< 1 Bakonzi 14 >

1 Na tango wana kaka, Abiya, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki kobela.
En aquel tiempo, Abías, hijo de Jeroboam, cayó enfermo.
2 Jeroboami alobaki na mwasi na ye: — Mibongola mpo ete bato bayeba te ete ozali mwasi ya mokonzi Jeroboami; bongo, kende na Silo. Mosakoli Ayiya azali kuna; ye nde alobaki na ngai ete nakozala mokonzi ya bato oyo.
Y Jeroboam dijo a su esposa: Levántate, te ruego, disfrázate para que no reconozcan que tú eres la esposa de Jeroboam, y vé a Silo. Allí está el profeta Ahías, quien habló de mí y dijo que yo sería rey sobre este pueblo.
3 Kamata mapa zomi, ndambo ya bagato, na ekolo ya mafuta ya nzoyi, mpe kende kokutana na ye; akoyebisa yo makambo oyo ekokomela mwana na biso ya mobali.
Toma en tu mano diez panes, tortas y una vasija de miel, y ve a él para que te diga lo que sucederá a este niño.
4 Mwasi ya Jeroboami asalaki makambo oyo mobali na ye atindaki ye: akendeki na Silo mpe akotaki na ndako ya Ayiya. Nzokande, Ayiya azalaki komona lisusu te, pamba te miso na ye ekufaki mpo ete akomaki mobange.
Así la esposa de Jeroboam lo hizo. Se levantó, fue a Silo y llegó a la casa de Ahías. Y Ahías ya no podía ver, pues sus ojos estaban oscurecidos a causa de su vejez.
5 Yawe alobaki na Ayiya: — Mwasi ya Jeroboami azali koya kotuna yo toli mpo na mwana na ye ya mobali, pamba te azali kobela. Osengeli kopesa ye eyano songolo to pakala. Tango akoya, akosala lokola nde azali moto mosusu.
Pero Yavé dijo a Ahías: Mira, la esposa de Jeroboam viene a buscar palabra de ti acerca de su hijo que está enfermo. Así y así le hablarás, porque sucederá que cuando ella entre, fingirá ser otra mujer.
6 Tango Ayiya ayokaki makelele ya makolo ya mwasi ya Jeroboami na ekuke, alobaki: — Kota, mwasi ya Jeroboami! Mpo na nini ozali komibongola? Natindami epai na yo mpo na koyebisa yo sango mabe.
Cuando Ahías oyó el ruido de sus pies al entrar ella por la puerta, dijo: Entra, esposa de Jeroboam. ¿Por qué finges ser otra? Mira, soy enviado a ti con un duro mensaje.
7 Kende koloba na Jeroboami: « Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Natombolaki yo kati na bato mpe nakomisaki yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele.
Vé, dí a Jeroboam: Yavé, ʼElohim de Israel, dice: Porque Yo te exalté de entre el pueblo. Te designé como caudillo de mi pueblo Israel.
8 Nalongolaki bokonzi na maboko ya ndako ya Davidi mpe napesaki yo yango, kasi otambolaki te lokola Davidi, mowumbu na Ngai, oyo atosaki mibeko na Ngai mpe azalaki kolanda Ngai na motema na ye mobimba, mpo na kosala oyo kaka ezali malamu na miso na Ngai.
Rompí el reino de la casa de David y te lo entregué a ti. Y tú no has sido como mi esclavo David, quien guardó mis Mandamientos, anduvo tras Mí con todo su corazón e hizo solo lo recto delante de Mí,
9 Kasi yo, osali mabe koleka bato nyonso oyo bazalaki liboso na yo: omisaleli banzambe mosusu, bikeko ya bibende banyangwisa na moto; boye, olamusi kanda na Ngai mpe opesi Ngai mokongo.
sino que hiciste lo malo más que todos los que te precedieron. Fuiste y te hiciste otros ʼelohim, fundiste imágenes para provocarme a ira y me diste la espalda.
10 Yango wana, nakoyeisa pasi na ndako ya Jeroboami, nakosilisa koboma mibali nyonso kati na ndako ya Jeroboami, ezala mowumbu to monsomi kati na Isalaele; nakokomba ndako ya Jeroboami ndenge bakombaka matiti ya mbindo, kino nyonso penza ekosila.
Por tanto, ciertamente Yo traigo el mal sobre la casa de Jeroboam y cortaré de Jeroboam a todo varón, tanto al esclavo como al libre en Israel. Barreré por completo las futuras generaciones de Jeroboam, como se barre el estiércol hasta acabarlo.
11 Bambwa ekolia bato nyonso ya Jeroboami, oyo bakokufa kati na engumba; mpe bandeke ya likolo ekolia bato nyonso oyo bakokufa na zamba, elobi Yawe. › »
Al que muera en la ciudad de los de Jeroboam, lo comerán los perros. Al que muera en el campo, lo comerán las aves del cielo, porque Yavé habló.
12 Mpo na yo, telema mpe zonga na ndako na yo. Tango kaka okotia makolo na yo kati na engumba na yo, mwana na yo ya mobali akokufa.
Y tú, levántate y vete a tu casa. Cuando tus pies entren en la ciudad, el niño morirá.
