< 1 Bakonzi 18 >
1 Sima na tango molayi, na mobu ya misato, Yawe alobaki na Eliya: « Kende komimonisa epai ya Akabi, mpe Ngai nakonokisa mvula na mokili oyo. »
És lőn sok idő multán, a harmadik esztendőben, az Úrnak beszéde Illéshez, mondván: Menj el, mutasd meg magadat Akhábnak, és esőt adok a föld színére.
2 Eliya akendeki komimonisa epai ya Akabi. Wana nzala ezalaki makasi na Samari,
És elméne Illés, hogy megmutassa magát Akhábnak. Nagy éhség volt pedig Samariában.
3 Akabi abengisaki Abidiasi, mobateli bikolo ya ndako na ye. Nzokande Abidiasi azalaki kotosa Yawe mingi.
És Akháb hivatá Abdiást, a ki az ő házának gondviselője volt. (Abdiás pedig felette igen féli vala az Urat;
4 Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga: basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.
Mert mikor Jézabel megölette az Úr prófétáit, Abdiás száz prófétát vett oltalmába, és rejtette el ötvenenként egy-egy barlangba, és ott táplálta őket kenyérrel és vízzel).
5 Akabi apesaki mitindo na Abidiasi: « Tambola kati na mokili mobimba, na bitima nyonso ya mayi mpe na miluka nyonso; tango mosusu tokoki kozwa matiti ya mobesu mpe tokobatela bomoi ya bampunda mpe ya bamile mpo ete toboma lisusu te ndambo ya bibwele na biso. »
És monda Akháb Abdiásnak: Menj el az országba szerén-szerte a vizek forrásaihoz és a patakokhoz, hogyha valami füvet találhatnánk, hogy a lovakat és öszvéreket megtarthatnánk életben, és ne hagynánk a barmokat mindenestől elpusztulni.
6 Bakabolaki mokili mpo na kotambola kati na yango, Akabi akendeki ye moko na ngambo moko, Abidiasi mpe akendeki ye moko na ngambo mosusu.
Eloszták azért magok közt a földet, a melyen kiki elmenjen. Akháb egyedül ment az egyik úton, és Abdiás is egyedül ment a másik úton.
7 Wana Abidiasi azalaki kokende, Eliya akutanaki na ye. Abidiasi asosolaki ete ezali ye, afukamaki elongi kino na se mpe alobaki: — Boni, ezali penza yo, Eliya, nkolo na ngai?
És mikor Abdiás az úton ment, ímé Illés előtalálá őt, és mikor felismerte őt, arczra borula és monda: Nem te vagy-é az, uram, Illés?
8 Eliya azongisaki: — Iyo, ezali ngai. Kende koyebisa mokonzi na yo ete Eliya azali awa.
Felele néki: Én vagyok; menj el, mondd meg a te uradnak: Ímé itt van Illés.
9 Abidiasi atunaki: — Likambo nini ya mabe ngai nasali mpo ete okaba mosali na yo epai ya Akabi mpo ete baboma ngai?
Ő pedig monda: Mit vétettem ellened, hogy a te szolgádat Akháb kezébe akarod adni, hogy megöljön engem?
10 Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.
Él az Úr a te Istened: nincs sem nemzetség, sem ország, a hova el nem küldött volna az én uram, hogy megkeressen téged. És ha azt mondották: Nincs itt! az országot és a népet megesküdtette, hogy téged csakugyan nem találtak meg.
11 Kasi sik’oyo otindi ngai ete nakende epai ya mokonzi na ngai koyebisa ye ete Eliya azali awa.
És most te azt mondod: Menj el, mondd meg a te uradnak: Ímé itt van Illés.
12 Nayebi te esika nini Molimo na Yawe akoki komema yo tango nakotika yo. Soki namemi sango epai ya Akabi, kasi ye amoni yo te, akoboma ngai. Nzokande ngai, mosali na yo, natosaka Yawe wuta bolenge na ngai.
Ha most elmegyek tőled, téged pedig olyan helyre ragad el az Úrnak Lelke, a melyet én nem tudok, és én elmegyek, hogy megmondjam Akhábnak, és ha ő téged nem talál meg, engem öl meg; pedig a te szolgád féli az Urat gyermekségétől fogva.
