< 1 Bakonzi 15 >

1 Tango Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiyami akomaki mokonzi ya Yuda.
[阿彼雅為猶大王]乃巴特的兒子雅洛貝罕王十八年,阿彼雅登極作猶大王,
2 Awumelaki mibu misato na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana ya Abisalomi.
在耶路撒冷作王三年;他母親名叫瑪阿加,是阿貝沙隆的外孫女。
3 Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye.
阿彼雅作了他父親在他以前所行的一切邪惡;他的心對上主他的天主,不像他祖父達味的那樣誠實。
4 Nzokande, mpo na Davidi, Yawe Nzambe na ye, apesaki Abiyami mwinda kati na Yelusalemi, wana atiaki mwana na ye ya mobali mpo na kokitana na ye na bokonzi mpe kokomisa Yelusalemi makasi.
但是,上主他的天主,為了達味的緣故,仍使他在耶路撒冷,有一盞燈,立他的兒子接他的位,並保全耶路撒冷,
5 Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko: likambo ya Iri, moto ya Iti.
因為達味除了赫特人烏黎雅那件事以外,常行了上主視為正義的事,一生歲月從未違背上主所吩咐他的一切。
6 Mikolo nyonso ya bomoi ya Abiyami, ndako ya Roboami ezalaki kaka na bitumba na ndako ya Jeroboami.
【勒哈貝罕與雅洛貝罕之間不斷發生戰事。】
7 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Abiyami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Bitumba ezalaki kati na Jeroboami mpe Abiyami.
阿彼雅其餘的事蹟,他的一切作為,都記載在猶大列王實錄上。阿彼雅與雅洛貝罕之間,常發生戰事。
8 Abiyami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
阿彼雅與列祖同眠,葬在達味城;他的兒子阿撒繼位為王。阿撒為猶大王
9 Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, asalaki mibu tuku mibale na bokonzi, Asa akomaki mokonzi ya Yuda.
以色列王雅洛貝罕二十年,阿撒登極作猶大王,
10 Asalaki mibu tuku minei na moko na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya koko na ye ya mwasi ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana mwasi ya Abisalomi.
在耶路撒冷作王四十一年;他的祖母名叫瑪阿加,是阿貝沙隆的外孫女。
11 Asa asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe, ndenge Davidi, koko na ye, asalaki.
阿撒行了上主視為正直的事,像他的祖父達味一樣。
12 Abenganaki wuta na mokili, bato oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, mpe alongolaki banzambe nyonso ya bikeko oyo tata na ye asalaki.
他將為神賣淫的男女由國內除掉,徹去了他祖先所立的一切偶像,
13 Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron.
並廢除了他祖母瑪阿加作太后的權位,因為她給阿舍辣立了可憎惡的柱像;阿撒把她所立的像砍倒,在克德龍谷焚毀。
14 Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye.
只有丘壇沒有廢除;不過阿撒的心一生全屬上主。
15 Azongisaki kati na Tempelo ya Yawe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki: palata, wolo mpe biloko mosusu.
阿撒將他父親所獻的,和他自己所獻的金銀和器皿,都送入上主的殿內。
16 Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba.
阿撒與以色列王巴厄沙之間不斷發生戰爭。
17 Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda mpe alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda.
以色列王巴厄沙上來進攻猶大,並在辣瑪修築工事,防止人民同猶大王阿撒來往。
18 Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo:
那時,阿撒將上主殿內和王宮內寶庫中所剩餘的金銀取出,交給他的臣僕,打發他們去見住在大馬士革的阿蘭王,赫則雍的孫子,塔貝黎孟的兒子本哈達得說:「
19 « Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo kado ya palata mpe ya wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. »
我與你之間,我父親與你父親之間都立過約;現在我給你送來金銀作為禮品,請你廢除你與以色列王巴厄沙所立的約,使他遠離我! 」
20 Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Abotolaki Iyoni, Dani, Abele-Beti-Maaka, etuka mobimba ya Kinereti mpe mokili nyonso ya Nefitali.