13 Bato nyonso ya Isalaele bakosalela ye matanga mpe bakokunda ye. Ye moko kaka, kati na ndako ya Jeroboami, nde bakokunda; pamba te kati na ndako mobimba ya Jeroboami, ye kaka nde Nzambe amoni na eloko ya malamu oyo esepelisi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Todo Israel hará duelo por él y lo sepultará, pues éste es el único de los hijos de Jeroboam que será sepultado. Solo en él se halló algo bueno delante de Yavé, ʼElohim de Israel.
14 Yawe akobimisa mpo na Ye moko, mokonzi mosusu ya Isalaele oyo akosilisa koboma ndako nyonso ya Jeroboami. Solo, ezali nde mpo na lelo, kaka sik’oyo!
Yavé levantará para Él un rey en Israel, el cual destruirá la casa de Jeroboam en su día, y es ahora mismo.
15 Yawe akobeta Isalaele, mpe Isalaele akoningana lokola nzete oyo ebotaka na mayi, oyo mayi ezali koningisa; akopikola Isalaele wuta na mabele ya malamu oyo apesaki na bakoko na ye mpe akopanza bango mosika ya ebale Efrate, pamba te balamusi kanda ya Yawe na kosalaka makonzi ya bule mpo na Ashera.
Porque Yavé sacudirá a Israel como una caña es agitada en el agua. Desarraigará a Israel de esta buena tierra que dio a sus antepasados y los esparcirá más allá del río [Éufrates], porque hicieron sus imágenes de asera y provocaron a ira a Yavé.
16 Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele.
Entregará a Israel a causa de los pecados de Jeroboam, quien pecó e hizo pecar a Israel.
17 Mwasi ya Jeroboami atelemaki, akendeki mpe akomaki na Tiritsa. Tango akomaki na ekuke ya ndako na ye, mwana na ye ya mobali akufaki.
Entonces la esposa de Jeroboam se levantó, salió y llegó a Tirsa. Al pasar la entrada de la casa, murió el niño.
18 Bakundaki ye, mpe Isalaele mobimba basalaki matanga ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya mowumbu na Ye, mosakoli Ayiya.
Lo sepultaron, y todo Israel hizo duelo por él, según la Palabra que Yavé habló por medio de su esclavo, el profeta Ahías.
19 Misala mosusu ya Jeroboami, bitumba mpe bokonzi na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Los demás hechos de Jeroboam, las guerras que hizo y cómo reinó, ciertamente están escritos en el rollo de las Crónicas de los reyes de Israel.
20 Jeroboami asalaki mibu tuku mibale na mibale na bokonzi, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Nadabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
El tiempo que Jeroboam reinó fue 22 años y reposó con sus antepasados. Su hijo Nadab reinó en su lugar.
21 Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.
Roboam, hijo de Salomón, reinó en Judá. Roboam tenía 41 años cuando comenzó a reinar, y reinó 17 años en Jerusalén, la ciudad que Yavé escogió de entre todas las tribus de Israel para poner allí su Nombre. El nombre de su madre fue Naama, amonita.
22 Bato ya Yuda basalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na nzela ya masumu oyo basalaki, balamusaki zuwa ya Nzambe koleka oyo batata na bango basalaki.
Judá hizo lo malo ante Yavé y lo provocaron a celos con sus pecados que cometieron, más que los que cometieron sus antepasados.
23 Batongaki lisusu mpo na bango moko bisambelo ya likolo ya bangomba, mabanga ya bule, makonzi ya bule mpo na Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mobesu.
Ellos también construyeron lugares altos, piedras rituales y árboles de Asera en toda montaña alta y debajo de todo árbol frondoso.
24 Ezalaki lisusu na mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule kati na mokili ya Yuda: bamipesaki na kosala makambo ya nkele kolanda bikolo ya bapaya oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.
También hubo sodomitas en la tierra que hacían en conformidad con todas las prácticas repugnantes de los pueblos que Yavé echó de delante de los hijos de Israel.
25 Tango Roboami akokisaki mibu mitano na bokonzi, Shishaki, mokonzi ya Ejipito, ayaki kobundisa Yelusalemi.
El año quinto del reinado de Roboam, aconteció que Sisac, rey de Egipto, subió contra Jerusalén.
26 Azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe bomengo ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba nyonso ya wolo oyo Salomo asalisaki.
Tomó los tesoros de la Casa de Yavé y los tesoros de la casa del rey. Tomó todo. También tomó todos los escudos de oro que Salomón hizo.
27 Boye, na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli na ye, oyo bazalaki kobatela ekotelo ya ndako ya mokonzi.
En lugar de ellos, el rey Roboam hizo escudos de bronce y los entregó a los capitanes de la guardia que protegían la entrada de la casa real.
28 Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli.
Sucedía que cuantas veces el rey entraba en la Casa de Yavé, los de la guardia los portaban. Luego los devolvían a la cámara de la guardia.
29 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami mpe misala na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Los demás hechos y cosas de Roboam, ¿no están escritos en el rollo de las Crónicas de los reyes de Judá?
30 Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami.
Hubo guerra entre Roboam y Jeroboam todos los días.
31 Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Roboam reposó con sus antepasados y fue sepultado con sus antepasados en la ciudad de David. El nombre de su madre fue Naama amonita. Reinó en su lugar su hijo Abiam.

< 1 Bakonzi 14 >