13 Nkolo na ngai, oyokaki te makambo oyo nasalaki tango Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe? Nabombaki basakoli ya Yawe nkama moko kati na madusu mibale ya mabanga: tuku mitano na lidusu moko na moko mpe napesaki bango bilei mpe mayi ya komela.
Nem mondották-é meg az én uramnak, mit cselekedtem, mikor Jézabel megölette az Úr prófétáit? hogy hogyan rejtettem el az Úr prófétái közül száz férfiút ötvenenként egy-egy barlangba és tápláltam őket kenyérrel és vízzel.
14 Sik’oyo olobi na ngai ete nakende koyebisa mokonzi na ngai ete Eliya azali awa? Akoboma ngai!
És te mégis azt mondod: Menj el és mondd meg a te uradnak: Ímé itt van Illés; hogy megöljön engemet.
15 Eliya alobaki: — Solo, na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe oyo ngai nazali kosalela, lelo nakomimonisa epai ya Akabi.
És felele Illés: Él a Seregeknek Ura, a ki előtt állok: e mai napon megmutatom magamat néki.
16 Boye Abidiasi akendeki kokutana na Akabi mpe apesaki ye sango; mpe Akabi akendeki kokutana na Eliya.
Elméne azért Abdiás Akháb eleibe, és megjelenté ezt néki, és eleibe méne Akháb Illésnek.
17 Tango Akabi amonaki Eliya alobaki na ye: — Yo nde moto ozali kotia mobulu kati na Isalaele?
És mikor meglátta Akháb Illést, monda Akháb néki: Te vagy-é az Izráel megháborítója?
18 Eliya azongisaki: — Natie mobulu te kati na Isalaele. Kasi ezali nde yo mpe libota ya tata na yo bato bozali kosala mobulu, pamba te botosaki te mibeko ya Yawe mpe bolandi banzambe Bala.
Ő pedig monda: Nem én háborítottam meg az Izráelt, hanem te és a te atyád háza, azzal, hogy elhagytátok az Úrnak parancsolatait, és a Baál után jártatok.
19 Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.
Most azért küldj el, gyűjtsd hozzám az egész Izráelt a Kármel hegyre, és a Baál négyszázötven prófétáját, és az Aserának négyszáz prófétáját, a kik a Jézabel asztaláról élnek.
20 Boye Akabi atindaki sango epai ya bato nyonso ya Isalaele mpe asangisaki basakoli na ngomba Karimeli.
És elkülde Akháb mind az egész Izráel fiaihoz, és egybegyűjté a prófétákat a Kármel hegyre.
21 Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki: — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. Bato bazongisaki ata eloko moko te.
És odamenvén Illés az egész sokasághoz, monda: Meddig sántikáltok kétfelé? Ha az Úr az Isten, kövessétek őt; ha pedig Baál, kövessétek azt. És nem felelt néki a nép csak egy szót sem.
22 Boye Eliya alobaki na bango: — Natikali kaka ngai moko mosakoli kati na basakoli na Yawe. Kasi Bala azali na basakoli tuku minei na mitano.
Akkor monda Illés a népnek: Én maradtam meg csak egyedül az Úr prófétái közül; míg a Baál prófétái négyszázötvenen vannak;
23 Bobongisela biso bangombe mibale ya mibali. Tika ete basakoli ya Bala bapona bango moko ngombe moko, bakata-kata yango na biteni mpe batia yango likolo ya bakoni, kasi bapelisa moto te. Ngai mpe nakobongisa ngombe mosusu, nakotia yango likolo ya bakoni, kasi na kopelisa moto te.
Adjatok azért nékünk két tulkot, és ők válaszszák magoknak az egyik tulkot, a melyet vagdaljanak darabokra, és rakják a fákra; de tüzet ne tegyenek alája; én pedig a másikat készítem el, a melyet a fákra rakok, de tüzet én sem teszek alája.
24 Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki: — Makambo oyo olobi ezali malamu.
Akkor hívjátok segítségül a ti istenteknek nevét, és én is segítségül hívom az Úrnak nevét; és a mely isten tűz által felel, az az Isten. És felelvén az egész sokaság, monda: Jó lesz!
