< 1 Bakonzi 13 >

1 Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.
Behold, a man of God came out of Judah by the LORD’s word to Bethel; and Jeroboam was standing by the altar to burn incense.
2 Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe: « Etumbelo, etumbelo! Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato! › »
He cried against the altar by the LORD’s word, and said, “Altar! Altar! The LORD says: ‘Behold, a son will be born to David’s house, Josiah by name. On you he will sacrifice the priests of the high places who burn incense on you, and they will burn men’s bones on you.’”
3 Na mokolo wana kaka, moto na Nzambe apesaki elembo: — Tala elembo oyo elakisi ete ezali Yawe nde alobi: Etumbelo ekobukana mpe putulu oyo ezali likolo na yango ekopanzana.
He gave a sign the same day, saying, “This is the sign which the LORD has spoken: Behold, the altar will be split apart, and the ashes that are on it will be poured out.”
4 Tango mokonzi Jeroboami ayokaki bilakeli mabe oyo moto na Nzambe alobaki mpo na etumbelo ya Beteli, asembolaki loboko na ye wuta na etumbelo mpe alobaki: — Bokanga ye! Kasi loboko oyo Jeroboami asembolaki epai ya moto na Nzambe ekawukaki, mpe akokaki lisusu te kozongisa yango epai na ye.
When the king heard the saying of the man of God, which he cried against the altar in Bethel, Jeroboam put out his hand from the altar, saying, “Seize him!” His hand, which he put out against him, dried up, so that he could not draw it back again to himself.
5 Kaka na tango yango, etumbelo ebukanaki mpe putulu epanzanaki. Ezalaki penza elembo oyo moto na Nzambe apesaki kolanda etinda na Yawe.
The altar was also split apart, and the ashes poured out from the altar, according to the sign which the man of God had given by the LORD’s word.
6 Mokonzi alobaki na moto na Nzambe: — Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpe sambela mpo na ngai ete loboko na ngai ebonga. Moto na Nzambe abondelaki Yawe, mpe loboko ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso.
The king answered the man of God, “Now intercede for the favor of the LORD your God, and pray for me, that my hand may be restored me again.” The man of God interceded with the LORD, and the king’s hand was restored to him again, and became as it was before.
7 Bongo mokonzi alobaki na moto na Nzambe: — Tokende na ndako mpo ete ozwa eloko ya kolia mpe napesa yo kado.
The king said to the man of God, “Come home with me and refresh yourself, and I will give you a reward.”
8 Kasi moto na Nzambe azongiselaki mokonzi: — Ata soki opesi ngai kati-kati ya bozwi na yo, nakokende epai na yo te, nakolia lipa te mpe nakomela ata litanga ya mayi te na esika oyo.
The man of God said to the king, “Even if you gave me half of your house, I would not go in with you, neither would I eat bread nor drink water in this place;
9 Pamba te Yawe apesaki ngai mitindo oyo: « Osengeli te kolia lipa, komela mayi mpe kozongela na nzela oyo oyelaki. »
for so was it commanded me by the LORD’s word, saying, ‘You shall eat no bread, drink no water, and don’t return by the way that you came.’”
10 Boye, akendeki na nzela mosusu mpe azongaki te na nzela oyo ayelaki na Beteli.
So he went another way, and didn’t return by the way that he came to Bethel.
11 Nzokande, mosakoli moko ya mobange azalaki kovanda na Beteli; bana na ye ya mibali bayaki koyebisa ye makambo nyonso oyo moto na Nzambe asalaki na Beteli, na mokolo wana, mpe oyo alobaki na mokonzi.
Now an old prophet lived in Bethel, and one of his sons came and told him all the works that the man of God had done that day in Bethel. They also told their father the words which he had spoken to the king.
12 Tata na bango atunaki bango: — Azongi na nzela nini? Bana na ye ya mibali balakisaki ye nzela oyo moto na Nzambe, oyo awutaki na Yuda, azongelaki.
Their father said to them, “Which way did he go?” Now his sons had seen which way the man of God went, who came from Judah.
13 Bongo alobaki na bana na ye ya mibali: — Bobongisela ngai ane. Sima na bana na ye kobongisela ye ane, amataki likolo na yango,
He said to his sons, “Saddle the donkey for me.” So they saddled the donkey for him; and he rode on it.
14 alandaki moto na Nzambe mpe akutaki ye avandi na se ya nzete ya Terebente. Atunaki ye: — Ozali solo moto na Nzambe oyo awuti na Yuda? Moto na Nzambe azongisaki: — Iyo, ezali nde ngai.
He went after the man of God, and found him sitting under an oak. He said to him, “Are you the man of God who came from Judah?” He said, “I am.”
15 Mosakoli alobaki na ye: — Yaka kolia mesa moko na ngai, na ndako na ngai.
Then he said to him, “Come home with me and eat bread.”
16 Moto na Nzambe alobaki: — Nakoki te kozonga to kotambola nzela moko na yo; nakoki mpe te kolia lipa to komela mayi elongo na yo na esika oyo,
He said, “I may not return with you, nor go in with you. I will not eat bread or drink water with you in this place.
17 pamba te Yawe alobaki na ngai: « Osengeli te kolia lipa, komela mayi mpe kozongela na nzela oyo oyelaki. »
For it was said to me by the LORD’s word, ‘You shall eat no bread or drink water there, and don’t turn again to go by the way that you came.’”
