子亞瑪撒。他在太平之時流這二人的血,如在爭戰之時一樣,將這血染了腰間束的帶和腳上穿的鞋。
6 Salela ye kolanda bwanya na yo mpe kotika te ete suki na ye ya pembe ekita na kimia na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
所以你要照你的智慧行,不容他白頭安然下陰間。 (Sheol h7585)
7 Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali.
你當恩待基列人巴西萊的眾子,使他們常與你同席吃飯;因為我躲避你哥哥押沙龍的時候,他們拿食物來迎接我。
8 Mpe yeba ete, elongo na yo, ozali na Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya Benjame, na mboka Bawurimi, oyo alakelaki ngai mabe makasi na mokolo oyo nazalaki kokende na Maanayimi. Tango ayaki kokutana na ngai na Yordani, nalapaki ndayi oyo mpo na ye na Kombo na Yawe: ‹ Nakoboma yo na mopanga te. ›
在你這裏有巴戶琳的便雅憫人,基拉的兒子示每;我往瑪哈念去的那日,他用狠毒的言語咒罵我,後來卻下約旦河迎接我,我就指着耶和華向他起誓說:『我必不用刀殺你。』
9 Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. » (Sheol h7585)
現在你不要以他為無罪。你是聰明人,必知道怎樣待他,使他白頭見殺,流血下到陰間。」 (Sheol h7585)
10 Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi.
大衛與他列祖同睡,葬在大衛城。
11 Davidi akonzaki Isalaele mibu tuku minei: mibu sambo na Ebron, mpe mibu tuku misato na misato na Yelusalemi.
大衛作以色列王四十年:在希伯崙作王七年,在耶路撒冷作王三十三年。
12 Salomo avandaki na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ye, mpe bokonzi na ye elendisamaki.
所羅門坐他父親大衛的位,他的國甚是堅固。
13 Adoniya, mwana mobali ya Agite, akendeki epai ya Batisheba, mama ya Salomo. Batisheba atunaki ye: — Boni, oyei kotala ngai na kimia? Azongisaki: — Iyo, nayei na kimia.
哈及的兒子亞多尼雅去見所羅門的母親拔示巴,拔示巴問他說:「你來是為平安嗎?」回答說:「是為平安」;
14 Abakisaki: — Nazali na likambo moko ya koyebisa yo. Batisheba azongisaki: — Okoki koloba yango.
又說:「我有話對你說。」拔示巴說:「你說吧。」
15 Adoniya alobaki: — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe.
亞多尼雅說:「你知道國原是歸我的,以色列眾人也都仰望我作王,不料,國反歸了我兄弟,因他得國是出乎耶和華。
16 Sik’oyo, nazali na bosenga moko, kopimela ngai yango te. Batisheba alobaki: — Okoki koloba yango.
現在我有一件事求你,望你不要推辭。」拔示巴說:「你說吧。」
17 Adoniya alobaki: — Nabondeli yo, loba na mokonzi Salomo ete apesa ngai Abishagi, moto ya Sunami, mpo ete akoma mwasi na ngai, pamba te mokonzi akoki koboya te koyokela yo.
他說:「求你請所羅門王將書念的女子亞比煞賜我為妻,因他必不推辭你。」
18 Batisheba azongisaki: — Malamu! Ngai moko nakolobela yo epai ya mokonzi.
拔示巴說:「好,我必為你對王提說。」
19 Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi.
於是,拔示巴去見所羅門王,要為亞多尼雅提說;王起來迎接,向她下拜,就坐在位上,吩咐人為王母設一座位,她便坐在王的右邊。
20 Batisheba alobaki: — Nazali na bosenga moko ya moke mpo na koyebisa yo, kasi kopimela ngai yango te. Mokonzi azongisaki: — Loba na yo, mama na ngai; nakopimela yo yango te.