25 Eliya alobaki na basakoli ya Bala: — Bopona ngombe moko kati na bangombe ya mibali; bino bozala bato ya liboso ya kobongisa yango, pamba te bozali ebele. Bobelela kombo ya nzambe na bino, kasi bopelisa moto te.
És monda Illés a Baál prófétáinak: Válaszszátok el magatoknak az egyik tulkot, és készítsétek el ti először; mert ti többen vagytok, és hívjátok segítségül a ti istenteknek nevét, de tüzet ne tegyetek alája.
26 Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki: « Bala, yanola biso! » Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.
És vevék a tulkot, a melyet nékik adott, és azt elkészíték, és segítségül hívák a Baálnak nevét reggeltől fogva délig, mondván: Baál! hallgass meg minket! De nem jött szó, sem felelet. És ott sántikáltak az oltár körül, a melyet készítettek.
27 Na midi, Eliya akomaki kotiola bango, alobaki: « Boganga lisusu makasi, pamba te azali nzambe; tango mosusu azali kokanisa makambo ebele to akangami na misala mosusu to azali na mobembo; to mpe azali kolala, boye esengeli bino kolamusa ye. »
Mikor pedig már dél lett, elkezdte őket gúnyolni Illés, azt mondván: Kiáltsatok hangosabban, hiszen isten! Talán elmélkedik, vagy félrement, vagy úton van, vagy talán aluszik, és felserken.
28 Boye bagangaki lisusu makasi mpe bamizokisaki na mipanga na makonga, ndenge ezalaki momesano na bango kino makila kotanga.
És elkezdtek hangosan kiabálni és az ő szokásuk szerint késekkel és borotvákkal metélték magokat, míg csak ki nem csordult a vérök.
29 Wana ngonga ya midi elekaki, bakobaki kotuntuka kino na tango ya mbeka ya pokwa, kasi eyano ezalaki kaka te, nzambe moko te ayanolaki bango mpe ata elembo moko te ezalaki.
Mikor pedig a dél elmúlt, prófétálni kezdtek egész az esteli áldozatig; de akkor sem lett se szó, se felelet, se meghallgattatás.
30 Eliya alobaki na bato nyonso: — Bopusana pene na ngai! Bato nyonso bapusanaki pene na ye mpe Eliya abongisaki etumbelo ya Yawe oyo ebukanaki.
Akkor monda Illés az egész sokaságnak: Jőjjetek én hozzám. És hozzá méne az egész sokaság, és megépíté az Úr oltárát, a mely leromboltatott volt.
31 Eliya akamataki mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya bana mibali ya Jakobi oyo Yawe alobaki na ye: « Kombo na yo ekozala Isalaele. »
És vőn Illés tizenkét követ, a Jákób fiai nemzetségeinek száma szerint, a kiknek az Isten azt mondotta volt: Izráel legyen a te neved;
32 Na mabanga yango, atongaki etumbelo mpo na Yawe; atimolaki libulu ya mayi oyo ekokaki kokota balitele pene tuku misato zingazinga ya etumbelo.
És oltárt építe a kövekből az Úr nevében, és egy árkot húzott az oltár körül, a melybe két véka vetni való mag férne.
33 Abongisaki bakoni, akataki ngombe na biteni mpe atiaki yango likolo ya bakoni.
És oda készíté a fát, és felvagdalá a tulkot, és felraká azt a fára;
34 Alobaki na bango: — Botondisa mayi kati na bambeki minei ya minene mpe bosopa yango na likolo ya mbeka mpe na likolo ya bakoni. Basalaki bongo. Alobaki na bango lisusu: — Botondisa mayi kati na bambeki minei ya minene mpe bosopa yango na likolo ya mbeka mpe na likolo ya bakoni. Basalaki lisusu bongo. Apesaki bango mitindo: — Bosala bongo mpo na mbala ya misato! Basalaki bongo mpo na mbala ya misato.