18 Mosakoli ya mobange azongisaki: — Ngai mpe nazali mosakoli lokola yo. Anjelu moko ya Yawe alobaki na ngai kolanda etinda na Yawe: « Zonga na ye nzela moko na ndako na yo mpo ete alia lipa mpe amela mayi. » Nzokande azalaki kokosa ye.
He said to him, “I also am a prophet as you are; and an angel spoke to me by the LORD’s word, saying, ‘Bring him back with you into your house, that he may eat bread and drink water.’” He lied to him.
19 Boye, moto na Nzambe azongaki nzela moko na ye na Beteli, aliaki mpe amelaki kati na ndako na ye.
So he went back with him, ate bread in his house, and drank water.
20 Wana bavandaki na mesa, Yawe alobaki na mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe,
As they sat at the table, the LORD’s word came to the prophet who brought him back;
21 mpe agangelaki moto na Nzambe oyo awutaki na Yuda: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mpo ete otosi te Liloba na Yawe mpe obateli te etinda oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo;
and he cried out to the man of God who came from Judah, saying, “The LORD says, ‘Because you have been disobedient to the LORD’s word, and have not kept the commandment which the LORD your God commanded you,
22 mpo ete ozongi, olie lipa mpe omeli mayi na esika oyo napekisaki yo kolia to komela, bakokunda ebembe na yo te kati na kunda ya batata na yo. »
but came back, and have eaten bread and drank water in the place of which he said to you, “Eat no bread, and drink no water,” your body will not come to the tomb of your fathers.’”
23 Tango moto na Nzambe asilisaki kolia mpe komela, mosakoli ya mobange abongisaki ane ya moto na Nzambe oyo azongisaki sima,
After he had eaten bread and after he drank, he saddled the donkey for the prophet whom he had brought back.
24 mpe moto na Nzambe azongelaki nzela na ye. Wana azalaki kokende, akutanaki na nkosi na nzela, mpe nkosi yango ebomaki ye. Ebembe na ye etikalaki na nzela, nkosi mpe ane etelemaki pembeni ya ebembe na ye.
When he had gone, a lion met him by the way and killed him. His body was thrown on the path, and the donkey stood by it. The lion also stood by the body.
25 Bato oyo bazalaki koleka bamonaki ebembe elali na nzela mpe nkosi etelemi pembeni na yango. Bakendeki kopesa sango kati na engumba epai wapi mosakoli ya mobange azalaki kovanda.
Behold, men passed by and saw the body thrown on the path, and the lion standing by the body; and they came and told it in the city where the old prophet lived.
26 Tango mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe sima, na mobembo na ye, ayokaki sango yango, alobaki: — Ezali solo moto na Nzambe oyo atosaki te mitindo ya Yawe. Yawe akabi ye epai ya nkosi oyo epasoli ye mpe ebomi ye kolandisama na liloba oyo Yawe ayebisaki ye.
When the prophet who brought him back from the way heard of it, he said, “It is the man of God who was disobedient to the LORD’s word. Therefore the LORD has delivered him to the lion, which has mauled him and slain him, according to the LORD’s word which he spoke to him.”
27 Mosakoli ya mobange alobaki na bana na ye ya mibali: — Bobongisela ngai ane! Bana na ye ya mibali babongiselaki ye ane yango.
He said to his sons, saying, “Saddle the donkey for me,” and they saddled it.
28 Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane.
He went and found his body thrown on the path, and the donkey and the lion standing by the body. The lion had not eaten the body nor mauled the donkey.
29 Mosakoli ya mobange atombolaki ebembe ya moto na Nzambe, atiaki yango na likolo ya ane mpe amemaki yango na engumba na ye mpo na kosalela ye matanga mpe kokunda ye.
The prophet took up the body of the man of God, and laid it on the donkey, and brought it back. He came to the city of the old prophet to mourn, and to bury him.
30 Atiaki ebembe kati na kunda na ye moko mpe ayembelaki ye nzembo oyo ya mawa: — Ah, mawa, ndeko na ngai!
He laid his body in his own grave; and they mourned over him, saying, “Alas, my brother!”
31 Sima na kokunda ye, alobaki na bana na ye ya mibali: — Tango nakokufa, bokokunda ngai kati na lilita epai wapi bakundi moto na Nzambe; bokotia mikuwa na ngai pembeni ya mikuwa na ye.
After he had buried him, he spoke to his sons, saying, “When I am dead, bury me in the tomb in which the man of God is buried. Lay my bones beside his bones.
32 Pamba te liloba oyo asakolaki kolanda etinda na Yawe mpo na kolakela mabe, etumbelo ya Beteli mpe bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba kati na engumba Samari, ekokokisama solo.
For the saying which he cried by the LORD’s word against the altar in Bethel, and against all the houses of the high places which are in the cities of Samaria, will surely happen.”
33 Atako bongo, Jeroboami atikaki te banzela na ye ya mabe, akobaki kaka kotia bato ya mboka na ye lokola banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba; abulisaki lokola nganga-nzambe ya esambelo ya likolo ya ngomba moto nyonso oyo alingaki kokoma nganga-nzambe.
After this thing, Jeroboam didn’t turn from his evil way, but again made priests of the high places from among all the people. Whoever wanted to, he consecrated him, that there might be priests of the high places.
34 Oyo nde ezalaki lisumu ya ndako ya Jeroboami, oyo ememaki kokweya mpe kobebisama ya bokonzi na ye kati na mokili.
This thing became sin to the house of Jeroboam, even to cut it off and to destroy it from off the surface of the earth.

< 1 Bakonzi 13 >