拔示巴說:「我有一件小事求你,望你不要推辭。」王說:「請母親說,我必不推辭。」
21 Batisheba alobaki: — Tika ete Abishagi, moto ya Sunami, akoma mwasi ya Adoniya, ndeko na yo ya mobali.
拔示巴說:「求你將書念的女子亞比煞賜給你哥哥亞多尼雅為妻。」
22 Mokonzi Salomo azongiselaki mama na ye: — Mpo na nini ozali kosenga Abishagi, moto ya Sunami, mpo na Adoniya? Okokaki mpe kosenga bokonzi mpo na ye, mpo ete azali yaya na ngai; ndenge moko mpe mpo na Nganga-Nzambe Abiatari, mpo na Joabi, mwana mobali ya Tseruya!
所羅門王對他母親說:「為何單替他求書念的女子亞比煞呢?也可以為他求國吧!他是我的哥哥,他有祭司亞比亞他和洗魯雅的兒子約押為輔佐。」
23 Bongo, mokonzi Salomo alapaki ndayi na Kombo na Yawe: — Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki Adoniya akufi te mpo na bosenga oyo!
所羅門王就指着耶和華起誓說:「亞多尼雅這話是自己送命,不然,願上帝重重地降罰與我。
24 Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo.
耶和華堅立我,使我坐在父親大衛的位上,照着所應許的話為我建立家室;現在我指着永生的耶和華起誓,亞多尼雅今日必被治死。」
25 Mokonzi Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, kobeta Adoniya; mpe Adoniya akufaki.
於是所羅門王差遣耶何耶大的兒子比拿雅,將亞多尼雅殺死。
26 Mokonzi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari: — Zonga na bilanga na yo, na Anatoti, pamba te osengeli kokufa. Kasi nakoboma yo sik’oyo te, pamba te omemaki Sanduku ya Nkolo Yawe liboso ya Davidi, tata na ngai, mpe okabolaki na ye pasi nyonso.
王對祭司亞比亞他說:「你回亞拿突歸自己的田地去吧!你本是該死的,但因你在我父親大衛面前抬過主耶和華的約櫃,又與我父親同受一切苦難,所以我今日不將你殺死。」
27 Boye, Salomo alongolaki Abiatari na mosala na ye ya Nganga-Nzambe ya Yawe, mpo na kokokisa maloba oyo Yawe alobaki na Silo na tina na libota ya Eli.
所羅門就革除亞比亞他,不許他作耶和華的祭司。這樣,便應驗耶和華在示羅論以利家所說的話。
28 Tango sango ekomaki epai ya Joabi, ye oyo abundelaki Adoniya kasi Abisalomi te, akimaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe asimbaki maseke ya etumbelo.
約押雖然沒有歸從押沙龍,卻歸從了亞多尼雅。他聽見這風聲,就逃到耶和華的帳幕,抓住祭壇的角。
29 Bayebisaki Salomo ete Joabi akei na Ndako ya kapo ya Yawe mpe azali pembeni ya maseke ya etumbelo. Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, ete akende koboma ye.
有人告訴所羅門王說:「約押逃到耶和華的帳幕,現今在祭壇的旁邊。」所羅門就差遣耶何耶大的兒子比拿雅,說:「你去將他殺死。」
30 Benaya akotaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe alobaki na Joabi: — Mokonzi alobi ete obima. Kasi Joabi azongisaki: — Te, nakokufela kaka awa! Benaya azongaki epai ya mokonzi mpo na koyebisa ye eyano ya Joabi.
比拿雅來到耶和華的帳幕,對約押說:「王吩咐說,你出來吧!」他說:「我不出去,我要死在這裏。」比拿雅就去回覆王,說約押如此如此回答我。
31 Mokonzi apesaki ye mitindo: — Sala ndenge alobi; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba.
王說:「你可以照着他的話行,殺死他,將他葬埋,好叫約押流無辜人血的罪不歸我和我的父家了。
32 Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango: Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.
耶和華必使約押流人血的罪歸到他自己的頭上;因為他用刀殺了兩個比他又義又好的人,就是以色列元帥尼珥的兒子押尼珥和猶大元帥益帖的兒子亞瑪撒,我父親大衛卻不知道。
33 Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi.