És monda: Töltsetek meg négy vedret vízzel, és öntsétek az égőáldozatra és a fára. Monda ismét: Tegyétek ezt még egyszer! És másodszor is azt tevék. Monda még is: Harmadszor is tegyétek meg! És harmadszor is azt mívelék;
35 Mayi esopanaki zingazinga ya etumbelo mpe etondisaki libulu.
Úgy, hogy a víz lecsurgott az oltárról, és még az árok is tele lett vízzel.
36 Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki: — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.
És a mikor eljött az esteli áldozás ideje, oda lépett Illés próféta, és monda: Óh Uram, Ábrahámnak, Izsáknak és Izráelnek Istene, hadd ismerjék meg e mai napon, hogy te vagy az Isten az Izráelben, és hogy én a te szolgád vagyok, és hogy mindezeket a te parancsolatodból cselekedtem.
37 Yanola ngai, oh Yawe, yanola ngai, mpo ete bato oyo bayeba solo ete Yo, Yawe, nde ozali Nzambe; na bongo okozongisa mitema ya bato oyo epai na Yo.
Hallgass meg engem, Uram, hallgass meg engem, hogy tudja meg e nép, hogy te, az Úr vagy az Isten, és te fordítod vissza az ő szívöket!
38 Bongo moto ya Yawe ekweyaki, ezikisaki mbeka, bakoni, mabanga mpe ekawusaki mayi nyonso kati na libulu.
Akkor alászálla az Úr tüze, és megemészté az égőáldozatot, a fát, a köveket és a port, és felnyalta a vizet, a mely az árokban volt.
39 Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakweyaki bilongi na se mpe bagangaki: — Solo, Yawe nde azali Nzambe; Yawe nde azali Nzambe!
Mikor ezt látta az egész sokaság, arczra borult, és monda: Az Úr az Isten! az Úr az Isten!
40 Eliya apesaki bango mitindo: — Bokanga basakoli ya Bala, botika ata moto moko te kokima. Bakangaki bango, mpe Eliya amemaki bango na lubwaku ya Kishoni mpo na kokata bango bakingo kuna.
És monda Illés nékik: Fogjátok meg a Baál prófétáit; senki el ne szaladjon közülök! És megfogák őket, és alávivé őket Illés a Kison patakja mellé, és megölé ott őket.
41 Eliya alobaki na Akabi: — Kende, lia mpe mela, pamba te nazali koyoka makelele ya mvula makasi.
Akkor monda Illés Akhábnak: Eredj fel, egyél és igyál, mert nagy esőnek zúgása hallszik.
42 Boye, Akabi akendeki kolia mpe komela. Kasi Eliya amataki kino na songe ya ngomba Karimeli, afukamaki elongi kino na se, na kati-kati ya mabolongo.
És felment Akháb, hogy egyék és igyék. Illés pedig felment a Kármel hegy tetejére, és leborula a földre, és az ő orczáját az ő két térde közé tevé;
43 Alobaki na mosali na ye: — Kende kotala na nzela ya ebale monene. Mosali na ye akendeki kotala, alobaki: — Eloko moko te ezali kuna. Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo: « Kende kotala lisusu! »
És monda az ő szolgájának: Menj fel, és nézz a tenger felé. És felment, és arrafelé nézett, és monda: Nincsen semmi. És monda Illés: Menj vissza hétszer.
44 Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki: — Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene. Boye Eliya alobaki: — Kende koyebisa Akabi: « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. »
És lőn hetedúttal, monda a szolga: Ímé egy kis felhőcske, mint egy embernek a tenyere, jő fel a tengerből. Akkor monda: Menj fel, mondd meg Akhábnak: Fogj be és menj le, hogy meg ne késleljen az eső.
45 Na tango wana kaka, likolo eyindaki makasi na mapata ya mvula, mopepe eyaki, mpe mvula makasi enokaki. Akabi amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli.
És lőn azonközben, hogy besötétedett az ég a fellegektől és a széltől, és nagy eső lett. Akháb pedig szekérre ült és elment Jezréelbe.
46 Lokola nguya na Yawe ezalaki likolo ya Eliya oyo alataki mokaba na loketo na ye, akimaki mbangu liboso ya Akabi kino na ekuke ya Jizireyeli.
És lőn az Úr keze Illésen, és felövezvén az ő derekát, még Akháb előtt futott el Jezréel felé.