本哈達得聽了阿撒王的話,即刻派自己的軍長去攻打以色列的城市,攻下了依雍、丹、阿貝耳貝瑪阿加、基乃勒特全境和納裴塔里全境。
21 Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akendeki kovanda na Tiritsa.
巴厄沙一聽說這事,就停止在辣瑪的工事,回到了提爾匝。
22 Bongo mokonzi Asa abengisaki bato nyonso ya Yuda, kolongola ata moto moko te; mpe bamemaki longwa na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela kuna. Mokonzi Asa asalelaki yango mpo na kolendisa engumba Geba kati na etuka ya Benjame, mpe engumba Mitsipa.
於是阿撒王召集全猶大人民,一個也不例外,吩咐他們將巴厄沙修築辣瑪所用的石頭和木料運走;阿撒王用來修建本雅明的革巴和米茲帕。
23 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Asa, molende na ye, misala na ye nyonso mpe bingumba na ye nyonso oyo atongaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Tango akomaki mobange, akomaki kobela makolo.
阿撒其餘的事蹟,關於他的一切偉業和作為,並建造的城防,都記載在猶大列王實錄上。他年老時,患了足疾。
24 Asa akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Jozafati, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
阿撒與列祖同眠,與列祖同葬在他祖父達味城內;他的兒子約沙法特繼位為王。納達布為以色列王
25 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi; Nadabi, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale.
猶大王阿撒二年,雅洛貝罕的兒子納達布登極作以色列王。他二年作以色列王,
26 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, atambolaki na banzela mabe ya tata na ye, oyo atindikaki mpe bato ya Isalaele na kosala masumu.
行了上主視為惡的事,走了他父親的路,犯了他父親使以色列陷於罪惡的罪。
27 Baesha, mwana mobali ya Ayiya, moto ya libota ya Isakari, asalelaki ye likita mpe abomaki ye na Gibetoni, moko kati na bingumba ya bato ya Filisitia, na tango oyo Nadabi elongo na Isalaele mobimba bazingelaki Gibetoni.
依撒加爾家族,阿希雅的兒子巴厄沙結黨背叛了他,在屬於培肋舍特人的基貝通將他殺死,那時納達布和全以色列人正在圍攻基貝通。
28 Baesha abomaki Nababi tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, mpe akitanaki na Nadabi na bokonzi.
猶大王阿撒三年,巴厄沙殺了納達布,篡了他的王位。
29 Tango azwaki bokonzi, abomaki libota nyonso ya Jeroboami mpe atikaki ata moto moko te na bomoi kati na libota ya Jeroboami: abomaki bato nyonso kolanda etinda na Yawe na nzela ya mowumbu na ye, Ayiya, moto ya Silo,
他登極後,立即殺了亞洛貝罕全家;凡屬於雅洛貝罕家中的人,沒有留下一個,都殺絕了:這正應了上主藉他僕人使羅人阿希雅所說的話。
30 mpo na masumu oyo Jeroboami asalaki mpe atindikaki bato ya Isalaele na kosala. Na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
這是因為亞洛貝罕自己犯的罪和他使以色列犯的罪,激怒了上主,以色列的天主。
31 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Nadabi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
納達布其餘的事蹟,他的一切作為,都記載在以色列列王實錄上。
32 Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba.
【阿撒與以色列王巴厄沙之間常發生戰事。】巴厄沙為以色列王
33 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, Baesha, mwana mobali ya Ayiya, akomaki mokonzi ya Isalaele mobimba, na Tiritsa. Asalaki mibu tuku mibale na minei na bokonzi.
猶大王阿撒三年,阿希雅的兒子巴厄沙在提爾匝登極,作全以色列王,在位凡二十四年。
34 Baesha asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, na komekola banzela ya Jeroboami oyo atindikaki bato ya Isalaele na kosala masumu na ye.
他行了上主視為惡的事,走了雅洛貝罕所走的路,犯了使以色列陷於罪惡的事。

< 1 Bakonzi 15 >