故此,流這二人血的罪必歸到約押和他後裔的頭上,直到永遠;惟有大衛和他的後裔,並他的家與國,必從耶和華那裏得平安,直到永遠。」
34 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, akendeki kobeta Joabi mpe abomaki ye. Bakundaki ye na ndako na ye moko, kati na esobe.
於是耶何耶大的兒子比拿雅上去,將約押殺死,葬在曠野約押自己的墳墓裏。
35 Mokonzi akomisaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi, mpe atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki na esika ya Abiatari.
王就立耶何耶大的兒子比拿雅作元帥,代替約押,又使祭司撒督代替亞比亞他。
36 Mokonzi abengisaki Shimei mpe alobaki na ye: — Tonga ndako kati na Yelusalemi mpe vanda kuna. Okokende esika mosusu te.
王差遣人將示每召來,對他說:「你要在耶路撒冷建造房屋居住,不可出來往別處去。
37 Mokolo oyo okobima mpe okokatisa lubwaku ya Sedron, okokufa, mpe makila na yo ekotangama na moto na yo moko.
你當確實地知道,你何日出來過汲淪溪,何日必死!你的罪必歸到自己的頭上。」
38 Shimei azongiselaki mokonzi: — Makambo oyo olobi ezali malamu! Mowumbu na yo akosala ndenge mokonzi, nkolo na ngai, alobi. Shimei avandaki na Yelusalemi mikolo ebele.
示每對王說:「這話甚好!我主我王怎樣說,僕人必怎樣行。」於是示每多日住在耶路撒冷。
39 Kasi sima na mibu misato, bawumbu mibale kati na bawumbu ya Shimei bakimaki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maaka, mokonzi ya Gati. Bayebisaki Shimei ete bawumbu na ye bazali na Gati.
過了三年,示每的兩個僕人逃到迦特王瑪迦的兒子亞吉那裏去。有人告訴示每說:「你的僕人在迦特。」
40 Tango Shimei ayokaki bongo, abongisaki ane na ye mpe akendeki epai ya Akishi, na Gati, mpo na koluka bawumbu na ye. Shimei akendeki penza na Gati mpe azongisaki bawumbu yango na Yelusalemi.
示每起來,備上驢,往迦特到亞吉那裏去找他的僕人,就從迦特帶他僕人回來。
41 Bamemelaki Salomo sango ete Shimei alongwaki na Yelusalemi, akendeki na Gati mpe azongi.
有人告訴所羅門說:「示每出耶路撒冷往迦特去,回來了。」
42 Mokonzi abengisaki Shimei mpe alobaki na ye: — Nalapisaki yo ndayi te na Kombo na Yawe mpe nakebisaki yo te ete mokolo oyo okobima mpo na kokende esika mosusu, okokufa penza? Mpe na mokolo yango, olobaki na ngai: « Makambo oyo olobi ezali malamu, nakotosa. »
王就差遣人將示每召了來,對他說:「我豈不是叫你指着耶和華起誓,並且警戒你說『你當確實地知道,你哪日出來往別處去,那日必死』嗎?你也對我說:『這話甚好,我必聽從。』
43 Mpo na nini okokisi te ndayi na yo epai na Yawe mpo na kotosa mitindo oyo napesaki?
現在你為何不遵守你指着耶和華起的誓和我所吩咐你的命令呢?」
44 Mokonzi alobaki lisusu na Shimei: — Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali.
王又對示每說:「你向我父親大衛所行的一切惡事,你自己心裏也知道,所以耶和華必使你的罪惡歸到自己的頭上;
45 Kasi mokonzi Salomo akopambolama, mpe kiti ya bokonzi ya Davidi ekolendisama makasi liboso ya Yawe mpo na libela.
惟有所羅門王必得福,並且大衛的國位必在耶和華面前堅定,直到永遠。」
46 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo.
於是王吩咐耶何耶大的兒子比拿雅,他就去殺死示每。這樣,便堅定了所羅門的國位。

< 1 Bakonzi 2 >